Makomi
Maloba ya Mormon 1


Maloba ya Mormon

Mokapo 1

Mormon asali bokuse ya bapalaki ya minene ya Nefi—Atii bapalaki ya mike esika moko na bapalaki esusu—Mokonzi Benyamina afandisi kimia na mboka. Penepene na 385 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa ngai, Mormon, ekomi ngai mpembeni mpo na kopesa lisolo ya makomi oyo nazalaki kosala kati na maboko ya mwana na ngai Moroni, tala namonaki penepene na bobebisami nyonso ya bato na ngai, Banefi.

2 Mpe elekaki monkama mingi ya mibu nsima ya boyei ya Klisto ete napesi masolo ya makomi oyo kati na maboko ya mwana mobali na ngai; mpe nabanzi ete akotatola bobebisami mobimba ya bato na ngai. Kasi tika Nzambe asala ete abikisa yango, ete akoka kokoma mwa moke mpo na ntina na bango, mpe mwa moke mpo na ntina ya Klisto, ete mbele mokolo moko makoka kopesa bango litomba.

3 Mpe sikawa, nakoloba mwa moke mpo na ntina ya oyo nakomaki; mpo esilaki ngai kosala bokuse uta na bapalaki ya Nefi, kino na boyangeli ya mokonzi Benyamina, oyo Amaleki alobelaki, nalukaki na kati ya masolo ya makomi oyo bapesaka kati na maboko na ngai, mpe nakutaki bapalaki oyo, oyo ezali na lisolo moke ya baprofeta, uta na Yakobo kino na boyangeli ya mokonzi oyo Benyamina, mpe lisusu mingi ya maloba ya Nefi.

4 Mpe makambo oyo ezali likolo ya bapalaki oyo makosepelisa ngai, mpo na masakoli ya boyei ya Klisto; mpe batata na ngai bayebaki ete mingi na yango ekokisamaki; iyo, mpe lisusu nayebi ete makambo mingi lokola masakolamaki mpo na oyo etali biso kina mokolo oyo masili kokokisama, mpe lokola mingi ezali kokende mosika nsima na mokolo oyo esengeli na ntembe te kosalema—

5 Boye, naponaki makambo oyo, mpo na kosilisa lisolo ya makomi na ngai na yango, oyo etikali ya lisolo ya makomi na ngai nakokamata uta na bapalaki ya Nefi; mpe nakoki kokoma te eteni ya nkama ya makambo ya bato na ngai.

6 Kasi tala, nakokamata bapalaki oyo, oyo ezali na masakoli mpe bimoniseli oyo, mpe nakotia yango elongo na oyo etikali ya lisolo ya makomi na ngai, mpo ezali ya boponi epayi na ngai; mpe nayebi ete ekozala ya boponi epayi ya bandeko na ngai.

7 Mpe nasali oyo mpo na ntina ya bwania; mpo boye eyebisamaki epayi na ngai, engebene na misala ya Molimo ya Nkolo oyo azali na ngai. Mpe sikawa, nayebi makambo nyonso te; kasi Nkolo ayebi makambo nyonso oyo ekoya; boye, asali kati na ngai mpo na kosala engebene na bolingi na ye.

8 Mpe losambo na ngai na Nzambe ezali mpo na ntina ya bandeko na ngai, ete bakoka mbala moko lisusu koya na boyebi ya Nzambe, iyo, bosikoli ya Klisto; ete bakoka kozala lisusu bato ya kosepela.

9 Mpe sikawa ngai, Mormon, nalingi kosilisa lisolo ya makomi na ngai, oyo nakamataki uta na bapalaki ya Nefi; mpe nasali yango engebene na boyebi mpe bososoli boye Nzambe apesaki ngai.

10 Boye, esalemaki ete esilaki Amaleki kopesa bapalaki oyo na maboko ya mokonzi Benyamina, akamataki yango mpe atiaki yango elongo na bapalaki mosusu, oyo ezali na masolo ya makomi ekitanisamaki na bakonzi, uta nkola na nkola kino na mikolo ya mokonzi Benyamina.

11 Mpe ekitanisamaki uta na mokonzi Benyamina, uta nkola na nkola, kino makweyaki kati na maboko na ngai. Mpe ngai, Mormon, nasambeli Nzambe ete ebatelama uta na ntango oyo kokende liboso. Mpe nayebi ete makobatelama; mpo ezali na makambo minene oyo ekomami likolo na yango, uta na oyo bato na ngai mpe bandeko na bango bakosambisama na mokolo monene mpe ya nsuka, engebene na liloba ya Nzambe oyo ekomami.

12 Mpe sikawa, mpo na oyo etali mokonzi oyo Benyamina—Ezalaki na mwa boweli moke na kati ya bato na ye moko.

13 Mpe esalemaki lisusu ete mampinga ya Balamani makitaki uta na mboka ya Nefi, mpo na kobunda na bato na ye. Kasi tala, mokonzi Benyamina asangisaki mampinga na ye esika moko, mpe atelemelaki bango; mpe abundaki na makasi ya loboko ya ye moko, na mompanga ya Labana.

14 Mpe na makasi ya Nkolo bawelanaki na banguna na bango, kino babomaki nkoto mingi ya Balamani. Mpe esalemaki ete bawelaki na Balamani kino babenganaki bango uta na mboka nyonso ya bosangoli libula na bango.

15 Mpe esalemaki ete esilaki baKlisto ya lokuta kozala, mpe minoko na bango kokangama, mpe kopesama etumbu engebene na mabe na bango;

16 Mpe esilaki baprofeta ya lokuta kozala, mpe bateyi mpe balakisi ya lokuta na kati ya bato, mpe esilaki baoyo nyonso kopesama etumbu engebene na mabe na bango; mpe esilaki boweli boike mpe bokabwani kozala epayi ya Balamani, tala, esalemaki ete mokonzi Benyamina, na lisalisi ya baprofeta basantu oyo bazalaki na kati ya bato na ye—

17 Mpo tala, mokonzi Benyamina azalaki moto mosantu, mpe ayangelaki likolo ya bato na ye na bosembo; mpe ezalaki na bato basantu mingi na mboka, mpe bateyaki liloba ya Nzambe na nguya mpe likoki; mpe basalelaki maloba ya makasi mingi mpo na matoyi mangongi ya bato—

18 Boye, na lisalisi ya baye, mokonzi Benyamina, na kosalaka na bokasi nyonso ya nzoto na ye mpe na nguya ya molimo na ye mobimba, mpe lisusu baprofeta, afandisaki mbala moko mosusu kimia na mboka.

Bimisa na lokasa