2010–2019
Basantu ba Mikolo mya Nsuka Bakobi na Komeka
sánzá ya mínei 2015


Basantu ba Mikolo mya Nsuka Bakobi na Komeka

Ntango tomeki, toyiki mpiko, mpe tosungi basusu kosala lolenge moko, tozali Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya solo.

Bandeko na ngai mibali mpe basi, na Sanza ya Zomi na Mibale 2013 mokili elelaki liwa ya Nelson Mandela. Sima ya mibu 27 ya boloko mpo na ntina na ye nakobunda na apartheid, Mandela azalaki mokambi ya yambo aponamaki na bosomi Afrique du Sud. Bolimbisi na Ye ya baye batiaki ye na boloko ekamwaki. Azwaki lokumu mpe lisanzoli na banso.1 Mandela mbala mingi azalaki koluka koboya masanzoli na kolobaka, “Nazali mosantu te—oyo ezali, loba ete bozali kokanisa ete mosantu azali mosumuki akobi na komeka.”2

Maloba oyo—“mosantu azali mosumuki oyo akobi na komeka”—esengeli kopesa elikia mpe kolendisa bandimi ya Eklezia. Atako tobengami lokola “Basantu ba Mikolo mya Nsuka,” Mbala mingi tolengaka na ebengeli oyo. Liloba Basantu elobami mingi mpo na kolakisa baoyo bakoma na esika ya likolo ya bosantu to bobongi nie. Mpe toyebi malamu mpenza ete tozali ya kobonga nie te.

Eyamba na biso eteyaka biso mpenza, nzokande, ete tokoki kobonga nie mbala na mbala mpe na kokobakisa “koyekamaka mobimba na” malongi ya Klisto: kosalelaka bondimi na Ye, koyambolaka, kokabolaka elambo mpo na kozongisa mayokami mpe mapamboli ya libatisi, mpe kolukaka Molimo Mosantu kozala moninga ya ntango nionso na ndelo moko ya likolo. Ntango tosali bongo, tokomi mingi lokola Klisto mpe toyiki mpiko kino na nsuka, na oyo nionso elandi lokola mbano.3 Na maloba eyebani, Nzambe atalaka mingi koleka na ntina ya oyo tozali mpe ya oyo tozali kokoma, koleka na ntina ya oyo tozalaki mokolo mosusu.4Ye atalaka ete tokoba komeka.

Lisano ya koseka Lokola bolingi yango, ekomani na mokomi ya Anglais William Shakespeare, elakisi mbongwana ya lolenge ya kokamwa na bomoi moto moko na buku yango. Kuluntu ndeko mobali moko amekaki kobomamisa leki na ye ya mobali. Atako ayebaki oyo, ndeko elenge mobali abombaki ndeko mobali ya nko uta na liwa. Ntango ndeko kulutu ayekoli mpo na mawa oyo, abongwani mpe abongwanaki mpo na libela mpe azwaki oyo abengi “mbongwana.” Sima basi mingi bayaki epai ya ndeko ya kunlutu mpe batunaki, “Ezalaki yo te oyo mbala mingi abomaki [ndeko na yo]?”

Ndeko kulutu mobali ayanoli, “’Ezalaki ngai; kasi ezali lolenge nazali sika te: Nakoyoka soni te mpo na koyebisa yo nini nazalaki—, mpo mbongwana na ngai ezali solo kosepelisa ngai mpe ekomisi ngai oyo nazali sikawa.”5

Mpo na biso, mpo na ngolu ya Nzambe mpe Bomikabi ya Yezu Klisto, lokola mbongwana ezali kaka cinema te. Na nzela ya Ezekiel, Nkolo alobaki:

“Mpo na nko ya moto ya nko, akoki te kokweya bongo na mokolo oyo alongwaki na nko na ye.  …

“… Soki alongwe uta na masumu na ye, mpe asali oyo endimami mpe ya solo;

“… Kozongisa elaka, kopesa lisusu oyo ayibaki, tambola na bolai ya bomoi, kozanga kosala mabe asengeli solo kobika. …

“Masumu na ye te oyo asalaki ekoki kolakisama epai na ye: asalaki oyo endimami mpe ya solo.”6

Na ngolu na Ye, alaki bolimbisi ntango toyamboli mpe tolongwe uta na nko—mingi lokola masumu na biso kolandana epai na biso, mpo na Bomikabi ya Klisto mpe boyamboli na biso, tokoki kotala maye tosala maleka mpe koloba, “’Oyo ezalaki Ngai; kasi ’oyo ezali ngai te.” Likambo ezali te boni nku nazali, tokoki koloba, “Oyo nani nzazalaka. Kasi moto ya nku oyo nazalaka ezali lisusu te oyo nazali.”7

Mokambi Thomas S. Monson ateyaki, “Moko ya makabo minene ya Nzambe epai na biso ezali esengo ya komeka lisusu, mpo na kokweya te esengeli kozala suka.”8Atako soki tozalaki na boyebi, toponaki kosala masumu to mbala mingi toyebaki mpe koyokisama nsoni, ntango tozwi mokano ya komeka lisusu, Bomikabi ya Klisto ekoki kosunga biso. Mpe tosengeli komikundola ete ezali Molimo Mosantu te oyo akoloba na biso lokola tokweyi mbala mingi, tokoki komeka lisusu te.

Mposa ya Nzambe ete Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakoba komeka komisembola lisusu koleka mpo na kolongaka lisumu. Atako tomoni mpasi mpo na mikakatano na bayebani, bitumba ya nkita, to babokono to lokola mbano ya masumu ya moto mosusu, bobele na bazangi nsuka ya Bomikabi ya Mobikisi ekoki kobikisa—mpe ntango mosusu mpenza—koyeba.”9 Lokola esakolama, Mobikisi akobongisa “mitema ebukana, … bondisa banso oyo bazali kolela; … pesa … kitoko mpo na putulu, mafuta ya esengo mpo na balele, mpe elamba ya lokumu mpo na molimo ya kilo” Ata likambo nini, na lisungi na Ye, Nzambe alingi Basantu ba Mikolo mya Nsuka bakoba na komeka.

Lolenge moko Nzambe asepeli ntango tobateli, Ayoki mabe soki tondimi te ete basusu bazali mpe komeka. Moninga na biso Thoba akabolaki boniboni ayekolaki liteya oyo uta na mama na ye, Julia. Julia mpe Thoba bazalaki na moto mwindo ya yambo abongwanaki na Afrika ya Sudi. Sima ya eyangeli ya apartheid esilaki, bandimi ya baindo mpe mindele ya Eklezia bandimamaki kozala na eklezia elongo. Mpo na mingi, bokokani ya boyebani na balangi ya loposo ya sika mpe momekano. Ngonga moko, lokola Julia mpe Thoba bazalaki na eklezia, bayokaki ete bandimamaki na esengo te na bandimi mingi ya mindele. Ntango balongwaki, Thoba alelaki makasi epai ya mama na ye. Julia ayokaki na kimia kino Thoba asilisaka mitungisi na ye. Bongo Julia alobaki, “Oh, Thoba, Eklezia ezali lokola hospital ya monene, mpe tozali banso bakoni na banzela na bisomei. Toyei na eklezia mpo na kosungama.”

Maloba ya Julia kolakisa likanisi ya ntina. Tosengeli bobele te kozala kondima ntango basusu basali na bokomo ya moto na moto; tosengeli lisusu kozala boboto, motema kokita, kondima, mpe kososola. Lolenge moko Nzambe alendisi biso tokoba na komeka, Alingi biso mpe topesa basusu libaku ya kosala lolenge moko, na makoki na bangomei. Bomikabi ekoki koya na bomoi na biso ata bonene ya ndelo. Tokoki bongo kondima ete atako bokeseni ya botali, tozali biso banso na bosenga moko ezanga ntelo ya Bomikabi.

Mibu mingi mileki, elenge kitoko moko na nkombo ya Curtis abiangemaki kosala misio. Azalaki misionele ya boboto bakambi ya misio nionso babondelelaki. Alandaki mpe asalaki na makasi. Na esika moko, azwaki moninga misionele oyo azalaki ya kokola te, kozala na bato ezalaki mpasi, mpe na esengo mpenza te na ntina ya kosala mosala.

Mokolo moko, ntango bazalaki kotambola na nkinga na bango, Curtis atalaki nsima mpe amonaki moninga na ye wana kozanga ndimbola kokita na nkinga na ye mpe azalaki kotambola. Na kimia, Curtis alakisaki boyoki malamu te na ye epai ya Nzambe; ezalaki mpenza mpasi kozala na moninga oyo asengelaki mpenza na bolendisi makasi mpo na kosala eloko moko te. Bangonga sima, Cutis azwaki liyoki monene, lokola Nzambe ezalaki koloba na ye, “ Oyebi, Curtis, kokokanisa na ngai, bino mibale bazali banso te ete ya kokesana.” Curtis ayekolaki ete asengelaki kozala motema kokita elongo na moninga azangi kobonga nie oyo atako azalaki komeka na lolenge na yemei.

Mbela na ngai epai ya biso banso ezali kotala bomoi na biso, toyambola, mpe tokoba na komeka. Soki tomeki te, tozali kaka basumuki ya mikolo ya nsuka; soki tokoyika mpiko, tozali baye bazongaka sima te ya mikolo ya nsuku; mpe soki topesi basusu makoki ya komeka te, tozali basantu ya mikolo ya nsuka ya bilongi mibale. 10 Ntango tomeki, toyiki mpiko, mpe tosungi basusu kosala lolenge moko moko, tozali Basantu ba Mikolo mya nsuka ya solo. Ntango tobongwani, tokozwa ete Nzambe mpenza asungi mingi na ntina oyo tozali mpe na ntina ya oyo tozali kokoma, bongo na ntina oyo tozalaki liboso.11

Nazali na bontondi mpenza mpo na Mobikisi, mpo na Bomikabi na Ye ezanga ndelo, mpe mpo na baprofeta ya mikolo ya nsuka oyo balendisi biso mpo na kozala Basantu ba Mikolo mya Nsuka, kokoba na komeka.12 Natatoli bosolo ya bomoi ya Mobikisi, na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Tala Nelson Rolihlahla Mandela, Long Walk to Freedom (1994); “Biography of Nelson Mandela,” nelsonmandela.org/content/page/biography; mpe President Barack Obama’s Dec. 10, 2013, lokumu mpo na Nelson Mandela, at whitehouse.gov/the-press-office/2013/12/10/remarks-president-obama-memorial-service-former-south-african-president-. Bambano mingi elakisi Mandela kozwa nkeni ya Prix Nobel de la Paix, le Medail Présidentiel des Etats Unies de Liberté, mpe Ordre Soviétque de Lenin.

  2. Tala, mpo na ndakisa, lisikulu ya Nelson Mandela na Rice University’s Baker Institute na sanza ya zomi 26, 1999. Azalaki lokola koloba maloba eyebana mingi epesama na Robert Louis Stevenson: “ Basantu bazali basumuki oyo bakobaka na komeka.” Sima ya mibu mingi mayoki ya lolenge moko epesamaki. Mpo na kobeta sete, Confucius azali kobakisa na koyembaka, “nkembo na biso ya monene ezali te na kokweya te kasi na kotelema ntango nionso tokweyi.”

  3. Tala, mpo na ndakisa, 2 Nephi 31:2–21; 3 Nephi 11:23–31; 27:13–21; Moroni 6:6; Doctrine et Alliances 20:77, 79; 59:8–9; Manuel 2: Administration de l’Eglise (2010), 2.1.2.

  4. Kolobaka ete “Nzambe asungi na mingi na ntina ya oyo tozali mpe oyo tokokoma koleka na ntina oyo tozalaki liboso” elingi te koloba ete Mobikisi azali kolongola mbano ya lisumu ya moto ye moko na basusu. Ya solo, Mobikisi asungi na kozanga ndelo na ntina ya baye bayoki kozoka, mpasi, mpe moto mpasi mpo na babobuki mibeko ya mosusu. Mobikisi “Akozwa likolo na ye bolema [ya bato naYe], ete nsopo na ye eyoka mawa,…ete akoka koyeba engebene na mosuni boniboni kosalisa bato na ye engebene na mapipi na bango” (Alma 7:12).

  5. William Shakespeare, As You Like It, act 4, scene 3, lignes 134–37.

  6. Ezekiele 33:12, 14–16.

  7. Kosalela ngonga ya lelo na verbes emonani na makomi mingi elobeli Kosambisama ya Nsuka. Tala mpo na ndakisa 2 Nefi 9:16; Mormon 9:14; Doctrine et Alliances 58:42–43.

  8. Thomas S. Monson, “The Will Within,” Ensign, Sanza ya Mitano 1987, 68.

  9. Yisaya 61:1–3; tala lisusu Luka 4:16–21.

  10. Bilongi mibale lokola ekomami na Boyokani ya Sika ekoki kolimbolama uta na lokota ya Greki lokola “mosali lokola”; na lokota ya Grèce liloba yango elakisi “ mosani,” to “moko oyo akosaka, alakisaka na likama, to abakisaka eteni” (tala Matai 6:2, litangi na nse ya lokasa a). Soki topesi basusu libaku ya kobongwana te na bisika na bangomei, tozali komibenga Basantu ba Mikolo mya Nsuka na pamba.

  11. Tala matangi 4, likolo.

  12. Motango ya bangonga nsango oyo ezali kobima na masakola ya Bakambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale na ezali kobeta. Mokambi Dieter F. Uchtdorf asalaki likambo oyo ntango alobaki, “Malongi nionso eteyami na baprofeta na bikeke binso, moko oyo elimbolami kolela mpe koleka lisusu ezali elikia mpe nsango ya kokebisa motema et bana ya bato bakoka koyambola, kobongola ezaleli mpe kozonga na nzela ya bosolo ya bayekoli” (“You Can Do It Now!” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2013, 56).