Masalisi mpo na Makomi
Boyingisi


Maponi uta na Bobongoli ya Biblia na Joseph Smith

Oyo elandi ezali ndambo ya Bobongoli ya Biblia ya King James na Joseph Smith (BJS). Nkolo afulaki Profeta Joseph Smith mpo na kozongisa makambo ya solo na makomami ya Biblia ya King James oyo babungisaki to babalolaki uta maloba ya ebandeli ekomamaki. Makambo ya solo oyo ezongisamaki mamonisaki polele malongi mpe ebongisaki malamu bososoli ya makomi.

Mpo ete Nkolo abimisaki na Joseph boko makambo ya solo maye bakomi ya yambo bakomaki kala, Bobongoli ya Joseph Smith ekeseni na bobongoli ya Biblia nyonso mosusu kati na mokili. Na ntina oyo, liloba bobongoli etiami na bososoli monene mpe na nzela ekeseni koleka oyo ya momeseno, mpo ete bobongoli ya Joseph ezalaki mingi emoniseli koleka se bobongoli ya liloba lokola ezwami uta lokota moko na lokota mosusu.

Bobongoli ya Biblia ya King James na Joseph Smith ezali na mikangano elongo na to elobelami na biteni ebele ya Malongi mpe Mayokani (tala biteni 37, 45, 73, 76, 77, 86, 91, mpe 132). Lisusu, buku ya Mose mpe Joseph Smith—Matai ezali biteni ezwami na Bobongoli ya Joseph Smith.

Mpo na nsango ebele na ntina ya Bobongoli ya Joseph Smith, tala “Bobongoli ya Joseph Smith (BJS)” na kati ya Mokambi na Makomi.

Ndakisa oyo elandi elakisi se emoniseli moko ya boponi uta na Bobongoli ya Joseph Smith:

Elilingi
emekoleli

BJS, Matai 4:1, 5–6, 8–9. Meka na Matai 4:1, 5–6, 8–9; mbongwana ya ndenge oyo etiamaki na Luka 4:2, 5–11

Yesu akambami na Molimo, na Satana te.

1 Bongo Yesu akambamaki na Molimo, na esobe, mpo na kozala na Nzambe.

5 Bongo Yesu akamatanaki likolo na engumba esantu, mpe Molimo motiaki ye na songe ya tempelo.

6 Bongo zabulu ayaki epayi na ye mpe alobaki, soki ozali Mwana ya Nzambe, mibwaka yo moko na nse, mpo ekomamaki, Akotinda banjelu na ye na ntina na yo, mpe na maboko na bango bakomema yo likolo, boye otuta ata mbala moko te lokolo na yo na libanga.

8 Mpe lisusu, Yesu azalaki kati na Molimo, mpe ematisaki ye na ngomba likolo koleka mpenza, mpe elakisaki ye bokonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango.

9 Mpe zabulu ayaki lisusu epayi na ye, mpe alobaki, Biloko oyo nyonso nakopesa epayi na yo, soki okokweyi na nse mpe okumbameli ngai.

Litangi oyo ekomami na bilembo minene ezali ekomami kati na bobongoli ya Joseph Smith ya buku ya Biblia ya King James. Lokola bobongoli na ye ezongisaki maloba na makomami ya Biblia, mituya ya molongo ekoki kokesenisa uta na bobimisi ya buku oyo ozali kosalela.

Eteni oyo elakisi litangi kati na Biblia na yo oyo osengeli komeka na bobongoli ya Joseph Smith.

Maloba oyo elimboli malongi nini Joseph Smith amonisaki polele na bobongoli na ye.

Oyo ezali makomami lokola Joseph Smith abongolaki yango. (Baitaliki ebakisamaki mpo na kotalisa babokeseni uta na Nkoma ya maloba ya King James.)

Bimisa na lokasa