Makomi
Mosiya 9


Lisolo ya makomi ya Zenifi—Lisitwale ya bato na ye, uta na ntango batikaki mboka ya Zalayemila kino na ntango bakangolamaki uta na maboko ya Balamani.

Ezali na mikapo 9 kino na nsuka ya mokapo 22.

Mokapo 9

Zenifi akambi lingomba uta na Zalayemila mpo na kozwa mboka ya Lehi-Nefi—Mokonzi na Balamani apesi bango ndingisa ya kosangola libula ya mboka—Etumba ezali kati ya Balamani mpe bato ya Zenifi. Penepene na mibu 200–187 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Ngai, Zenifi, lokola nateyamaki na lokota nyonso ya Banefi, mpe lokola nazwaki boyebi ya mboka ya Nefi, to mboka ya bosangoli libula ya yambo ya batata na biso, mpe etindamaki ngai lokola monongi na kati ya Balamani ete nakoka kononga makasi na bango, ete limpinga na biso ekoka koya likolo na bango mpe kobebisa bango—kasi ntango namonaki bolamu boye ezalaki na kati na bango nazalaki te na mposa ete babebisama.

2 Boye, naswanaki na bandeko na ngai kati na esobe, mpo nalingaki ete moyangeli na biso asala boyokani elongo na bango; kasi lokola azalaki moto ya makambo makasi mpe ya mposa ya makila atindaki ete nasengeli kobomama; kasi nabikisamaki na bosopi ya makila mingi; mpo tata abundaki na tata, mpe ndeko ya mobali na ndeko ya mobali, kino motango monene ya limpinga na biso ebebisamaki na esobe; mpe tozongaki, baye na biso oyo babikisamaki, na mboka ya Zalayemila, mpo na kobeta lisolo wana na basi na bango mpe bana na bango.

3 Mpe nzokande, ngai lokola nazalaki na mpila mingi koleka mpo na kosangola libula ya mboka ya batata na biso, nasangisaki bato mingi lokola bazalaki na mposa ya kokende mpo na kokamata mboka yango, mpe tobandaki lisusu mobembo na biso kati na esobe mpo na komata na mboka; kasi tobetamaki na nzala mpe mitungisi ya nsomo; mpo tozalaki malembe na komikundola Nkolo Nzambe na biso.

4 Nzokande, nsima ya mikolo mingi ya koyenga-yengaka na esobe totelemisaki biema na biso na esika oyo wapi bandeko na biso babomamaki, oyo ezalaki penepene na mboka ya batata na biso.

5 Mpe esalemaki ete nakendaki lisusu elongo na minei ya bato na ngai kati na engumba, na kati epayi ya mokonzi, ete nakoka koyeba likanisi ya mokonzi, mpe ete nakoka koyeba soki nakokaki kokota elongo na bato na ngai mpe kokamata mboka na kimia.

6 Mpe nakotaki epayi ya mokonzi, mpe ayokanaki elongo na ngai ete nakoka kozwa mboka ya Lehi-Nefi, mpe engumba ya Silomi.

7 Mpe lisusu atindaki ete bato na ye basengeli kolongwa na mboka, mpe ngai mpe bato na ngai tokendaki kati na mboka ete tokoka kokamata yango.

8 Mpe tobandaki kotonga bandako, mpe kobongisa bifelo ya engumba, iyo, kutu bifelo ya engumba ya Lehi-Nefi, mpe ya engumba ya Silomi.

9 Mpe tobandaki kowana bilanga, iyo, kutu na ndenge nyonso ya nkona, na nkona ya masangu, mpe ya seboloni, mpe ya loso, mpe na neya, mpe na seumi, mpe na nkona ya ndenge nyonso ya mbuma; mpe tobandaki koyikana mpe kofuluka na mboka.

10 Sikawa ezalaki se mayele mabe mpe boyebi lokuta ya mokonzi Lamani, mpo na komema bato na ngai kati na boumbu, ete atika mboka ete tokoka kozwa yango.

11 Boye esalemaki ete, esilaki biso kofanda na mboka mpo na ntaka ya mibu zomi na mibale mokonzi Lamani abandaki kokoma motema likolo mingi, na kobangaka ete na lolenge moko to mosusu bato na ngai bakoma makasi na mboka, mpe ete bakoka te kolonga bango mpe komema bango kati na boumbu.

12 Sikawa bazalaki bato ya goigoi mpe basambeli bikeko; boye bazalaki na mposa ya komema biso kati na boumbu, ete bakoka komitondisa mabumu na misala ya maboko na biso; iyo, ete bakoka komisalela lipati na bibwele ya bilanga na biso.

13 Boye esalemaki ete mokonzi Lamani abandaki kolamusa bato na ye ete baswana na bato na ngai; boye bitumba mpe boweli ezalaki na mboka.

14 Mpo, na mobu ya zomi na misato ya boyangeli na ngai na mboka ya Nefi, mosika na sudi ya mboka ya Silomi, ntango bato na ngai bazalaki komelisa mpe koleisa bibwele na bango, mpe kowana bilanga na bango, limpinga monene ya Balamani ebundisaki bango mpe ebandaki koboma bango, mpe kobotola bibwele na bango, mpe masangu ya bilanga na bango.

15 Iyo, mpe esalemaki ete bakimaki, baoyo nyonso bakangamaki te, kutu kati na mboka ya Nefi, mpe babiangaki ngai mpo na bobatelami.

16 Mpe esalemaki ete nalatisaki bango manduki na matimbo, mpe na makula, na mipanga, mpe na nsendo, mpe na nzete, mpe na bilingongo, mpe ndenge nyonso ya bibundeli oyo tokokaki kosala, mpe ngai mpe bato na ngai tokendaki kobunda na Balamani.

17 Iyo, na makasi ya Nkolo tokendaki kobunda na Balamani; mpo ngai mpe bato na ngai tobelelaki na bokasi epayi ya Nkolo ete abikisa biso uta na maboko ya banguna na biso, mpo tolamusamaki na bokundoli ya libiki ya batata na biso.

18 Mpe Nzambe ayokaki kobelela na biso mpe ayanolaki sambo na biso; mpe tokendaki na nguya na ye; iyo, tokendaki kobunda na Balamani, mpe na mokolo moko mpe butu moko tobomaki nkoto misato na ntuku minei na misato; tobomaki bango kutu kino tobenganaki bango libanda ya mboka na biso.

19 Mpe ngai, ngai moko, na maboko na ngai moko, nasalisaki mpo na kokunda bakufi na bango. Mpe tala, na mawa monene mpe boleli na biso, nkama mibale mpe ntuku sambo na libwa ya bandeko na biso babomamaki.

Bimisa na lokasa