Makomi
Mormon 4


Mokapo 4

Etumba mpe kobomaboma ezali kokoba—Bato ya nkuna bapesi bato ya nkuna etumbu—kuna ya monene koleka epanzani mingi na Yisalaele mobimba koleka naino esalema liboso—Basi mpe bana batumbami lokola mbeka epayi ya banzambe ya bikeko—Balamani babandi kokombo Banefi liboso na bango. Penepene na mibu 363–375 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku motoba na misato Banefi bamataki elongo na mampinga na bango kobunda na Balamani, libanda ya mboka ya Libebi.

2 Mpe esalemaki ete mampinga ya Banefi ebenganamaki lisusu nsima na mboka ya Libebi. Mpe wana ezalaki bango naino ya kolembe, limpinga moko ya sika ya Balamani eyaki likolo na bango; mpe bazalaki na etumba moko ya ndongo, na lolenge ete Balamani babotolaki engumba ya Libebi, mpe babomaki mingi ya Banefi, mpe bakamataki bato ya boloko mingi.

3 Mpe ndambo etikalaki bakimaki mpe basanganaki na bafandi ya engumba ya Teakumi. Sikawa engumba ya Teakumi ezwami na ndelo mpembeni na libongo ya mbu; mpe lisusu penepene na engumba ya Libebi.

4 Mpe ezalaki mpo mampinga ya Banefi mamataki epayi ya Balamani ete babandaki kobetama; mpo soki ezalaki te mpo na oyo wana, Balamani bakokaki te kozala na nguya likolo na bango.

5 Kasi, tala, masambisi ya Nzambe ekoya likolo ya bato ya nkuna; mpe ezali na bato ya nkuna ete bato ya nkuna bapesami etumbu; mpo ezali bato ya nkuna oyo balamusi mitema ya bana ya bato mpo na kosopa makila.

6 Mpe esalemaki ete Balamani bamilengelaki mpo na koya kobunda na engumba ya Teakumi.

7 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku motoba na minei Balamani bayaki kobunda na engumba ya Teakumi, ete bakoka kokamata engumba ya Teakumi mpe lokola.

8 Mpe esalemaki ete batangolamaki mpe babenganamaki nsima na Banefi. Mpe ntango emonaki Banefi ete babenganaki Balamani babandaki komikumisa na makasi na bango moko, mpe bakendaki na makasi na bango moko, kozwa lisusu engumba ya Libebi.

9 Mpe sikawa makambo oyo nyonso masalemaki, mpe ezalaki na nkoto na nkoto oyo babomamaki ngambo na ngambo, ezala Banefi mpe Balamani lokola.

10 Mpe esalemaki ete mibu nkama misato na ntuku motoba na motoba elekaki, mpe Balamani bayaki lisusu likolo ya Banefi mpo na kobunda; mpe Banefi nzokande bayambolaki te uta na mabe oyo basalaki, kasi bakobaki se ntango nyonso na nkuna na bango.

11 Mpe ekoki kosalema te mpo na lolemo kolimbola, soki te mpo na moto kokoma bolimboli ya bobongi nie ya likambo ya nsomo ya makila mpe kobomaboma oyo ezalaki na kati ya bato, ezala ya Banefi mpe Balamani mpe lokola; mpe motema moko moko moyeisamaki makasi, ete basepelaki ntango nyonso na bosopi makila.

12 Mpe nkuna ya monene mingi boye ezalaki soki moke te na kati ya bana nyonso ya Lehi, na kati ya ndako ya Yisalaele mpe te, engebene na maloba ya Nkolo, lokola ezalaki na kati ya bato oyo.

13 Mpe esalemaki ete Balamani bakamataki engumba ya Libebi, mpe oyo esalemaki mpo motango na bango molekaki motango ya Banefi.

14 Mpe batambolaka lisusu liboso mpo na kobunda na engumba ya Teakumi, mpe babenganaki bafandi uta na yango, mpe bakamataki bato ya boloko mingi ezala basi mpe bana mpe lokola, mpe bapesaki bango lokola mbeka epayi na banzambe na bango ya bikeko.

15 Mpe esalemaki ete na mobu ya nkama misato na ntuku motoba na nsambo, Banefi basilikaki mpo Balamani batumbaki basi mpe bana na bango lokola mbeka, ete bakendaki kobunda na Balamani na nkanda ya monene koleka, na lolenge ete balongaki lisusu Balamani, mpe babenganaki bango uta na bamboka na bango.

16 Mpe Balamani bayaki lisusu te kobunda na Banefi kino na mobu ya nkama misato na ntuku sambo na mitano.

17 Mpe na mobu oyo bakitaki lisusu kobunda na Banefi na nguya na bango nyonso; mpe batangamaki te na ntina ya bonene ya motango na bango.

18 Mpe uta na ntango oyo kokende liboso Banefi bazalaki na nguya te likolo ya Balamani; kasi babandaki kobomama na bango kutu lokola mamio liboso ya moi.

19 Mpe esalemaki ete Balamani bakitaki lisusu kobunda na engumba ya Libebi, mpe etumba ya nsomo mpenza ebundamaki na mboka ya Libebi, na oyo wapi balongaki Banefi.

20 Mpe bakimaki lisusu liboso na bango, mpe bayaki na engumba ya Boaza; mpe kuna batelemelaki Balamani na mpiko mpenza, na lolenge ete Balamani bakokaki te kolonga bango kino bayaki lisusu mbala ya mibale.

21 Mpe ntango bayaki mbala ya mibale, Banefi babenganamaki mpe babomamaki na bobomi monene koleka; basi na bango mpe bana na bango bapesamaki lisusu lokola mbeka epayi ya banzambe ya bikeko.

22 Mpe esalemaki ete Banefi bakimaki lisusu uta na liboso na bango, kokamataka bafandi ya mboka nyonso elongo na bango, ezala na bingumba minene mpe na bamboka ya mike mike lokola.

23 Mpe sikawa ngai, Mormon, lokola nayebaki ete Balamani bazalaki penepene na kokweisa mboka, boye nakendaki na ngomba moke ya Simi, mpe nakamataki masolo ya makomi nyonso oyo Amaloni abombaki mpo na Nkolo.

Bimisa na lokasa