Makomi
Mosiya 19


Mokapo 19

Gideona aluki koboma Mokonzi Noa—Balamani bakamati mboka—Mokonzi Noa akufi na liwa ya moto—Limiyi akonzi lokola mokonzi oyo ayangelami. Penepene na mibu 145–121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete limpinga ya mokonzi bazongaki, wana elukaki bango bato ya Nkolo kasi bobele mpamba.

2 Mpe sikawa tala, bato ya mokonzi bazalaki moke, mpo bakutolamaki, mpe bokabwani ebandaki kozala na kati ya bato oyo batikalaki.

3 Mpe ndambo moke ebandaki kobimisa libanda bokaneli na mokonzi, mpe boweli monene ebandaki kozala na kati na bango.

4 Mpe sikawa ezalaki na moto moko na kati na bango oyo kani nkombo ezalaki Gideona, mpe ezalaki ye moto ya makasi mpe monguna ya mokonzi, boye abendaki mompanga na ye, mpe alapaki ndai na nkele na ye ete akoboma mokonzi.

5 Mpe esalemaki ete abundaki na mokonzi; mpe emonaki mokonzi ete azalaki penepene na kolonga ye, akimaki mpe akendaki likolo ya linongi oyo ezalaki mpembeni na tempelo.

6 Mpe Gideona alandaki ye na nsima mpe azalaki penepene na kokoma likolo ya linongi mpo na koboma mokonzi, mpe mokonzi abwakaki miso na ye nzinganzinga epayi na mboka ya Semiloni, mpe tala, limpinga ya Balamani bazalaki kati na ndelo ya mboka.

7 Mpe sikawa mokonzi abelelaki makasi na nsomo ya molimo na ye, kolobaka: Gideona, bikisa ngai, mpo Balamani bazali likolo na biso mpe bakobebisa biso; iyo, bakobebisa bato na ngai.

8 Mpe sikawa mokonzi azalaki komitungisa mingi te mpo na bato na ye lokola azalaki mpo na bomoi na ye moko; nzokande, Gideona abikisaki bomoi na ye.

9 Mpe mokonzi atindaki bato ete bakima liboso ya Balamani, mpe ye moko akendaki liboso na bango, mpe bakimaki kati na esobe, elongo na basi na bango mpe bana na bango.

10 Mpe esalemaki ete Balamani balandaki bango, mpe bakangaki bango, mpe babandaki koboma bango.

11 Sikawa esalemaki ete mokonzi atindaki bango ete mibali nyonso batika basi na bango mpe bana na bango, mpe bakima liboso ya Balamani.

12 Sikawa ezalaki na mingi baoyo balingaki te kotika bango, kasi balingaki nde kotikala mpe kokufa elongo na bango. Mpe ndambo ya bato batikali batikaki basi na bango mpe bana na bango mpe bakimaki.

13 Mpe esalemaki ete bango oyo batikalaki elongo na basi na bango mpe na bana na bango basalaki ete bana basi ya kitoko na bango bakende kotelema mpe kobondela Balamani ete baboma bango te.

14 Mpe esalemaki ete Balamani bayokelaki bango mawa, mpo basenginiamaki na kitoko ya basi na bango.

15 Boye Balamani babikisaki bomoi na bango, mpe bakamataki bango bakangemi mpe bazongisaki bango na mboka ya Nefi, mpe bapesaki ndingisa epayi na bango ete bakoka kozwa mboka, na nse ya masengeli ete bapesa mokonzi Noa na maboko ya Balamani, mpe bapesa bozwi na bango, kutu ndambo ya nyonso oyo bazalaki na yango, ndambo ya wolo na bango, mpe mpauni na bango, mpe biloko nyonso ya motuya na bango, mpe boye bafutaki mpako na mokonzi ya Balamani mobu nsima na mobu.

16 Mpe sikawa ezalaki na moko ya bana mibali ya mokonzi na kati na bango oyo bakamatamaki baumbu, oyo kani nkombo ezalaki Limiyi.

17 Mpe sikawa Limiyi azalaki na mposa ete tata na ye abebisama te; nzokande, Limiyi abosanaki te mabe ya tata na ye, mpo azalaki ye moko moyengebene.

18 Mpe esalemaki ete na nkuku Gideona atindaki bato kati na esobe, mpo na koluka mokonzi mpe baoyo bazalaki elongo na ye. Mpe esalemaki ete bakutanaki na bato yango na esobe, nyonso longola se mokonzi mpe banganganzambe na ye.

19 Sikawa balapaki ndai na mitema na bango ete bakozonga na mboka ya Nefi, mpe soki basi na bango mpe bana na bango babomamaki, mpe lisusu bango oyo batikalaki elongo na bango, ete bakoluka bobekoli, mpe bakowa elongo na bango lokola.

20 Mpe mokonzi atindaki bango ete bazonga te; mpe basilikaki na mokonzi, mpe basalaki ete ayoka mpasi, kutu kino na liwa ya moto.

21 Mpe bazalaki penepene na kokamata banganganzambe lisusu mpe kopesa bango liwa, mpe bakimaki liboso na bango.

22 Mpe esalemaki ete bazalaki penepene na kozonga na mboka ya Nefi, mpe bakutanaki na bato ya Gideona. Mpe bato ya Gideona bayebisaki bango makambo nyonso malekaki na basi na bango mpe bana na bango; mpe ete Balamani bapesaka bango ndingisa ete bakoka kozwa mboka na kofutaka mpako ndambo ya nyonso oyo bazalaki na yango epayi ya Balamani.

23 Mpe bato balobaki epayi ya bato ya Gideona ete babomaki mokonzi, mpe banganganzambe na ye bakimaki mosika mpenza na bango kati na esobe.

24 Mpe esalemaki ete esilisaki bango molulu, ete bazongaki na mboka ya Nefi, kosepelaka, mpo basi na bango mpe bana na bango babomamaki te; mpe balobelaki Gideona nini basalaki na mokonzi.

25 Mpe esalemaki ete mokonzi na Balamani alapaki ndai epayi na bango, ete bato na ye bakoboma bango te.

26 Mpe lisusu Limiyi, lokola azalaki mwana mobali ya mokonzi, lokola bokonzi epesamaki likolo na ye na bato, alapaki ndai epayi ya mokonzi ya Balamani ete bato na ye bakofuta mpako epayi na ye, kutu ndambo ya nyonso oyo bazalaki na yango.

27 Mpe esalemaki ete Limiyi abandaki kotia bokonzi mpe kofandisa kimia na kati ya bato na ye.

28 Mpe mokonzi ya Balamani atiaki bakengeli nzinganzinga mpembeni na mboka, ete akoka kobatela bato ya Limiyi na mboka, mpo ete bakoka kokende te kati na esobe; mpe afutaki bakengeli na ye uta na mpako oyo azwaki uta na Banefi.

29 Mpe sikawa mokonzi Limiyi azwaki kimia ntango nyonso kati na bokonzi na ye mpo na ntaka ya mibu mibale, mpo Balamani batungisaki bango te to balukaki te kobebisa bango.

Bimisa na lokasa