Lendisa Lisusu Bondimi
Moko na moko kati na biso tokoki kosembola bondimi na biso na Yesu Klisto na mobembo na biso ya moto yemei mpe kozua esengo.
Na ntongo oyo ya Pasika, Mokambi Monson, tozali na botondi ya koyoka mongongo ya profeta ya bomoi. Tomoni motuya na maloba na yo, kosangisaka toli na yo “Kozua esengo na mobembo” 1mpe “Lobi ezali kongenga lokola bondimi na yo.” 2
Mobu oyo bana ya Primaire bazali kokabolaka esengo mpe bongengi ya bondimi na bango na Yesu Klisto ntango bazali koyemba loyembo “Je sais que Mon Sauveur M’aime” Bazali koyemba bosolo “Nayebi Ye azali!... Motema na ngai napesi na Ye.” 3 Lokola bana ya Primaire moko na moko kati na biso tokoki kosembola bondimi na biso na Yesu Klisto na mobembo na biso ya moto yemei mpe kozua esengo.
Na liyangani moko ya Lomingo kala te ya Lisanga ya Bamama basungi, nayokaki elenge mama kokabolaka eteni ya mobembo na ye ya kobonguana. Ye akolaki na kati ya Eklezia, na baboti oyo bateyaki ye nsango malamu. Asanganaki na eteyelo ya bana, bilenge basi, mpe seminele. Alingaki kotanga mpe koyeba babosolo. Boluki na ye ya ntango nyonso ezalaki ya koyeba mpo na nini ya makambo. Mpaka Russell M. Nelson alobaki, “Nkolo akoteya kaka makanisi ya boluki.”4 Mpe elenge muasi oyo akokaki koteyema.
Na sima ya eteyelo ya bilenge ye akotaki université, akangamaki na tempelo lokola misionele ya bozongi, mpe appambolamaki na bana kitoko.
Na molimo ya boluki, mama oyo akobaki kotuna mituna. Kasi lokola mituna ekomaki makasi, boye biyano mpe ekomaki makasi. Mpe na bangonga mosusu ezalaki na biyano te—to biyano moko te oyo ememaki kimia. Na nsuka, lokola alukaka kozua biyano, ebele mpe ebele ya mituna etondaki, mpe akomaki kotuna mingi ya miboko ebele ya bondimi.
Na ntango ya ngonga na ye ya kobulungana, ebele pembeni na ye balobaki, “Tala yekola na bondimi na ngai.” Kasi akanisaki, “Nakoki te, Bokoki kososola te; bozali koyeba makambo yango te.” Ye amanyolaki, “Nazalaki kokanisaka kopusa esengo na baye bazanga bantembe soki bango baye bakokaki kopusa esengo epai na ngai.” Mpe ebele basalaki.
Ye alobaki, “Baboti na ngai bayebaki motema na gai mpe batungisaki ngai te. Bango baponaki kolinga ngai ntango nazalaki komekaka kososola mpo na ngai moko.” Ndenge moko, elenge mama oyo episikopo azalaki kokutana na ye mingi mingi mpe alobaki likanisi na ye mpo na ndeko muasi.
Bandimi ya paluase mpe bazangaki te kopesa bolingo, mpe ye ayokaki amikotisaki. Paluase na ye ezalaki na esika te ya komilakisa lokola malamu koleka; ezalaki esika moko ya koleyisana.
“Ezalaki kitoko,” ye akanisi. Na ntango ya ngonga oyo nayokaki kiboninga makasi na ba nkoko na ngai bakufa. Bazalaki kotindika ngai mpe kopusa ngai natingama na komekaka. Nayokaki bango kolobaka, Tia makanisi na maye yo oyebi.’”
Atako motango ya bato basungaki ye, ye akomaki kozonga nsima. Alobaki, “Nakabuanaki ngai moko na Eklezia mpo na ezali mabe te, bomitiki ya molimo te, kolukaka eloko kopekisa ngai kosala mitindo te, to kolukaka ndenge nini kobima te. Nayokaki ete nasengelaki na eyano na motuna ‘Mpo na Ngai nandimi mpenza ya solo?’”
Ba nbangonga eye atangi buku moko ya makomi ya Mère Theresa, oyo akabolaki mayoki ekokani. Na mokanda moko ya 1953, MèreTheresa akomaki: “Nasengi bobondela mingi mingi mpo na ngai ete nakoka te kobebisa mosala na Ye mpe oyo Nkolo na biso akoki kolakisa Yemei—mpo kuna ezali na molili moko makasi na kati na ngai, lokola neti nyonso ezalaki ya kokufa. Ezalaka lokola komata na kokita kowuta na ntango nabandaka ‘mosala.’ Kosenga Nkolo na biso kopesa ngai mpiko.
Episikopo Mokonzi Perier ayanolaki: “Nzambe atambolisa yo, Mama ya talo; ozali soki moke te na molili lokola ozali kokanisa. Nzela osengeli kolanda ekoki kozala ntango nyonso pole na mbala moko te. Sambela mpo na mwinda; kozwa mokano na lombamgo mingi te, yokamela oyo basusu basengeli koloba, tia makanisi na bantina na bango. Bokomona ntango nyonso eloko moko ekosunga bino. ... Bokakambana na bondimi, na losambo, mpe na ntina ya makanisi malamu, ozali na oyo ekoka”5
Moninga na ngai akanisaki ete soki Mere Theresa akokaki kolanda eyamba na ye libanda ya biyano nyonso mpe liyoki moko ya pole koleka ya makambo nyonso, ntango mosusu akokaki mpenza. Ye akokaki kozwa nzela moko ya pete liboso ya bondimi—mpe na esika ya mosusu. Akokaki kotia makanisi na babosolo ye azalaki kondima mpe kotika babosolo wana etondaki makanisi mpe motema na ye.
Lokola akanisaki sima, alobaki, “Litatoli na ngai ekomaki lokola liboke ya putulu. Yango nyonso ezalaki ya kozika. Oyo nyoso natikalaki na yango ezalaki Yesu Klisto.” Ye akobaki, “Kasi Ye atikaki yo te ntango ozali na mituna. Ntango moto na moto ameki kobomba mitindo, ekuke ezali ya kofunguama monene. Losambo mpe makomi eyekolami ekokoma na motuya mingi.”
Etape na ye ya liboso ya kotonga lisusu bondimi na ye ezalaki kobanda na basolo ya moboko ya nsango malamu. Asombaki buku moko ya ba nzembo ya eteyelo ya bana mpe akomaki kotangaka maloba ya banzembo. Yango ezalaki ya motuya mpo na ye. Abondelaki mpo na bondimi kotombola kilo ayokaki.
Ye ayekolaki ete ntango ayebaki ete kobalukela litatoli yango esalaki ye atia ntembe, akokaki kotika koluka boyebi mbala, mpe nini nsango malamu esali ye. Ye alobaki, “Nabandaka komituna, ‘Oyo ezali nzela malamu mpo na ngai mpe libota na ngai?’ bantango mosusu nazalaki komituna ngai moko, ‘Nini ngai nalingi mpo na bana na ngai?’ Nayaki kososola ete nalingaki bango basala mabala na batempelo. Wana ezali ntango kondima ezongaki na motema na ngai.”
Mpaka Jeffrey R. Holland alobaka, “Komikitisa, bondimi, mpe botindiki ya Molimo Mosantu [ekozala] ntango nyonso bantina ya boluki nyonso ya bosolo.” 6
Kasi azalaki na mituna na ntina ya lolenge nini Buku ya Mormon eyaki, akokaki te kowangana babosolo ye ayebaki na Buku ya Mormon. Amitiaki na botangi ya Kondima na Sika mpo na kososola Mobikisi malamu koleka. “Kasi na suka” alobaki “namimonaki ngai moko kozongaka na Buku ya Mormon mpo ete nalingaki oyo nazalaki koyoka ntango nazalaki kotangaka oyo etali Yesu Klisto mpe Bomikabi na Ye.”
Ye asukisaki, “bosengeli kozua ya bino moko mayele na babosolo kati ya buku wana,” mpe ye azalaki kozuaka yango. Ye amanyolaki, natangaki na Moziya mpe nayokaki nalakisami mobimba: ‘Bondimela Nzambe, bondima ete ye azali, mpe ete ye akelaki biloko nyonso… ; bondima ete azali na bwanya nionso, mpe nguya nyonso, nyonso ya lola mpe mabele, bondima ete moto akoki kososola makambo nyonso te oyo Nzambe akoki kososola.’7”
Mpo na ngonga oyo libiangi eyaki ya kosala na Eteyelo ya Bana lokola Mobeti piano. “Ezalaki na bobangi te,” ye alobaki. Nayokaki mposa ya kozala na bana na ngai na Eteyelo ya Bana, mpe sikawa nakoki kozala na bango. Mpe nazalaki ya kobongama te mpo na koteya.” Ntango nyonso azalaki kosunga, akobaki koyoka kowuta na nyonso ezingi ye libiangi “Yaka; tolingi yo, atako etape nini ozali na yango,mpe tokokutana na yo kuna. Pesa biso nyonso olingi kopesa.”
Koyembaka ba nzembo ya Eteyelo ya bana, akanisaki ntango mingi na yemei, “Awa ezali babosolo ngai nalingi. Nakoki kopesa ntango nyonso litatoli. Nakoloba kaka makambo oyo ngai nayebi mpe nalikii. Ekoki kozala libonza ya boyebi ya malamu koleka te, kasi ekozala libonza na ngai. Oyo natie makanisi ezali kokola kati na ngai. Ezali kitoko kozongela ya motuya ya nsango malamu mpe koyoka pole.”
Na mokolo ya eyenga wana na ntongo, ntango nazalaki koyoka ndeko mwasi oyo ya elenge kokabola lisolo ya mobembo na ye, namikundolaki ete “ezali likolo ya libanga ya Mosikoli” ete tosengeli banso kotonga ya biso moboko.8Na mikundolaki lisusu toli ya Mpaka Jeffrey R. Holland: “Bosimba makasi na oyo bino boyebi yambo mpe botelema ngui tii boyebi ya kobakisa ekoya.”9
Kati kati ya liteya na ye, nayaki koyeba na makasi koleka ete biyano ya mituna na biso ya bosembo ekoya ntango toluki na makasi nyonso mpe soki tosali mitindo na ye. Nakundolaki ete bondimi na biso ekoki kokola koleka nsuka ya ba ntina ya mokolo.
Mpe, oh, boniboni nalingi kozala baoyo bazali nzinganzinga ya elenge mama oyo, kolingaka mpe kosungaka ye. Lokola Mokambi Dieter F. Uchtdorf alobaki: “Tozali banso kokende mobembo ya kolukaka mwinda ntango tozali kotambola na nzela ya boyekoli. Tokitisi basusu na nse te mpo na motango ya mwinda bakoki to bakoki te kozala na yango, na esika, toleyisi mpe topesi bokasi na mwinda nyonso tii yango ekokoma pole, kongenga, mpe solo.”10
Ntango bana ya Eteyelo ya Bana bazali koyemba “A Child’s Prayer,” Bazali kotuna: “Tata na Lola, ozali ya solo awa? Mpe ozali koyoka mpe koyanola losambo ya mwana?” 11
Biso mpe tokoki kosepela, “Tata ya Lola azali ya solo awa?” kaka kosepela—lokola moninga na ngai asalaki—ntango biyano eye na kimia, mpe bozangi bobangi ya pete. Natatoli ete bozangi bobangi yango ya pete eyei ntango ya Ye ekokoma ya biso. Natatoli ete solo ezali na mabele mpe Nsango Malamu na Ye ezuami na Eklezia ya Yesu Klisto ya Bansatu ba Mikolo mya Nsuka. Na nkombo ya Yesu Klisto. amene