Kozelaka Mwana Oyo Abungaki
Tika ete bino mpe ngai tozwa bobimisi ya koyeba boni boni bokoki kopusana malamu na baoyo na bomoi na biso basili kopengwa.
Mobikisi alekisaki mosala na Ye na mabele na koteyaka nguya na Ye ya kobikisa mpe bosikoli. Na libaku moko kati ya Mokapo ya Luka kati ya Boyokani ya Sika, atiolamaki solo mpo ete aliaki mpe alekisaki ntango na Ye na basumuki (tala Luka 15:2). Mobikisi atiolamaki boye mpo na libaku moko ya kotangisa biso nionso boni boni tosengeli koyanola na baoyo babungi nzela.
Ayanolaki na botiolami na Ye na kotunaka bango mituna mibale ya ntina:
“Nani kati na bino, oyo azali na bameme nkama, soki abungisi moko kati na bango, mpe atika te ntuku libwa na libwa kati ya esobe, mpe akende koluka oyo abungi, kino azwa yango?” (Luka 15:4).
“Mwasi nini azali na makuta zomi ya palata, soki abungisi likuta moko, mpe apelisa mwinda te, mpe akombola ndaku, mpe aluka na bokebi kino azwa yango?” (Luka 15:8).
Mobikisi nsima ateyaki lisese ya mwana mobali oyo abungaki mpe amonanaki. Lisese oyo ezali ya bameme nkama te to ya makuta zomi ya palata; ezali ya mwana moko ya mobali ya ntina koleka oyo abungaki. Na nzela ya lisese, Mobikisi alingi koteya biso boni boni koyanola ntango ndeko ya libota abungisi bondimi na ye?
Mwana mobali oyo abungaki ayebisi tata na ye ete alingi eteni ya libula na ye sikawa. Alingi kotika kimia ya ndaku mpe libota na ye mpe akolanda biloko ya mokili (tala Luka 15:12–13). Nasengi boyeba ete kati na lisese ya Mobikisi tata ayanoli na bolingo na kopesaka mwana mobali eteni ya libula na ye. Ya solo nabanzi tata asalaki nionso oyo akokaki mpo na kokanga mwana na ye akende te. Kasi, lokola mwana ya mokolo aponi nzela na ye, tata ya bwanya atikaki ye akende. Tata nsima alakisi bolingo na ye ya solo, mpe atali mpe azeli (tala Luka 15:20).
Libota na ngai mpe ekutanaki na likambo oyo. Bandeko na ngai mibale ya mibali ya botongono, ndeko ya mwasi ya kokamwa, mpe ngai tobokolamaki epai ya baboti malamu. Toyekolaki nsango malamu kati ya libota na biso, tokolaki malamu ti kimokolo, mpe biso nionso minei tokangamaki na tempelo na balongani na biso. Bongo, na 1994 ndeko na biso ya mwasi, Susan, akomaki na nkele na Eklezia mpe ndambu ya mateya na yango. andimelaki baoyo batiolaka mpe baboyaka bakambi ya Eklezia ya yambo. Bondimi na ye epai ya baprofeta mpe bapostolo ya lelo ekitaki. Mokolo na mokolo, bantembe na ye elongaki bondimi na ye, azwaki mokano ya kolongwa Eklezia. Susan apesaki ngai ndingisa ya kokabola lisolo na ye na elikia ete ekoka kosunga basusu.
Bandeko na ngai ya mibali mpe ngai elongo na babokilo na biso ya basi totondisamaki na mawa. Tokokaki kondima te ndeko akokaki kosundola bondimi na ye.
Bandeko na ngai ya mibali mpe ngai tosalisaki lokola baepisikopo mpe bakambi ya masanga makoki, mpe tokutanaka na bisengo ya bandimi ya bapalwasi mpe masanga makoki ntango totikaki bantuku libwa na libwa mpe tokendaki koluka moko. Nzondande, elongo na ndeko na biso ya mwasi, bokasi na biso ya bokobi mpo na kosunga mpe kobengisa ye azongakaka ekimisaki ye mosika koleka.
Ntango tolukaki bokambami ya lola mpo na boni boni tosengelaki koyanola na ye, ekomaki polele ete tosengelaki kolanda ndakisa ya tata kati ya lisese ya mwana mobali oyo abungaki. Susan aponaka nzela na ye, mpe tosengelaki lokola na lisese kotika ye akende—kasi na kozangisa ye te koyeba mpe koyoka bolingo na biso ya solo mpo na ye. Mpe boye, na bolingo mpe boboto ntango nionso, tozalaki kotalela mpe kozela.
Mama na ngai azalaki kotika te kolinga mpe komitunga mpo na Susan. Ntango nionso mama na ngai azalaki kokota na tempelo, azalaki kotia nkombo ya Susan na losambo mpe kobungisaka elikia te. Yaya na ngai ya mobali mpe mwasi na ye, oyo bazali penepene na Susan na Californie, babengisaki ye na milulu nionso ya libota. Balambaki bileyi na ndaku na bango mibu nionso na mokolo ya mbotama ya Susan. Bandimaki mpenza ete bazalaki ntango nionso elongo na ye mpe ete ayebaki bolingo na bango ya solo mpo na ye.
Leki na ngai ya mobali mpe mwasi na ye bakutanaki na bana ya Susan na Utah mpe bamitungisaki mpo na bango mpe balingaki bango. Bandimaki solo ete bana na ye bazalaki ntango nionso kosangana na libiangi ya libota, ntango ekomaki ete nkoko ya mwasi ya Susan azwa libatisi, ndeko na ngai ya mobali azalaki wana mpo na kosala likuli. Susan mpe azalaki na bateyi na libota mpe batali na libota ya bolingo oyo batikaki te.
Ntango oyo bana na biso bakendaki misio mpe babalaki, Susan abengisamaki mpe kozala elongo na milulu ya bokutani ya libota. Tomekaki na bokebi kosala milulu ya bokutani ya libota mpo ete Susan mpe bana na ye basangana elongo na biso mpe bakoka koyeba ete tolingaki bango mpe ete bazalaki eteni ya libota na biso. Ntango Susan azwaki diplome na Iniversite ya Californie, biso nionso tozalaki wana mpo na kosunga ye. Kasi totalaki te maponi ye asala. Tolingaki ye, totalelaki ye, mpe tozelaki ye.
Na mobu 2006, nsima ya mibu 12 eleki uta Susan atikaki Eklezia, mwana na biso ya mwasi Katy akendaki elongo na molongani na ye na Californie mpo na kotanga kelasi ya basambisi. Bazalaki na mboka moko na Susan. Bilenge babali oyo batali tata mwasi na bango Susan mpo na lisungi mpe lisalisi, mpe balingaki ye. Susan asungaki mpo na kobatela nkoko na biso ya mibu mibale, Lucy, mpe Susan amimoneki yemei kosungaka Lucy elongo na nsambo na ye ya butu nionso. Katy abengaki ngai mokolo moko mpe atunaki soki nakanisaki Susan alingaki kozonga mokolo moko na Eklezia. Nayebisaki na elikia ye ete nayokaki alingaki kozonga mpe ete tosengeli kokoba na kokitisa motema. Ntango mibu misusu misato elekaki, tokobaki kolinga ye mpe totalelaki ye, mpe tozalaki ye.
Mibu motoba ekokoka na suka ya poso oyo, mwasi na ngai, Marcia, mpe ngai tofandaki liboso ya Ndako ya Likita oyo. Nasengelaki kosungama lokola Mokambi Monene ya sika mokolo wana. Marcia, oyo azali ntango nionso ya kosimbama na molimo, akomelaka ngai lokasa moko oyo elobaki, “Nabanzi ezali ntango mpo ete Susan azongela Eklezia.” Mwana na ngai ya mwasi Katy apesaki likanisi ete nakei mpe nakobenga Susan na libiangi mpo na kobengisa ye kotala likita linene mokolo wana.
Na lombango elongo na basi mibale oyo ya mpiko, natambolaki na kati ya ndako ya likita mpe nabengaki ndeko na ngai ya mwasi. Natikelaki ye nsango na telefone mpe nabengisaki kaka atala liyangani ya likita linene. Azwaki nsango yango. Na esengo na biso, ayokaki mposa ya kotala mayangani nionso ya likita linene. Ayokaki baprofeta mpe bapostolo alingaka na mibu milekaki. Ayokaki bankombo ya sika oyo ayoka naino te, lokola Mokambi Uchtdorf mpe Bampaka Bednar, Cook, Christofferson, mpe Andersen. Ntango makambo oyo mpe moko kaka mosusu oyo ewutaki na lola, ndeko na ngai ya mwasi—lokola mwana mobali oyo abungaki—azongaki na kati na yemei Luka 15:17). Maloba ya baprofeta mpe bapostolo mpe bolingo ya libota na ye etindaki ye abongwana mpe abanda kozonga na libota. Nsima ya mibu 15 bana na biso ya basi mpe ndeko na biso ya mwasi oyo abungaki amonanaki. Botateli mpe bozeli esilaki.
Susan atalisi boyebi oyo kaka lokola Lehi atalisaki yango kati ya Buku ya Mormon. Atikaki lingada ya ebende mpe amimonaki na kati ya londende ya molili, (tala 1 Nefi 8:23). Alobi ayebaki te ete abungaki kino bondimi na ye elamukaki lisusu na Mwinda ya Klisto, oyo na bogengi elakisaki bonene ya bokesani katikati ya oyo azalaki komona mpe oyo Nkolo mpe libota na ye bazalaki kopesa.
Bikamwisi esalemaki nsima ya mibu motoba. Susan azwi litatoli ya sika ya Buku ya Mormon. Azwaki mokanda na ye ya kokota na tempelo. Asalaki lokola mokulisi na tempelo, mpe azali sikawa koteya kelaki ya Malongi ya Nsango malamu na palwasi na ye. Bafenetele ya lola efungwami mpo na bana mpe bankoko na ye, mpe atako ezalaki na mbano ya mpasi, ezali lokola atikaki Eklezia mokolo moko te.
Boko kati na bino, lokola libota ya Nielson, bazali na bandeko ya libota oyo mpo na mwa ntango babungisi nzela na bango. Makebisi ya Mobikisi na baoyo nionso bazali na bameme 100 ezali ya kotika bantuku libwa na libwa mpe kokende koluka mpe moko oyo abungi. Makebisi na Ye na baoyo bazali na makuta ya bapalata 10 mpe babungisi moko ezali ya koluka moko oyo ebungi kino bakozwa yango. Soki moko oyo abungi azali mwana na yo ya mobali to ya mwasi, ndeko na yo ya mobali to ya mwasi mpe ye aponi kokende, toyekoli kati ya libota na biso ete, nsima ya nionso oyo tokoki, tolinga bato wana na mitema na biso mpe totalela bango, tosambela, mpe tozela loboko ya Nkolo emonisama.
Ntango mosusu liteya ya ntina Nkolo ateyaki ngai na nzela ya mosala oyo eyaki ntango tobandaki koyekola makomi na libota nsima ndeko na ngai ya mwasi atikaka Eklezia. Mwana na biso ya mobali azalaki kotanga ntango tozalaki koyekola elongo Luka 15. Ntango totangi lisese ya mwana mobali oyo, nayokaki mokolo wana lolenge moko te na ndenge nayokaka yango liboso. Mpo na ntina moko to mosusu, namisosolaki lokola mwana mobali oyo atikalaka na ndako. Ntango David atangaki yango na ntongo wana, namonaki na ndenge mingi ete Ngai nazalaki mwana mobali oyo abungaki. Biso nionso topengwi na nkembo ya Tata (talaBaloma 3:23). Biso nionso tozalaka na mposa ya Bomikabi ya Mobikisi ebikisa biso. Biso nionso tobungi mpe tozali na mposa ya kozonga. Bobimisi oyo mokolo wana esungaki ngai nayeba ete ndeko na ngai ya mwasi na ngai biso mibale tozalaki mposa ya bolingo ya Mobikisi mpe Bomikabi na Ye. Susan na ngai tozali sikawa na nzela se moko ya kozonga ndako.
Maloba ya Mobikisi kati ya lisese lokola Atalisi mbote ya tata epai ya mwana na ye ya mobali oyo abungaki ezali na nguya makasi, mpe nandimi ekoki kozala botalisi ya mayele oyo bino na ngai tokozala na yango epai ya Tata ntango tokozonga na ndako na biso ya lola. Eteyi biso na tata moko oyo alingaka, azelaka, mpe atalelaka. Oyo ezali maloba ya Mobikisi: “Ntango azongaki, tata na ye amonaki ye, mpe ayokaki mawa, akimaki mbangu, mpe amibwakaki na kingo na ye mpe ayambaki ye” (Luka 15:20).
Tika ete bino mpe ngai tozwa bobimisi ya koyeba boniboni kopusana malamu koleka baoyo bapengwa na bomoi na biso mpe, soki esengeli, kozala na bompikiliki mpe bolingo ya Tata na biso na Lola mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, ntango tozali kolinga, kotala, mpe kozela baoyo babunga. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.