Makomi
Mosiya 20


Mokapo 20

Boko bana basi ya Balamani balongolami na Banganganzambe ya Noa—Balamani basali etumba na Limiyi mpe bato na ye—Mampinga ya Balamani babenganami mpe bakitisami na kimia. Penepene na mibu 145–123 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa ezalaki na esika moko na Semiloni wapi bana basi ya Balamani basanganaki bango moko esika moko mpo na koyemba, mpe mpo na kobina, mpe mpo na kosepela.

2 Mpe esalemaki ete mokolo moko ezalaki na motango moko moke na bango oyo basanganaki esika moko mpo na koyemba mpe kobina.

3 Mpe sikawa banganganzambe ya mokonzi Noa, lokola bazalaki koyoka nsoni mpo na kozonga na engumba ya Nefi, iyo, mpe lisusu lokola bazalaki kobanga ete bato baboma bango, boye bamekaki te kozonga na basi na bango mpe bana na bango.

4 Mpe lokola batikalaki na esobe, mpe lokola babombolaki bana basi ya Balamani, babatamaki mpe basenzelaki bango;

5 Mpe ntango bazalaki bobele motango moke na bango oyo basanganaki esika moko mpo na kobina, babimaki uta na esika na bango ya bonkutu mpe bakamataki bango mpe bamemaki bango kati na esobe; iyo, ntuku mibale na minei ya bana basi ya Balamani bamemamaki kati na esobe.

6 Mpe esalemaki ete emonaki Balamani ete bana basi na bango bazalaki komonana te, basilikaki na bato ya Limiyi, mpo bakanisaki ete ezalaki bato ya Limiyi.

7 Boye batindaki mampinga ya basoda na bango; iyo, kutu mokonzi ye moko akendaki liboso ya bato na ye; mpe bamataki na mboka ya Nefi kobebisa bato ya Limiyi.

8 Mpe sikawa Limiyi abombolaki bango uta na linongi, kutu abombolaki bolengeli na bango nyonso mpo na bitumba; boye asangisaki bato na ye elongo, mpe babatamaki mpo na kozela bango kati na bilanga mpe kati na zamba.

9 Mpe esalemaki ete ntango Balamani bamataki, bato ya Limiyi babandaki kokweya likolo na bango uta na bisika na bango ya kobatama, mpe babandaki koboma bango.

10 Mpe esalemaki ete etumba ekomaki nsomo mpenza, mpo babundaki lokola bankosi mpo na banyama na bango ya bokangi.

11 Mpe esalemaki ete bato ya Limiyi babandaki kobengana Balamani liboso na bango; nzokande bazalaki ata na ndambo te ya motango mingi boye lokola Balamani. Kasi babundaki mpo na bomoi na bango, mpe mpo na basi na bango, mpe mpo na bana na bango; boye basalaki makasi bango moko mpe babundaki lokola bilima mabe.

12 Mpe esalemaki ete bakutaki mokonzi na Balamani na kati ya motango ya bakufi; nzokande akufaki te, bobele kaka azokaki mpe atikalaki na mabele, lokola bokimi ya bato na ye ezalaki bongo mbangu mingi.

13 Mpe bakamataki ye mpe bakangaki mpota na ye, mpe bamemaki ye liboso ya Limiyi, mpe balobaki: tala, oyo nde mokonzi ya Balamani; azokaki mpe akweyaki na kati ya bakufi na bango, mpe batikaki ye; mpe tala, tomemi ye liboso na yo; mpe sikawa tika biso toboma ye.

14 Kasi Limiyi alobaki epayi na bango: Bokoboma ye te, kasi bokomema ye awa mpo ete nakoka komona ye. Mpe bamemaki ye. Mpe Limiyi alobaki epayi na ye: Ntina nini esali ete boya mpo na komata mpe kobundisa bato na ngai etumba? Tala, bato na ngai babukaki te ndai oyo nasalaki epayi na yo; boye, ntina kani bobuki ndai oyo bolapaki epayi ya bato na ngai?

15 Mpe sikawa mokonzi alobaki: Nabukaki ndai mpo bato na yo balongolaki bana basi ya bato na ngai na makasi; boye, na nkanda na ngai nasalaki ete bato na ngai bamata mpo na kobunda na bato na yo.

16 Mpe sikawa Limiyi ayokaki eloko moko te mpo na oyo etali likambo oyo; boye alobaki: Nakoluka na kati ya bato na ngai mpe nyonso oyo asalaki likambo oyo akowa. Boye asalaki ete boluki bosalema na kati ya bato na ye.

17 Sikawa eyokaki Gideona makambo oyo, ye kozalaka kapitene ya mokonzi, akendaki mpe alobaki epayi na mokonzi: Nakosenga yo otika, mpe koluka te bato oyo, mpe kotia te likambo oyo na moto na bango.

18 Mpo emikundoli yo te banganganzambe ya tata na yo, baoyo bato oyo balukaki kobebisa? Mpe ezali bango te na esobe? Ezali bango te bato oyo bayibaki bana basi ya Balamani?

19 Mpe sikawa, tala, mpe yebisa mokonzi makambo oyo, ete akoka koyebisa bato na ye ete bakoka kokita na kimia epayi na biso; mpo tala basili kala komilengela mpo na koya kobundisa biso; mpe tala lisusu tozali bobele bato moke.

20 Mpe tala, bakoya na mampinga na bango ya bato baike; mpe longola se soki mokonzi akitisi bango na kimia epayi na biso tosengeli kowa.

21 Mpo esili maloba ya Abinadi kokokisama te, oyo asakolaki na kotelemelaka biso—mpe nyonso oyo mpo toyokaki te maloba ya Nkolo, mpe totikaki te masumu na biso?

22 Mpe sikawa tika topesa mokonzi kimia; mpe tokokisa ndai oyo tosalaki epayi na ye; mpo eleki malamu mingi tozala na boumbu na esika ete tobungisa bomoi na biso; boye, tika totia nsuka na kosopaka makila mingi.

23 Mpe sikawa Limiyi ayebisaki mokonzi makambo nyonso mpo na oyo etali tata na ye, mpe banganganzambe baoyo bakimaki kati na esobe, mpe atiaki bomemi mosika ya bana basi na bango na moto na bango.

24 Mpe esalemaki ete mokonzi azwaki kimia epayi ya bato na ye; mpe alobaki epayi na bango: Tika tokende kokutana na bato na ngai, tozala na manduki te; mpe nalapi ndai epayi na bino ete bato na ngai bakoboma bato na yo te.

25 Mpe esalemaki ete balandaki mokonzi, mpe bakendaki, kozalaka na manduki te, kokutana na Balamani. Mpe esalemaki ete bakutanaki na Balamani; mpe mokonzi na Balamani agumbamaki ye moko liboso na bango, mpe asambaki mpo na litomba ya bato ya Limiyi.

26 Mpe emonaki Balamani bato ya Limiyi, ete bazalaki na manduki te, bayokelaki bango mawa mpe bazwaki kimia epayi na bango, mpe bazongaki elongo na mokonzi na bango na kimia na mboka na bango.

Bimisa na lokasa