Makomi
Mosiya 7


Mokapo 7

Amona abomboli mboka ya Lehi-Nefi wapi Limiyi azali mokonzi—Bato ya Limiyi bazali kati na boumbu epayi ya Balamani—Limiyi apesi lisusu lisolo ya mambi na bango ya kala—Profeta (Abinadi) atatolaki ete Klisto azali Nzambe mpe Tata ya biloko nyonso—Baoyo balonaka bosoto bakobuka ekumbaki, mpe baoyo batie motema na bango na Nkolo bakokangolama. Penepene na mobu 121 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete esilaki mokonzi Mosiya kozala na kimia ya ntango nyonso mpo na ntaka ya mibu misato, azalaki na mposa ya koyeba oyo etali bato oyo bakendaki kofanda na mboka ya Lehi-Nefi, to na engumba ya Lehi-Nefi; mpo bato na ye bayokaki nsango te uta na ntango batikaki mboka ya Zalayemila; boye, balembisaki ye na matumoli na bango.

2 Mpe esalemaki ete mokonzi Mosiya apesaki ndingisa ete zomi na motoba ya mibali ya makasi kati na bango ete bakoka komata na mboka ya Lehi-Nefi, mpo na koluka nsango mpo na ntina ya bandeko na bango.

3 Mpe esalemaki ete na mokolo ya nsima babandaki komata, mpe bazalaki elongo na bango Amona moko, ye kozalaka moto moko ya makasi mpe ya nguya, mpe eboto ya Zalayemila; mpe azalaki lisusu mokambi na bango.

4 Mpe sikawa, bayebaki te nzela wapi basengelaki kolanda na esobe mpo na komata na mboka ya Lehi-Nefi; boye bayenga-yengaki mikolo mingi na esobe, kutu bayenga-yengaki mikolo ntuku minei.

5 Mpe nsima ya koyenga-yengaka mikolo ntuku minei bakomaki na ngomba ya moke, oyo ezali na nordi ya mboka ya Silomi, mpe kuna batelemisaki biema na bango.

6 Mpe Amona akamataki Misato ya bandeko na ye, mpe nkombo na bango ezalaki Amaleki, Heleme, mpe Emi, mpe bakitaki na mboka ya Nefi.

7 Mpe tala, bakutanaki na mokonzi ya bato oyo bazalaki na mboka ya Nefi, mpe na mboka ya Silomi; mpe bazingamaki na bakengeli ya mokonzi, mpe bakangamaki, mpe bakangisamaki singa, mpe batiamaki na boloko.

8 Mpe esalemaki ete ezalaki bango na boloko na mikolo mibale bamemamaki lisusu liboso ya mokonzi, mpe basinga bakangaki bango efungwamaki; mpe batelemaki liboso ya mokonzi, mpe bazwaki ndingisa, soki te nde batindamaki, ete basengeli koyanola mituna oyo akotuna bango.

9 Mpe alobaki epayi na bango: Tala, nazali Limiyi, mwana ya Noa, oyo azalaki mwana ya Zenifi, oyo awutaki na mboka ya Zalayemila mpo na kosangola libula ya mboka oyo, oyo ezalaki mboka ya batata na bango, oyo aponamaki mokonzi na kopona ya bato.

10 Mpe sikawa, nazali na mposa ya koyeba ntina oyo wapi bozalaki ata na bobangi te na koya mpembeni na bifelo ya engumba oyo, ntango ngai, ngai moko, nazalaki elongo na bakengeli na ngai libanda ya ekuke?

11 Mpe sikawa, mpo na ntina oyo napesaki nzela ete bobatelama, ete nakoka kotuna uta na bino, soki te nalingaki kosala ete bakengeli na ngai baboma bino. Bozali na ndingisa ya koloba.

12 Mpe sikawa, emonaki Amona ete azalaki na ndingisa ya koloba, abelemeki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi; mpe kotelemaka lisusu alobaki: O mokonzi, natondi yo mingi liboso ya Nzambe mokolo oyo ete nazali naino na bomoi, mpe nazali na ndingisa mpo na koloba; mpe nakosala makasi mpo na koloba na mpiko mpenza;

13 Mpo nayebi na ntembe te ete soki oyebaka ngai olingaki kopesa nzela te ete nalata singa oyo bakangi ngai. Mpo nazali Amona, mpe nazali eboto ya Zalayemila, mpe namataki uta na mboka ya Zalayemila mpo na koluka nsango mpo na oyo etali bandeko na biso, baoyo Zenifi amemaki uta na mboka wana.

14 Mpe sikawa, esalemaki ete esilaki Limiyi koyoka maloba ya Amona, azalaki na bosepeli koleka, mpe alobaki: Sikawa, nayebi na ntembe te ete bandeko na ngai baoyo bazalaki na mboka ya Zalayemila bazali naino na bomoi. Mpe sikawa, nakosepela; mpe na mokolo ya nsima nakosala ete bato na ngai basepela mpe lokola.

15 Mpo tala, tozali na boumbu epayi ya Balamani, mpe bakateli biso mpako oyo ezali mpasi na komema. Mpe sikawa, tala, bandeko na biso bakokangola biso uta na boumbu boye, soki te uta na maboko ya Balamani, mpe tokozala baumbu na bango; mpo eleki malamu mingi ete tozala baumbu ya Banefi na esika ya kofuta mpako na mokonzi ya Balamani.

16 Mpe sikawa, mokonzi Limiyi apesaki mibeko na bakengeli na ye ete basengeli lisusu kokanga Amona to bandeko na ye te, kasi asalaki ete bakende na ngomba ya moke oyo ezalaki na nordi ya Silomi, mpe bamema bandeko na bango kati na engumba, ete na lolenge oyo bakoka kolia, mpe komela, mpe komipemisa uta na misala ya mobembo na bango; mpo bayokaki mpasi ya makambo mingi; bayokaki mpasi ya nzala, mposa ya mai, mpe bolembi.

17 Mpe sikawa, esalemaki ete na mokolo ya nsima mokonzi Limiyi atindaki bosakoli na kati ya bato na ye nyonso, ete na lolenge oyo bakoka kosangana bango moko esika moko na tempelo, mpo na koyoka maloba oyo akolobela bango.

18 Mpe esalemaki ete ntango basanganaki esika moko alobaki epayi na bango na lolenge oyo, kolobaka: O bino, bato na ngai, botombolamitu na bino mpe bobondisama; mpo tala, ntango ebelemi, soki te ezali mosika te, ntango tokozala lisusu te na nse ya boyangeli ya banguna na biso, atako bitumba mingi na biso, oyo ezalaki mpamba; nzokande natie motema ete etikali na etumba moko ya malamu ya kobunda.

19 Boye, botombolamitu na bino, mpe bosepela, mpe botiela Nzambe motema na bino, Nzambe se moko wana oyo azalaki Nzambe ya Abalayama, mpe Yisaka, mpe Yakobo; mpe lisusu, Nzambe se moko wana oyo amemaki bana ya Yisalaele uta na mboka ya Ejipito, mpe asalaki ete batambola na katikati ya Mbu Etane na mabele ekawuka, mpe aleisaki bango na mana ete bakoka kokufa na esobe te; mpe asalaki makambo mingi lisusu mpo na bango.

20 Mpe lisusu, Nzambe se moko wana kaka oyo amemaki batata na biso uta na mboka ya Yelusaleme, mpe abombaki mpe abatelaki bato na ye kino sikawa; mpe tala, ezali na ntina ya mabe mpe bonsomo na biso ete amemaki biso kati na boumbu.

21 Mpe bino nyonso bozali banzeneneke na mokolo oyo, ete Zenifi, oyo aponamaki mokonzi likolo ya bato oyo, ye lokola azalaki na mpila koleka mpo na kosangola libula ya mboka ya batata na ye, boye ekosamaki ye na mayele mabe mpe boyebi lokuta ya mokonzi Lamani, oyo nsima ya kokota kati na boyokani na mokonzi Zenifi, mpe nsima ya kotika kati na maboko na ye bozwi ya eteni moko ya mboka, soki te kutu engumba ya Lehi-Nefi, mpe engumba ya Silomi; mpe mboka ya nzinganzinga mpembeni—

22 Mpe nyonso oyo asalaki, bobele mpo na ntina ya komema bato oyo kati na boyangelami soki te boumbu. Mpe tala, na ntango oyo tozali kofuta mpako na mokonzi ya Balamani, na motuya ya katikati ya masangu na biso, mpe loso na biso, mpe kutu mboto na biso nyonso ya ndenge na ndenge, mpe katikati ya matabisi ya bibwele mpe bitonga na biso; mpe kutu katikati ya nyonso oyo tozali na yango mpe oyo tozwi mokonzi ya Balamani asengisi biso, soki te bomoi na biso.

23 Mpe sikawa, ezali oyo mpasi te mpo na kondima? Mpe ezali oyo te, motungisi na biso monene? Sikawa tala, lolenge kani tozali na ntina monene mpo na kolela.

24 Iyo, nalobi epayi na bino, tozali na ntina monene mpo na kolela; mpo tala lolenge boni mingi ya bandeko na biso babomami, mpe makila na bango esopanaki mpamba, mpe nyonso na ntina ya mabe.

25 Mpo soki bato oyo bakweyaki te kati na bobuki mobeko Nkolo alingaki kopesa nzela te ete mabe monene oyo maya likolo na bango. Kasi tala, balingaki te koyoka maloba na ye; kasi babimisaki boweli na kati na bango, kutu mingi koleka ete basopaki makila na kati na bango moko.

26 Mpe profeta moko ya Nkolo nde babomaki; iyo, moto oyo aponamaki na Nzambe, oyo ayebisaki bango mpo na oyo etali nkuna mpe bonsomo na bango, mpe asakolaki makambo mingi oyo ekoya, iyo, kutu boyei ya Klisto.

27 Mpe mpo alobaki epayi na bango ete Klisto azalaki Nzambe, Tata ya biloko nyonso, mpe alobaki ete akokamata elilingi ya moto, mpe ekozala elilingi na lolenge oyo moto akelamaki na ebandeli; to na maloba mosusu, alobaki ete moto akelamaki na elilingi ya Nzambe, mpe ete Nzambe akokita na kati ya bana ya bato, mpe akolata nzoto ya mosuni mpe makila, mpe akotambola likolo ya etando ya mabele—

28 Mpe sikawa, mpo alobaki oyo, babomaki ye; mpe makambo mingi lisusu basalaki oyo mamemaki nkele ya Nzambe na nse likolo na bango. Boye, nani akokamwa ete bazali kati na boumbu, mpe ete babetami na mitungisi ya nsomo?

29 Mpo tala, Nkolo alobaki: Nakosalisa bato na ngai te na mokolo ya bobuki mobeko na bango; kasi nakokanga nzela na bango ete bafuluka te; mpe misala na bango ekozala lokola libanga ya libaku liboso na bango.

30 Mpe lisusu, alobaki: Soki bato na ngai baloni bosoto bakobuka mpumbulu na yango kati na ekumbaki; mpe nsuka na yango ezali ngenge.

31 Mpe lisusu alobaki: Soki bato na ngai baloni bosoto bakobuka mopepe ya esti, oyo mokomema bobebisami ya sasaipi.

32 Mpe sikawa, tala, elaka ya Nkolo ekokisami, mpe bobetami mpe botungisami.

33 Kasi soki bokobaluka epayi ya Nkolo na mokano etonda ya motema, mpe botie motema na bino na ye, mpe bosaleli ye na molende nyonso ya makanisi, soki bosali eye, engebene na bolingi na ye moko mpe elengi na ye moko, akokangola bino uta na boumbu.

Bimisa na lokasa