Makomi
Mosiya 10


Mokapo 10

Mokonzi Lamani akufi—Bato na ye bazali bato ya nkei mpe ya loma mpe bazali kondima mimesano ya lokuta—Zenifi na bato na ye balongi bango. Penepene na mibu 187–160 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete tobandaki lisusu kotia bokonzi mpe tobandaki lisusu kozwa mboka na kimia. Mpe nasalaki ete bibundeli ya ndenge na ndenge bisalema, ete na yango nakokaki kozwa bibundeli mpo na bato na ngai komilengela na ntango Balamani bakomata lisusu mpo na kobunda na bato na ngai.

2 Mpe natiaki bakengeli nzinganzinga mpembeni na mboka, ete Balamani bakoka kokweyela biso lisusu te na mpwasa mpe babebisa biso; mpe boye nakengelaki bato na ngai mpe bibwele na ngai, mpe nabatelaki bango uta na bokwei kati na maboko ya banguna na biso.

3 Mpe esalemaki ete tosangolaki libula ya mboka ya batata na biso mpo na ntaka ya mibu mingi, iyo, mpo na ntaka ya mibu ntuku mibale na mibale.

4 Mpe nasalaki ete mibali bakona bilanga, mpe bakolisa ndenge nyonso ya nkona mpe ndenge nyonso ya mbuma ya ndenge na ndenge.

5 Mpe nasalaki ete basi batonga, mpe basala na makasi, mpe basala, mpe babimisa ndenge nyonso ya bilamba ya lino ya malonga, iyo, mpe bilamba ya ndenge na ndenge, ete tokoka kolatisa bolumbu na biso; mpe boye tofulukaki na mboka—boye tozalaki na kimia ya ntango nyonso na mboka mpo na ntaka ya mibu ntuku mibale na mibale.

6 Mpe esalemaki ete mokonzi Lamani akufaki, mpe mwana mobali na ye abandaki kokonza na esika na ye. Mpe abandaki kolamusa bato na ye na botomboki na bato na ngai; boye babandaki komilengela mpo na etumba, mpe koya kobunda na bato na ngai.

7 Kasi natindaki banonge na ngai nzinganzinga mpembeni na mboka ya Semiloni, ete nakoka koyeba bolengeli na bango, ete nakoka komikengele na bango, ete bakoka te koya likolo ya bato na ngai mpe kobebisa bango.

8 Mpe esalemaki ete bamataki likolo ya nordi ya mboka ya Silomi, elongo na mampinga ya motango monene na bango, bato balataki manduki na matimbo, mpe na makula, mpe na mipanga, mpe na nsendo, mpe na mabanga, mpe na bilingongo; mpe bakataki sukimitu na bango kolokolo ete ezalaki bolumbu; mpe bazingamaki na mikaba ya mposo penepene na nketo na bango.

9 Mpe esalemaki ete nabombaki basi mpe bana ya bato na ngai na esobe; mpe nasalaki lisusu ete bakolo nyonso ya ngai baoyo bakokaki komema manduki, mpe lisusu bilenge mibali nyonso na ngai baoyo bakokaki komema manduki, basangana esika moko mpo na kokende kobunda na Balamani; mpe natiaki bango na milongo na bango, moto na moto engebene na mobu na ye.

10 Mpe esalemaki ete tomataki mpo na kobunda na Balamani; mpe ngai, kutu ngai, na bobange na ngai, namataki mpo na kobunda na Balamani. Mpe esalemaki ete tomataki mpo na kobunda na makasi ya Nkolo.

11 Sikawa, Balamani bayebaki eloko te mpo na oyo etali Nkolo, to makasi ya Nkolo mpe te, boye batalelaki se makasi na bango moko. Nzokande bazalaki bato makasi lokola, na kotalaka bokasi ya bato.

12 Bazalaki bato ya nkei, mpe bato ya loma, mpe bato na mposa ya makila, kondimaka na momeseno ya batata na bango, oyo ezali boye—Kondimaka ete babenganaki bango uta na mboka ya Yelusaleme mpo na masumu ya batata na bango, mpe ete basalaki bango mabe kati na esobe na bandeko na bango, mpe lisusu basalaki bango mabe wana ezalaki bango kokatisa mbu;

13 Mpe lisusu, basalaki bango mabe wana ezalaki bango na mboka ya bosangoli libula na bango ya yambo, esilaki bango kokatisa mbu, mpe nyonso oyo na ntina ete Nefi azalaki sembo mingi koleka na kobatelaka mitindo ya Nkolo—boye asungamaki na Nkolo, mpo Nkolo ayokaki sambo na ye mpe ayanolaki yango, mpe akambaki mobembo na bango na esobe.

14 Mpe bandeko na ye badasukaki na ye mpo basosolaki te lolenge ya kosala ya Nkolo; badasukaki lisusu na ye likolo ya mai mpo bayeisaki mitema na bango makasi na Nkolo.

15 Mpe lisusu badasukaki na ye ntango bakomaki na mboka elakelama, mpo balobaki ete akamataki boyangeli ya bato uta na maboko na bango; mpe balukaki koboma ye.

16 Mpe lisusu, badasukaki na ye mpo akendaki kati na esobe lokola Nkolo atindaki ye, mpe akamataki masolo ya makomi oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya motako, mpo balobaki ete ayibaki yango.

17 Mpe boye balakisaki bana na bango ete basengeli koyina bango, mpe ete basengeli koboma bango, mpe ete basengeli kowembe mpe kopunza bango, mpe basala nyonso bakoki mpo na kobebisa bango; boye bazali na boyini ya seko epayi na bana ya nefi.

18 Mpo na ntina oyo mpenza mokonzi Lamani, na mayele mabe na ye, mpe boyebi lokuta na ye ya lokuta, mpe bilaka malonga na ye, akosaki ngai, ete namemaki bato na ngai baye kati na mboka oyo, ete bakoka koboma bango; iyo, mpe tomoni mpasi oyo mibu mingi na mboka.

19 Mpe sikawa ngai, Zenifi, esilaki ngai koyebisa makambo oyo epayi ya bato na ngai mpo na oyo etali Balamani, napusaki bango mpo na kokende kobunda na bokasi na bango, kotiaka motema na bango na Nkolo; boye, towelaki na bango, miso na miso.

20 Mpe esalemaki ete tobenganaki bango lisusu uta na mboka na biso; mpe tobomaki bango na bobebisami boko monene, kutu boye mingi ete totangaki bango te.

21 Mpe esalemaki ete tozongaki lisusu na mboka na biso moko, mpe bato na ngai babandaki lisusu kobatela bibwele na bango, mpe kowana bilanga na bango.

22 Mpe sikawa ngai, lokola nazalaki mobange, napesaki bokonzi likolo ya moko ya bana mibali na ngai; boye, nakoloba lisusu te. Mpe tika Nkolo apambola bato na ngai. Amene.

Bimisa na lokasa