Makomi
Mosiya 11


Mokapo 11

Mokonzi Noa azali kokonza na nkuna—Asepeli kozala na bomoi ya loyenge elongo na basi mpe bamakango na ye—Abinadi asakoli ete bato bakokamatama kati na boumbu—Bomoi na ye bolukisami na Mokonzi Noa. Penepene na mibu 160–150 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Zenifi apesaki bokonzi likolo ya Noa, moko ya bana mibali na ye; boye Noa abandaki koyangela na esika na ye; mpe atambolaki te na banzela ya tata na ye.

2 Mpo tala, abatelaki te mitindo ya Nzambe, kasi atambolaki nsima ya mposa ya motema na ye moko. Mpe azalaki na basi mpe bamakango mingi. Mpe atindaki bato na ye kosala masumu, mpe kosala oyo ezali mabe na miso ya Nkolo. Iyo, mpe basalaki pite mpe ndenge nyonso ya nkuna.

3 Mpe akataki mpako ya eteni moko kati na mitano ya nyonso oyo bazwaki, eteni moko kati na mitano ya wolo mpe mpauni na bango, mpe eteni moko kati na mitano ya zifi na bango, mpe ya mbengi na bango, mpe ya motako na bango mpe ya ebuni na bango; mpe eteni moko kati na mitano ya banyama na bango ya mafuta; mpe lisusu eteni moko kati na mitano ya nkona nyonso ya bango.

4 Mpe nyonso oyo akamataki mpo na komisunga ye moko, mpe basi na ye mpe bamakango na ye; mpe lisusu banganganzambe na ye, mpe basi na bango mpe bamakango na bango; boye abongolaki makambo ya bokonzi.

5 Mpo akitisaki banganganzambe nyonso oyo babulisamaki na tata na ye mpe abulisaki basusu ya sika na esika na bango, lolenge ya baoyo batombwamaki likolo na lolendo ya mitema na bango.

6 Iyo, mpe boye basungamaki na goigoi na bango, mpe na bosambeli bikeko na bango, mpe na pite na bango, na mpako oyo mokonzi Noa atiaki likolo ya bato na ye; boye bato basalaki makasi mingi koleka mpo na kosunga mabe.

7 Iyo, mpe bakomaki lisusu basambeli bikeko, mpo bakosamaki na maloba ya mpamba mpe ya malete ya mokonzi mpe banganganzambe; mpo balobaki makambo ya malete epayi na bango.

8 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa atongaki bandako ya kitoko mpe ya minene mingi; mpe akembisaki yango na biloko ya ndako esalemaki mosala ya malonga na mabaya, mpe ndenge nyonso ya biloko ya motuya, ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya ebuni, mpe ya motako, mpe ya zifi, mpe ya mbengi;

9 Mpe amitongelaki lisusu ndako kitoko ya monene, mpe kiti ya bokonzi na katikati na yango, nyonso na yango ezalaki na mabaya ya malonga mpe ekembisamaki na wolo mpe mpauni mpe na biloko ya motuya.

10 Mpe asalaki lisusu ete basali na ye bakoka kosala misala ya malonga ya ndenge nyonso na kati ya bifelo ya tempelo, ya mabaya ya malonga, mpe ya mbengi, mpe ya motako.

11 Mpe kiti oyo etiamaki mpembeni mpo na banganganzambe banene, oyo ezalaki koleka kiti nyonso mosusu, akembisaki yango na wolo ya peto; mpe asalaki ete etelemelo moko etongama liboso na yango, ete bakoka kopemisa nzoto na bango mpe maboko na bango likolo na yango ntango bakoloba maloba ya lokuta mpe ya mpamba na bato na ye.

12 Mpe esalemaki ete atongaki linongi moko penepene na tempelo; iyo, linongi moko ya molai mpenza, kutu boye molai ete akoka koteleme likolo na nsonge na yango mpe komona uta na likolo mboka ya Silomi mpe lisusu mboka ya Semiloni, oyo esilaki kozwama na Balamani; mpe akokaki kutu komona mboka mobimba nzinganzinga mpembeni.

13 Mpe esalemaki ete atongaki bandako mingi na mboka ya Silomi; mpe atongaki linongi monene likolo ya ngomba ya moke na nordi ya mboka ya Silomi, oyo ezalaki ebombelo mpo na bana ya nefi na ntango bakimaki uta na mboka; mpe boye asalaki na bozwi boye azwaki uta na mpako ya bato na ye.

14 Mpe esalemaki ete atiaki motema na ye likolo ya bozwi na ye, mpe alekisaki ntango na ye na kotambwisaka bomoi ya loyenge elongo na basi na ye mpe bamakango na ye; mpe boye banganganzambe na ye balekisaki ntango na bango elongo na basi ya pite.

15 Mpe esalemaki ete alonaki bilanga ya vinyo nzinganzinga mpembeni na mboka; mpe atongaki ekamoli ya vinyo, mpe abimisaki vinyo beboo; mpe boye akomaki momeli vinyo, mpe bato na ye mpe lokola.

16 Mpe esalemaki ete Balamani babandaki koya kobundisa bato na ye, kobundisa bato na motango moke, mpe koboma bango na bilanga na bango, mpe wana ezalaki bango koleisa bibwele na bango.

17 Mpe mokonzi Noa atindaki bakengeli nzinganzinga mpembeni na mboka mpo na kotelemisa bango mosika, kasi atindaki motango ya kokoka te, mpe Balamani babundisaki bango mpe babomaki bango, mpe babenganaki mingi ya bibwele na bango uta na mboka; boye Balamani babandaki koboma bango, mpe kosalela nkanda na bango likolo na bango.

18 Mpe esalemaki ete mokonzi Noa atindaki mampinga ya basoda na ye mpo na kobunda na bango mpe babenganamaki nsima, soki te babenganaki bango nsima mpo na ntango; boye, bazongaki kosepelaka na bopunzi na bango.

19 Mpe sikawa, na ntina ya elonga monene oyo batombwanaki likolo na lolendo ya mitema na bango; basalaki lofundo mpo na makasi na bango moko, kolobaka ete ntuku mitano kati na bango bakokaki kobunda na nkoto ya Balamani; mpe boye babetaki ntolo, mpe basepelaki na makila, mpe bosopi ya makila ya bandeko na bango, mpe oyo na ntina ya nkuna ya mokonzi na bango mpe banganganzambe na bango.

20 Mpe esalemaki ete ezalaki na moto na kati na bango oyo kani nkombo ezalaki Abinadi; mpe akendaki na kati na bango, mpe abandaki kosakola, kolobaka: Tala, boye elobi Nkolo, mpe boye etindi ye ngai, kolobaka, Kende, mpe loba epayi ya bato oyo, boye elobi Nkolo—Lisuma ezala epayi ya bato oyo, mpo namoni bonsomo na bango, mpe nkuna na bango, mpe pite na bango; mpe longola se soki bayamboli nakobimela bango na nkanda na ngai.

21 Mpe longola se soki bayamboli mpe bazongi epayi ya Nkolo Nzambe na bango, Tala, nakotika bango na maboko ya banguna na bango; iyo, mpe bakomemama kati na boumbu; mpe bakotungisama na loboko ya banguna na bango.

22 Mpe ekosalema ete bakoyeba ete nazali Nkolo Nzambe na bango, mpe nazali Nzambe ya zuwa, kokitisaka mabe ya bato na ngai.

23 Mpe ekosalema ete longola se soki bato oyo bayamboli mpe bazongi epayi ya Nkolo Nzambe na bango, bakomemama kati na boumbu; mpe moko te akokangola bango, longola se soki ezali Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso.

24 Iyo, mpe ekosalema ete ekobelela bango epayi na ngai nakozala malembe na koyoka koganga na bango; iyo, mpe nakotika bango ete babetama na banguna na bango.

25 Mpe longola se soki bayamboli na elamba ya saki mpe mputulu ya moto, mpe babeleli na bokasi epayi ya Nkolo Nzambe na bango, nakoyoka sambo na bango te, mpe nakokangola bango uta na mitungisi na bango te; mpe boye elobi Nkolo, mpe boye etindaki ye ngai.

26 Sikawa esalemaki ete ntango Abinadi alobaki maloba oyo epayi na bango badasukaki na ye, mpe balukaki kolongola bomoi na ye; kasi Nkolo akangolaki ye uta na maboko na bango.

27 Sikawa ntango mokonzi Noa ayokaki maloba oyo Abinadi alobaki epayi ya bato, adasukaki mpe lokola; mpe alobaki: Nani azali Abinadi, ete ngai mpe bato na ngai tosambisama na ye, soki te nani azali Nkolo, oyo akomema likolo ya bato na ngai motungisi monene ya lolenge oyo?

28 Natindi bino bomema Abinadi awa, ete nakoka koboma ye, mpo alobaki makambo oyo mpo ete akoka kolamusa bato na ngai na nkanda moko na mosusu, mpe kobimisa boswani na kati ya bato na ngai; boye nakoboma ye.

29 Sikawa miso ya bato ezalaki ya kokufa; boye bayeisaki mitema na bango makasi na kotelemelaka maloba ya Abinadi, mpe balukaki uta na ntango wana kokende liboso kokamata ye. Mpe mokonzi Noa ayeisaki motema na ye makasi na kotelemelaka liloba ya Nkolo, mpe ayambolaki te uta na misala na ye ya mabe.

Bimisa na lokasa