Makomi
Mosiya 22


Mokapo 22

Miango misalemi mpo ete bato bakima uta na boumbu ya Balamani—Balamani balangwisami—Bato bakimi, bazongi na Zalayemila, mpe bakomi bato ya Mokonzi Mosiya. Penepene na mibu 121–120 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Amona mpe mokonzi Limiyi babandaki kotunana elongo na bato lolenge nini bakokaki komikangola uta na boumbu; mpe kutu basalaki ete bato nyonso basangana bango moko esika moko; mpe oyo basalaki ete bakoka koyoka kopona ya bato mpo na oyo etali likambo yango.

2 Mpe esalemaki ete bakokaki te komona nzela mpo na komikangola uta na boumbu, longola se komema basi na bango mpe bana na bango, mpe bibwele na bango, mpe bitonga na bango, mpe biema na bango, mpe kokima kati na esobe; mpo lokola Balamani bazalaki na motango monene mpenza, bato ya Limiyi bakokaki te kobunda na bango, ntango bakanisaki komikangola uta na boumbu na kosalelaka mompanga.

3 Mpe esalemaki ete Gideona abelemaki mpe atelemaki liboso ya mokonzi, mpe alobaki epayi na ye: Sikawa O mokonzi, kino sikawa oyokaka maloba na ngai mbala mingi ntango tozalaka na boweli na bandeko na biso, Balamani.

4 Mpe sikawa O mokonzi, soki omonaki te ete nazalaki mosali ya mpamba, to soki kino sikawa oyokaki maloba na ngai soki ata moke, mpe ete masalisaki yo, kutu bongo nazali na mposa ete oyoka maloba na ngai na ntango oyo, mpe nakozala mosali na yo mpe nakokangola bato oyo uta na boumbu.

5 Mpe mokonzi apesaki ndingisa epayi na ye ete akoka koloba. Mpe Gideona alobaki epayi na ye:

6 Tala nzela ya nsima, na nzela ya efelo ya nsima, na mopanzi ya nsima ya engumba. Balamani, to bakengeli ya Balamani, na butu balangwaka; boye tika totinda bosakoli na kati ya bato oyo nyonso ete basangisa bibwele mpe bitonga na bango esika moko, ete bakoka kokumba yango kati na esobe na butu.

7 Mpe nakokende engebene na mibeko na yo mpe nakofuta mpako ya nsuka ya vinyo na Balamani, mpe bakolangwa; mpe tokoleka na nzela ya bonkuku na loboko ya mwasi ya nganda na bango ntango balangwe mpe bazali na mpongi.

8 Boye tokokima elongo na basi na biso mpe bana na biso, bibwele na biso, mpe bitonga na biso kati na esobe; mpe tokokende mobembo nzinganzinga na mboka ya Silomi.

9 Mpe esalemaki ete mokonzi ayokaki maloba ya Gideona.

10 Mpe mokonzi Limiyi asalaki ete bato na ye basangisa bibwele na bango elongo; mpe atindaki mpako ya vinyo na Balamani; mpe atindaki lisusu vinyo mingi koleka, lokola libonza epayi na bango; mpe bamelaki lokola motema molingi vinyo oyo mokonzi Limiyi atindaki epayi na bango.

11 Mpe esalemaki ete bato ya mokonzi Limiyi bakimaki na butu kati na esobe elongo na bibwele na bango mpe bitonga na bango, mpe bakendaki nzinganzinga mpembeni na mboka ya Silomi na esobe, mpe babukaki botamboli na bango epayi na mboka ya Zalayemila, kokambamaka na Amona mpe na bandeko na ye.

12 Mpe bakamataki wolo, mpe mpauni na bango nyonso, mpe biloko ya motuya na bango nyonso, oyo bakokaki komema, mpe lisusu bisaka na bango, kati na esobe; mpe bakobaki mobembo na bango.

13 Mpe nsima ya kolekisaka mikolo mingi na esobe bakomaki na mboka ya Zalayemila, mpe bazwamaki elongo na bato ya Mosiya, mpe bakomaki bayangelami na ye.

14 Mpe esalemaki ete Mosiya ayambaki bango na bosepeli; mpe lisusu azwaki masolo ya makomi na bango, mpe lisusu masolo ya makomi oyo ezwamaki na bato ya Limiyi.

15 Mpe sikawa esalemaki ete emonaki Balamani ete bato ya Limiyi bakimaki uta na mboka na butu, ete batindaki limpinga moko kati na esobe mpo na kolanda bango;

16 Mpe nsima ya kolanda bango mikolo mibale, bakokaki lisusu te kolanda makolo na bango; boye babungaki na esobe.

Bimisa na lokasa