Masalisi mpo na Makomi
BJS, 1 Samwele 16


BJS, 1 Samwele 16:14–16, 23. Meka na 1 Samwele 16:14–16, 23; mbongwana ya ndenge moko lokola oyo etiamaki na 1 Samwele 18:10 mpe 19:9

Molimo mabe oyo likolo ya Saulo ewuti na Nkolo te.

14 Kasi Molimo ya Nkolo ekabwanaki na Saulo, mpe molimo mabe oyo mowuti na Nkolo te motungisaki ye.

15 Mpe basali ya Saulo balobaki epayi na ye, Tala sikawa, molimo mabe oyo mowuti na Nzambe te mozali kotungisa yo.

16 Tika nkolo na biso atinda sikawa basali na yo, oyo bazali liboso na yo, koluka moto moko, oyo azali nganga na kobetaka nzenze; mpe ekosalema, ntango molimo mabe, oyo mowuti na Nzambe te, mozali likolo na yo, ete akobeta na loboko na ye, mpe okoyoka malamu.

23 Mpe esalemaki, ntango molimo mabe, oyo mowuti na Nzambe te, ezalaki likolo ya Saulo, ete Dawidi akamataki nzenze, mpe abetaki na loboko na ye; bongo Saulo ayokaki makasi, mpe ayokaki malamu, mpe molimo mabe molongwaki uta na ye.

Bimisa na lokasa