Makomi
Mosiya 29


Mokapo 29

Mosiya apesi likanisi ete basambisi baponama na esika ya mokonzi—Bakonzi bazangi sembo bakambaka bato na bango kati na masumu—elenge Alma aponami mosambisi mokonzi na kopona ya bato—Azali lisusu nganganzambe monene likolo ya Eklezia—Alma mpaka mpe Mosiya bakufi. Penepene na mibu 92–91 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa ntango Mosiya asalaki oyo atindaki bato epayi na mboka mobimba, mpo azalaki na mposa ya koyeba bolingi na bango mpo na oyo etali nani asengelaki kozala mokonzi na bango.

2 Mpe esalemaki ete kopona ya bato eyaki, kolobaka: Biso tozali na mposa ete Alona mwana mobali na yo azala mokonzi na biso mpe moyangeli na biso.

3 Sikawa Alona amataki na mboka ya Nefi, boye mokonzi akokaki te kopesa bokonzi likolo na ye; mpe Alona alingaki te kokamata likolo na ye bokonzi ye moko; mpe kutu ezalaki na moko te kati na bana mibali ya Mosiya oyo alingaki kozwa likolo na ye bokonzi.

4 Boye mokonzi Mosiya atindaki lisusu na kati ya bato; iyo, kutu liloba moko ekomama nde etindaki ye na kati ya bato. Mpe oyo ezali maloba oyo ekomamaki, kolobaka:

5 Tala, O bino bato na ngai, soki te bandeko na ngai, mpo nakumisi bino na lolenge bozali, nazali na mposa ete botala malamu ntina oyo bobiangami mpo na kotalela—mpo bozali na mposa ya kozala na mokonzi.

6 Sikawa nalobi epayi na bino ete ye oyo epayi kani bokonzi esengeli kozala engebene na mibeko aboyi, mpe akokamata bokonzi likolo na ye te.

7 Mpe sikawa soki mosusu akoponama na esika na ye, tala nazali kobanga ete boweli ebima na kati na bino. Mpe nani ayebi soki mwana mobali na ngai, epayi kani bokonzi ezali, akobaluka mpo na kozala na nkanda mpe kobenda ndambo yoko ya bato oyo nsima na ye, oyo ekobota bitumba mpe boweli na kati na bino, oyo ekozala ntina ya bosopi ya makila mingi mpe bosantoli ya nzela ya Nkolo, iyo, mpe ekobebisa milimo ya bato mingi.

8 Sikawa nalobi epayi na bino ete tika tozala na bwania mpe totalela makambo oyo malamu, mpo tozali te na makoki mpo na kobebisa mwana mobali na ngai, mpe tozali na makoki mpe te mpo na kobebisa moto mosusu soki aponami na esika na ye.

9 Mpe soki mwana mobali na ngai abaluki lisusu na lolendo na ye mpe makambo na ye ya mpamba akowangana makambo oyo alobaki, mpe akosenga makoki na ye mpo na bokonzi, oyo ekosala ete ye mpe bato oyo basala masumu mingi.

10 Mpe sikawa tika tozala na bwania, mpe totalela makambo oyo, mpe tosala eloko oyo ekokokisa kimia ya bato oyo.

11 Boye nakozala mokonzi na bino mpo na oyo etikali ya mikolo na ngai; nzokande, tika ete topona basambisi, mpo na kosambisa bato oyo engebene na mobeko na biso; mpe tokobongisa na lolenge ya sika makambo ya bato oyo, mpo tokopona bato ya bwania mpo na kozala basambisi, baoyo bakosambisa bato oyo engebene na mitindo ya Nzambe.

12 Sikawa eleki malamu ete moto asambisama na Nzambe kasi na moto te, mpo masambisi ya Nzambe mazalaka ntango nyonso alima, kasi masambisi ya bato ezalaka ntango nyonso alima te.

13 Boye, soki ekokaki ete bozala na bato ya alima mpo na kozala bakonzi na bino, baoyo bakotia mibeko ya Nzambe, mpe bakosambisa bato oyo engebene na mitindo na ye, iyo, soki bokokaki kozala na bato lokola bakonzi na bino baoyo bakoki kosala lokola tata na ngai Benyamina asalaki mpo na bato oyo—nalobi epayi na bino, soki ekokaki ntango nyonso kozala oyo nde elongobanaki ete bozala ntango nyonso na bakonzi mpo na kokonza likolo na bino.

14 Mpe kutu ngai moko nasalaki na nguya mpe makasi nyonso oyo nazwaki, mpo na kolakisa bino mitindo ya Nzambe, mpe kofandisa kimia bipayi nyonso na mboka, ete bitumba ezala te to mpe boweli te, to boyibi te, to bopunzi te, to bobomi te, soki mpe lolenge moko ya mabe mpe te;

15 Mpe nyonso oyo asalaki mabe, ye nde napesaki etumbu engebene na mabe oyo asalaki, engebene na mobeko oyo mopesamaki epayi na biso na batata na biso.

16 Sikawa nalobi epayi na bino, ete mpo bato nyonso bazali alima te elongobani te ete bozala na mokonzi to bakonzi mpo na kokonza likolo na bino.

17 Mpo tala, mabe kani mokonzi moko ya nkuna akotinda masalema, iyo, mpe bobebisami ya monene boni!

18 Iyo, bomikundola mokonzi Noa, nkuna na ye mpe bonsomo na ye, mpe lisusu nkuna mpe bonsomo ya bato na ye. Tala bobebisami ya monene boni eyaki likolo na bango; mpe lisusu na ntina ya nkuna na bango bamemamaki kati na boumbu.

19 Mpe soki ezalaka te boyingeli ya Mokeli ya bwania-nyonso na likambo yango, mpe oyo na ntina ya boyamboli ya solo ya bango, basengelaki na ntembe te kotikala kati na boumbu kino sikawa.

20 Kasi tala, abikisaki bango mpo bamikitisaki liboso na ye; mpe mpo babelelaki makasi epayi na ye nde abikisaki bango uta na boumbu; mpe Nkolo asalaka na nguya na ye boye na makambo nyonso na kati ya bana ya bato, kotandolaka loboko ya boboto na baoyo batielaka ye motema na bango.

21 Mpe tala, sikawa nalobi epayi na bino, bokoki kolongola te na bokonzi mokonzi ya mabe, longola se soki ezali na nzela ya boweli mingi, mpe bosopi ya makila mingi.

22 Mpo tala, azali na baninga na ye ya ntango ya mabe, mpe abombi bakengeli na ye mpembeni na ye; mpe apasolaka mibeko na bango oyo bayangelaki na bosembo liboso na ye; mpe aniati na nse ya makolo na ye mitindo ya Nzambe;

23 Mpe asalaka mibeko, mpe atindi myango na kati ya bato na ye, iyo, mibeko engebene na lolenge ya nkuna ya ye moko; mpe oyo nyonso akotosa te mitindo na ye akobebisama; mpe nyonso oyo bakotomboka na ye akotinda mampinga na ye mpo na kobunda na bango, mpe soki akoki akobebisa bango; mpe boye mokonzi oyo azali sembo te asantolaka banzela ya bosembo nyonso.

24 Mpe sikawa tala nalobi epayi na bino, elongobani te ete bonsomo ya lolenge oyo boya likolo na bino.

25 Boye, bopona na nzela ya kopona ya bato oyo, basambisi, ete bokoka kosambisama engebene na mibeko oyo epesamaki bino na batata na biso, oyo ezali malamu, mpe oyo epesamaki bango na loboko ya Nkolo.

26 Sikawa ezali momeseno te ete kopona ya bato ezala na mposa ya eloko moko oyo ekeseni na oyo ezali semba; kasi ezali momeseno mpo na ndambo moke ya bato kozala na mposa ya oyo ezali semba te; boye oyo bokotosa mpe kokomisa yango mobeko na bino—kosala mosala na bino na maponami ya bato.

27 Mpe soki ntango eyei ete kopona ya bato eponi mpenza mabe, nde ezali ntango oyo masambisi ya Nzambe ekoya epayi na bino; iyo, nde ezali ntango akobimela bino na bobebisami monene lokola abimelaki kala mboka oyo.

28 Mpe sikawa soki bozali na basambisi, mpe basambisi bino te engebene na mibeko oyo epesamaki, bokoki kosala ete bakoka kosambisama na mosambisi monene.

29 Soki basambisi banene na bino basambisi te masambisi ya semba, bokosala ete motango moko moke ya basambisi na bino ya mike basangana esika moko, mpe bakosambisa basambisi banene na bino, engebene na kopona ya bato.

30 Mpe natindi bino mpo na kosala makambo oyo na bobangi ya Nkolo; mpe natindi bino mpo na kosala makambo oyo, mpe ete bozala na mokonzi te; ete soki bato oyo basali masumu mpe mabe ekoyanolama likolo ya mitu na bango moko.

31 Mpo tala nalobi epayi na bino, masumu ya bato mingi masalemaki na mabe ya bakonzi na bango; boye mabe na bango mayanolami likolo ya mitu ya bakonzi na bango.

32 Mpe sikawa nazali na mposa ete bokeseni boye ezala lisusu te na mboka oyo, mingi mingi na kati ya bato na ngai oyo; kasi nazali na mposa ete mboka oyo ezala mboka ya lipanda, mpe moto na moto akoka kosepela na makoki mpe matomba na ye lolenge moko, ntango nyonso Nkolo amoni elongobani ete tokoka kozala na bomoi mpe kosangola libula ya mboka, iyo, kutu lokola ntango nyonso lokola moko ya bana na biso akowumela na etando ya mboka oyo.

33 Mpe mokonzi Mosiya akomaki epayi na bango makambo mingi koleka, kofungolaka epayi na bango mimekano mpe mobulu nyonso ya mokonzi ya sembo, iyo, misala nyonso ya molimo mpo na bato na bango, mpe lisusu boyimiyimi nyonso ya bato na mokonzi na bango; mpe alimbolaki yango nyonso epayi na bango.

34 Mpe alobaki epayi na bango ete makambo oyo esengeli te kozala; kasi ete mokumba esengeli koya likolo ya bato nyonso, ete moto na moto akoka komema ndambo na ye.

35 Mpe afungolaki lisusu epayi na bango mbeba nyonso na nse ya oyo bakoyokela bozito, na kozalaka na mokonzi oyo azali sembo te kokonza likolo na bango;

36 Iyo, mabe mpe bonsomo nyonso na ye nyonso, mpe bitumba nyonso, mpe boweli, mpe botangisi ya makila nyonso, mpe moyibi, mpe bopunzi, mpe bosali pite, mpe ndenge nyonso ya mabe oyo makoki te kotangama—kolobelaka bango ete makambo oyo esengeli lisusu te kozala, ete ezalaki mpenza makambo ya mpi na mitindo ya Nzambe.

37 Mpe sikawa esalemaki, esilaki mokonzi Mosiya kotinda makambo oyo na kati ya bato na ye bandimisamaki na bosolo ya maloba na ye.

38 Boye batikaki mposa na bango ya kozwa mokonzi, mpe bakomaki mitema likolo mpenza ete moto na moto azala na libaku ekokani epayi nyonso na mboka mobimba; iyo, mpe moto na moto ayebisa bolingi na ye mpo na koyanola mpo na masumu na ye moko.

39 Boye, esalemaki ete basanganaki bango moko esika moko na mangomba ya bato epayi nyonso na mboka, mpo na kopesa kopona na bango mpo na oyo etali baoyo bakozala basambisi na bango, mpo na kosambisa bango engebene na mobeko oyo mopesamaki epayi na bango; mpe basepelisamaki mpenza na ntina ya lipanda oyo epesamaki epayi na bango.

40 Mpe bakolaki na bolingo epayi ya Mosiya; iyo, bamemiaki ye mingi koleka moto kani mosusu; mpo bamonaki ye te lokola mokonzi monyokoli oyo azali koluka litomba, iyo, mpo matabisi wana oyo ebebisaka molimo; mpo asengaki te bozwi na bango, mpe asepelaki te na bosopi makila; kasi afandisaki kimia na mboka, mpe apesaki ndingisa epayi ya bato na ye ete babikisama uta na ndenge nyonso ya boumbu; boye bamemiaki ye, iyo, mpenza, koleka ndelo.

41 Mpe esalemaki ete baponaki basambisi mpo na kokonza likolo na bango, soki te mpo na kosambisa bango engebene na mobeko; mpe oyo basalaki epayi nyonso na mboka mobimba.

42 Mpe esalemaki ete Alma aponamaki mpo na kozala mosambisi mokonzi ya yambo, ye kozalaka lokola nganganzambe monene, mpo tata na ye apesaki mosala yango likolo na ye, mpe lokola apesaki ye mokumba mpo na oyo etali makambo nyonso ya eklezia.

43 Mpe sikawa esalemaki ete Alma atambolaki na banzela ya Nkolo, mpe abombaki mitindo na ye, mpe asambisaki masambisi ya sembo; mpe kimia ezalaki ntango nyonso epayi nyonso na mboka.

44 Mpe boye ebandaki boyangeli ya basambisi epayi nyonso na mboka mobimba ya Zalayemila, na kati ya bato nyonso oyo babiangamaki Banefi; mpe Alma azalaki mosambisi mokonzi mpe ya yambo.

45 Mpe sikawa esalemaki ete tata na ye akufaki, ntango azalaki na mibu ntuku mwambe na mibale, mpe azalaki na bomoi mpo na kokokisa mitindo ya Nzambe.

46 Mpe esalemaki ete Mosiya akufaki mpe lokola, na mobu ya ntuku misato na misato ya boyangeli na ye, wana ezalaki ye na mibu ntuku motoba na misato; kosalaka na mobimba, mibu nkama mitano na libwa uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme.

47 Mpe boye nde esukaki boyangeli ya bakonzi likolo ya bato ya Nefi; mpe boye nde esukaki mikolo ya Alma, oyo azalaki mobandisi ya eklezia na bango.

Bimisa na lokasa