Makomi
Mosiya 21


Mokapo 21

Bato ya Limiyi babetami mpe balongami na Balamani—Bato ya Limiyi bakutani na Amona mpe babongwani—Bayebisi Amona mpo na oyo etali bapalaki ntuku mibale na minei ya Bayelede. Penepene na mibu 122–121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Limiyi mpe bato na ye bazongaki na engumba ya Nefi, mpe babandaki kofanda na mboka na kimia lisusu.

2 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi Balamani babandaki lisusu kolamusama na nkanda na Banefi, mpe babandaki lisusu koya kati na ndelo ya mboka nzinganzinga mpembeni.

3 Sikawa bamekaki te koboma bango, na ntina ya ndai oyo mokonzi na bango alapaki epayi ya Limiyi; kasi babetaki bango na matama na bango, mpe basalelaki likoki likolo na bango; mpe babandaki kotia mikumba ya bozito likolo ya mikongo na bango, mpe komema bango lokola bakosala bampunda ya baba—

4 Iyo, nyonso oyo esalemaki mpo ete liloba ya Nkolo ekokisama.

5 Mpe sikawa mitungisi ya Banefi ezalaki minene, mpe ezalaki na nzela te oyo bakokaki komibikisa uta na maboko na bango, mpo Balamani bazingaki bango epayi na epayi.

6 Mpe esalemaki ete bato babandaki koyima-yima na mokonzi na ntina ya mitungisi na bango; mpe babandaki kozala na mposa ya kokende kobunda na bango. Mpe batungisaki mokonzi mpenza na boleli na bango; boye apesaki ndingisa epayi na bango ete basala engebene na mposa na bango.

7 Mpe basanganaki lisusu bango moko esika moko, mpe balataki bibundeli na bango, mpe bakendaki likolo ya Balamani mpo na kobengana bango uta na mboka na bango.

8 Mpe esalemaki ete Balamani babetaki bango, mpe bazongisaki bango nsima, mpe babomaki mingi kati na bango.

9 Mpe sikawa ezalaki matanga mpe boleli monene na kati ya bato ya Limiyi, bakufeli mibali kolelaka mpo na mibali na bango, mwana mobali mpe mwana mwasi kolelaka mpo na batata na bango, mpe bandeko mpo na bandeko na bango.

10 Sikawa ezalaki na bakufeli mibali mpenza na mboka, mpe bazalaki kobelela na bokasi mokolo na mokolo, mpo bobangi monene ya Balamani eyaki likolo na bango.

11 Mpe esalemaki ete eleli na bango ya ntango nyonso elamusaki oyo etikalaki ya bato nyonso ya Limiyi na nkanda na Balamani; mpe bakendaki lisusu mpo na kobunda, kasi babenganamaki nsima lisusu, koyokaka mpasi ya kobungisa bato mingi.

12 Iyo, bakendaki lisusu mbala ya misato, mpe bayokaki mpasi na lolenge se moko; mpe bango oyo bakufaki te bazongaki lisusu na engumba ya Nefi.

13 Mpe bamikitisaki kutu kino na mputulu, na komiyangelaka bango moko na nkanga ya boumbu, komitikaka bango moko mpo na kobetama, mpe kobenganama epayi na epayi, mpe komemisama mikumba, engebene na mposa ya banguna na bango.

14 Mpe bamikitisaki kutu na bozindo ya bomikitisi; mpe babelelaki makasi na Nzambe; iyo, kutu na bolayi ya mokolo mobimba balelaki na Nzambe na bango ete abikisa bango na mitungisi na bango.

15 Mpe sikawa Nkolo azalaki malembe na koyoka kobelela na bango na ntina ya masumu na bango; nzokande Nkolo ayokaki kobelela na bango, mpe abandaki kolembisa mitema ya Balamani ete babandaki kokomisa mikumba na bango pepele; nzokande Nkolo amonaki te ete elongobani kobikisa bango uta na boumbu.

16 Mpe esalemaki ete babandaki kofuluka moke moke na mboka, mpe babandaki lisusu kokolisa mboto mingi koleka, mpe bibwele, mpe bitonga, ete bayokaki te mpasi ya nzala.

17 Sikawa ezalaki na motango monene ya basi, mingi koleka oyo ezalaki ya mibali; boye mokonzi Limiyi atindaki ete mobali moko moko asengeli kokaba ndambo ya lisalisi na basi bakufeli mibali mpe bana na bango, ete bakoka kowa te na nzala; mpe oyo basalaki na ntina ya bonene ya motango ya baoyo babomaki.

18 Sikawa bato ya Limiyi basanganaki elongo na lingomba moko lokola mpenza ekokaki, mpe babatelaki mboto na bango mpe bibwele na bango.

19 Mpe mokonzi ye moko atiaki te motema ya kozala na bokengi na ye libanda ya bifelo ya engumba, longola se soki amemaki bakengeli na ye elongo na ye, kobangaka ete akoka na lolenge moko to mosusu kokweya na maboko ya Balamani.

20 Mpe asalaki ete bato na ye basenzela mboka nzinganzinga mpembeni, ete na lolenge moko to mosusu bakoka kokamata banganganzambe baoyo bakimaki kati na esobe, baoyo bayibaki bana basi ya Balamani, mpe baoyo basalaki bobebisami monene ya lolenge oyo eya likolo na bango.

21 Mpo bazalaki na mposa ya kokamata bango ete bakoka kopesa bango etumbu; mpo bayaki na kati ya mboka ya Nefi na butu, mpe komema mosika mboto na bango mpe mingi ya biloko ya motuya na bango; boye babatamaki kozela bango.

22 Mpe esalemaki ete mbilinga-mbilinga ezalaki lisusu te katikati ya Balamani mpe bato ya Limiyi, kutu kino na ntango Amona mpe bandeko na ye bayaki kati na mboka na bango.

23 Mpe mokonzi ezalaki ye libanda ya ekuke ya engumba elongo na bakengeli na ye, abombolaki Amona mpe bandeko na ye; mpe kobanzaka ete bango bazalaki banganganzambe ya Noa boye asalaki ete bakamatama, mpe bakangama, mpe babwakama kati na boloko. Mpe soki bazalaki banganganzambe ya Noa alingaki kosala ete bapesa bango liwa.

24 Kasi ntango amonaki ete ezalaki bango te, kasi ete bazalaki bandeko na ye, mpe bayaki uta na mboka ya Zalayemila, atondisamaki na bosepeli monene koleka.

25 Sikawa mokonzi Limiyi atindaki, yambo ya boyei ya Amona, motango moke ya bato mpo na koluka mboka ya Zalayemila; kasi bakokaki komona yango te, mpe babungaki na esobe.

26 Nzokande, bamonaki mboka moko oyo ezalaki na bato; iyo, mboka oyo etondisamaki na mikuwa mikawuka; iyo, mboka moko oyo ezalaki na bato mpe oyo ebebisamaki; mpe bango, lokola babanzaki ete ezalaki mboka ya Zalayemila, bazongaki na mboka ya Nefi, mpe bakomaki na ndelo ya mboka mikolo mingi te yambo ya boyei ya Amona.

27 Mpe bamemaki lisolo ya makomi moko elongo na bango, kutu lisolo ya makomi ya bato oyo kani mikuwa bamonaki; mpe ekomamaki likolo ya bapalaki ya makele.

28 Mpe sikawa Limiyi atondisamaki lisusu na bosepeli na koyekolaka uta na monoko ya Amona ete mokonzi Mosiya azalaki na likabo uta na Nzambe, na oyo wapi akokaki kolimbola minkoma ya lolenge oyo; iyo, mpe Amona asepelaki mpe lokola.

29 Kasi Amona mpe bandeko na ye batondisamaki na mawa mpo bandeko na bango mingi mpenza babomamaki;

30 Mpe lisusu ete mokonzi Noa mpe banganganzambe na ye basalaki ete bato basala masumu mpe mabe mingi mpenza na Nzambe; mpe balelaki lisusu mpo na liwa ya Abinadi; mpe lisusu mpo na bokei ya Alma mpe bato oyo bakendaki elongo na ye, baoyo babongisaki eklezia ya Nzambe na makasi mpe nguya ya Nzambe, mpe bondimi likolo ya maloba oyo Abinadi alobaki.

31 Iyo, balelaki mpo na bokei na bango, mpo bayebaki epayi wapi bakimaki te. Sikawa balingaki na bosepeli kozwama elongo na bango, mpo bango moko bakotaki kati na liyokani na Nzambe mpo na kosalela ye mpe kobomba mitindo na ye.

32 Mpe sikawa uta na boyei ya Amona, mokonzi Limiyi akotaki kati na liyokani na Nzambe, mpe mingi ya bato na ye mpe lokola, mpo na kosalela ye mpe kobomba mitindo na ye.

33 Mpe esalemaki ete mokonzi Limiyi mpe mingi ya bato na ye bazalaki na mposa ya kobatisama; kasi moto moko te na mboka oyo azalaki na likoki uta na Nzambe. Mpe Amona aboyaki kosala likambo oyo, komonaka ye moko ete azalaki mosali moko alongobani te.

34 Boye na ntango wana bamibongisamaki te kati na eklezia moko, kozelaka Molimo ya Nkolo. Sikawa bakomaki na mposa ya kokoma kutu lokola Alma mpe bandeko na ye, baoyo bakimaki kati na esobe.

35 Bazalaki na mposa ya kobatisama lokola elembo mpe litatoli ete bazalaki na bolingi ya kosalela Nzambe na motema na bango mobimba; nzokande babendaki ntango molai; mpe lisolo ya libatisi na bango ekopesama nsima awa.

36 Mpe sikawa boyekoli nyonso ya Amona mpe bato na ye, mpe mokonzi Limiyi mpe bato na ye, ezalaki mpo na kokangolama bango moko uta na maboko ya Balamani mpe uta na boumbu.

Bimisa na lokasa