Makomi
Mosiya 17


Mokapo 17

Alma andimi mpe akomi maloba ya Abinadi—Abinadi akufi na liwa ya moto—Asakoli bokono mpe liwa ya moto likolo ya babomi na ye. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ntango Abinadi asilisaki maloba oyo, ete mokonzi atindaki ete banganganzambe basengeli kokamata ye mpe basala ete apesama na liwa.

2 Kasi ezalaki na moto moko na kati na bango oyo kani nkombo ezalaki Alma, ye mpe lokola azalaki eboto ya Nefi. Mpe azalaki elenge mobali moko, mpe andimaki maloba oyo Abinadi alobaki, mpo ayebaki oyo etali mabe oyo Abinadi atatolaki na kofundaka bango; boye abandaki kosamba na mokonzi ete azala te na nkanda na Abinadi, kasi apesa nzela ete akoka kokende na kimia.

3 Kasi Mokonzi adasukaki mingi, mpe asalaki ete Alma abenganama uta na kati na bango, mpe atindaki basali na ye nsima na ye ete bakoka koboma ye.

4 Kasi akimaki uta na liboso na bango mpe amibombaki ete bamonaki ye te. Mpe wana ebombamaki ye mikolo mingi akomaki makambo nyonso oyo Abinadi alobaki.

5 Mpe esalemaki ete mokonzi asalaki ete bakengeli na ye bazinga Abinadi mpe bakamata ye; mpe bakangaki ye singa mpe babwakaki ye kati na boloko.

6 Mpe nsima ya mikolo misato, lokola azwaki toli uta na banganganzambe na ye, asalaki ete amemama lisusu liboso na ye.

7 Mpe alobaki epayi na ye: Abinadi, tozwi likambo ya kofunda yo, mpe olongobani na liwa.

8 Mpo olobaki ete Nzambe ye moko akokita na kati ya bana ya bato; mpe sikawa, mpo na ntina ya likambo oyo okopesama liwa longola se soki olongoli maloba oyo olobaki mabe mpo na ntina na ngai mpe bato na ngai.

9 Sikawa Abinadi alobaki epayi na ye: Nalobi epayi na yo, nakolongola te maloba oyo nalobaki epayi na yo mpo na ntina ya bato oyo, mpo ezali solo; mpe ete bokoka koyeba bosolo na yango napesaki nzela ngai moko ete nakweyaki kati na maboko na yo.

10 Iyo, mpe nakondima kutu kino liwa, mpe nakolongola maloba na ngai te, mpe makotelema lokola litatoli mpo na yo. Mpe soki obomi ngai okosopa makila mazanga elindo, mpe oyo ekotelema lokola litatoli mpo na mabe na yo na mokolo ya nsuka.

11 Mpe sikawa mokonzi Noa azalaki penepene ya kotika ye, mpo abangaki liloba na ye; mpo abangaki ete bosambisi ya Nzambe eya likolo na ye.

12 Kasi banganganzambe batombolaki mingongo na bango na kotelemelaka ye, mpe babandaki kofunda ye, kolobaka: Afingaki mokonzi. Boye mokonzi akomaki na nkanda na ye, mpe apesi ye ete akoka kobomama.

13 Mpe esalemaki ete bakamataki ye mpe bakangaki ye singa, mpe bafiakolaki mposo na ye na nkoni ya moto, iyo, kutu kino liwa.

14 Mpe sikawa ebandaki mololi kozikisa ye, agangaki epayi na bango, kolobaka:

15 Tala, kutu lokola bosali epayi na ngai, bongo nde ekosalema ete nkona na bino ekosala ete mingi bakoyokisama mpasi oyo nayoki, kutu mpasi ya liwa na moto; mpe oyo mpo bandimeli lobiko ya bato na Nkolo Nzambe na bango.

16 Mpe ekosalema ete bokotungisama na ndenge nyonso ya bokono na ntina ya masumu na bino.

17 Iyo, mpe bokobetama epayi na epayi, mpe bokobenganama mpe bokopanzama esika na esika, kutu lokola ebwele ya zamba oyo ebenganami na nyama ya loma.

18 Mpe na mokolo wana bakosalela bino bokila, mpe bokokangama na loboko ya banguna na bino, mpe nde bokoyoka mpasi, lokola nazali koyoka mpasi, bolozi ya liwa na moto.

19 Boye Nzambe nde asalaka bobekoli likolo na bango oyo babebisaki bato na ye. O Nzambe, yamba molimo na ngai.

20 Mpe sikawa, esilaki Abinadi koloba maloba oyo, akweyaki, nsima ya koyoka mpasi ya liwa na moto; iyo, apesamaki na liwa mpo aboyaki kowangana mitindo ya Nzambe, mpe akangaki bosolo ya maloba na ye na liwa na ye.

Bimisa na lokasa