2010–2019
Miziki ya Nsango malamu
sánzá ya mínei 2015


Miziki ya Nsango malamu

Miziki ya nsango malamu ezali liyoki ya esengo ya molimo oyo eyaka uta na Molimo Mosanto. Ememaka mbongwana na motema.

Mibu mileki nayokaki lisolo moko na radio ya elenge dokotolo oyo asalaki na lopitalo moko ya Bato ya Navajo. Alobelaki na ntina ya boyebi moko azwaki na butu moko ntango mobange moko ya Amerika na nsuki milayi akotaki na ndako ya bokono makasi. Elenge dokotolo azwaki ememeli mikanda na ye, apusanaki penepene ya tata mobange, mpe alobaki, “boniboni nakoki kosunga yo?” tata mobange atalaki liboso mpe alobaki eloko te. Dokotolo wana, amitungisaki, amekaki lisusu. “boniboni nakoki kosalisa yo soki olobi eloko moko te,” alobaki. “Yebisa ngai mpo na nini oyei na lopitalo.”

Tata mobange nsima atalaki ye mpe alobaki, “Obinaka?” Ntango elenge dokotolo abandaki kotuna motuna ya kokamwa, akanisaki ntango mosusu mokoni na ye azalaki monganga ya bonkoko oyo, engebene na basaleli ya bonkoko ya bikolo ya kala, balukaki kobikisa bokono na nzela ya miziki mpe mabina koleka na nzela ya kopesaka nkisi.

“Te,” elobaki dokotolo, “nabinaka te. Obinaka?” Tata mobange aningisi moto iyo. Nsima dokotolo atunaki, “Okoki kolakisa ngai kobina?”

Eyano ya tata mobange epesaki ngai makanisi ebele uta mibu mingi. “Nakoki kolakisa yo kobina,” alobaki, “kasi osengeli koyoka miziki.”

Ntango mosusu na bandako na biso, toteyaka na elonga matambe ya mabina kasi tozwi elongo te na kosungaka baye libota na biso koyoka miziki. Mpe lokola moto ya mobange monganga wana ayebaki malamu, ezali mpasi kobina soki miziki ezali te. Kobinaka soki miziki ezali te ezali mpasi mpe esepelisaka te—kutu mutungisi. Bosi bomeka yango?

Kati ya eteni 8 ya Doctrine and Alliances, Nkolo ateyaki Joseph Smith mpe Oliver Cowdery, “Iyo, botala, nakoyebisa bino kati ya makanisi na bino mpe kati ya mitema na bino, na nzela ya Molimo Mosanto, oyo ekoya likolo na bino mpe oyo ekotikala kati ya mitema na bino,” (molongo ya kotanga 2). Toyekolaka matambe ya kobina na makanisi na biso, kasi toyokaka miziki na mitema na biso. Matambe ya kobina ya nsango malamu ezali biloko tosalaka; miziki ya nsango malamu ezali liyoki ya esengo ya molimo oyo eyaka uta na Molimo Mosanto. Ememaka mbongwana na motema mpe ezali liziba ya bamposa nionso ya bosembo. Matambe ya kobina esengaka botosi, kasi esengo ya kobina ekoyebana bobele ntango tokoya koyoka miziki.

Ezali na baoyo bazalai kotiolaka bandimi ya Eklezia mpo na makambo tozali kosala. Yango ekoki kososolama. Baoyo bazali kobina mbala mingi bamonanaka mompaya to bolole, mpo na kosalela nkombo ya makomi, “lolenge mosusu”(1 Petelo 2:9) na baoyo bakoki koyoka miziki te. Etelemisa yo mokolo moko mutuka na yo na mwinda ya kotelemisela penepene ya motuka moko esika mokumbi azalaki kobina mpe koyemba na mongongo makasi mpenza? Kasi okoki koyoka makele te mpo ete bafenetele na yo mpe bafenetele na ye ezali ya komata? Ezalaki ye mwa lolenge mosusu. Soki bana na biso bayekoli matambe ya kobina nakozangaka koyekola koyoka na matoi mpe na motema miziki kitoko ya nsango malamu, nsima ya ntango na kosepela te na kobina mpe kutu bakotika kobina to, penepene na mabe lokola, bakobi kobina kaka na ntina ya miso ya basusu oyo bazali kotala bango bazali kobina nzinganzinga.

Mikakatano mpo na banso kati na biso baoyo tozali koluka koteya nsango malamu ezali kopanza mateya mosika koleka matambe ya kobina. Esengo ya bana na biso etali bobele bomipesi na bango ya koyoka mpe kolinga miziki kitoko ya nsango malamu. Lolenge nini tokosala yango?

Yambo, tosengeli kokanga babomoi na bisomei na molongo ya lolaka esengeli ya nsango malamu. Nsima na ntango ya kala, yambo ya eleko oyo ordinateur, tozalaki kozwa lolaka ya radio na biso na kobalusaka bouton kino ekozwa lolaka ya malamu. Ntango tozalaki kopusana na mituya, tokokaki koyoka bobele mitango. Kasi ntango na nsuka tokiomi na molongo esengeli, miziki na biso tolingaka ekokaki koyokana malamu. Na babomoi na biso, tosengeli kotiama na molongo ya lolaka esengeli mpo ete toyoka miziki ya molimo.

Ntango tozwi likabo ya Molimo Mosantu nsima ya libatisi, totondisami na miziki ya lola oyo ezali elongo na mbongwana. Mitema na biso ebongwami, mpe tokozala na ntango ya kosala mabe te kasi kokoba kosala bolamu kino na nsuka.” (Moziya 5:2). Kasi Molimo ekoyoka nkanda to lolendo to boluli. Soki tobungisi nguya ya bosembo wana kati ya bomoi na biso, boyokani ya bomengo ya nsango malamu ekoki kokoma na lombango ya mobulu mpe ekoki na nsuka na kotika nie. Alma atunaki motuna ya ntina: “Soki bomoni mbongwana na mitema na bino, soki boyoki mposa ya koyemba miziki ya bolingo ya bosikoli, nakotuna, bokoki koyoka yango sikawa?” (Alma 5:26).

Baboti, soki babomoi na biso ezali libanda ya koyoka miziki ya nsango malamu, tosengeli kobongisa yango. Lokola Mokambi Thomas S. Monson ateyaki na sanza ya zomi eleki, tosengeli komaniola nzela nini tosengeli kotambola. Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2014, 86–88). Toyebi boniboni kosala yango. Tosengeli kotambola na nzela moko totambolaki ntango toyokaki mpo na yambo nzembo ya lola ya miziki ya nsango malamu. Tokosalela bondimi na Klisto, tokoyambola, mpe tokozwa elambo; tokoyoka mingi koleka nguya ya Molimo Mosantu; mpe miziki ya nsango malamu ekobanda kobeta lisusu kati ya babomoi na biso.

Ya mibale, ntango tokoki koyoka miziki wana bisomei, tosengeli komeka malamu na biso mingi koleka kosala yango na mabota na biso. ezali eloko moko oyo batindi biso to bakangi biso na makasi te. “Mpifo moko te to nguya ekoki to elengelami mpo na kosimba na libongi ya bonganganzambe”—to na libongi, ya kozalaka tata to mama to monene mingi to mongongo makasi mingi koleka—“bobele na kondimisa, na motema molai, na bosembo mpe bosokemi,   … na bolingo mpenza; [mpe] na boboto ” (D&A 121:41–42).

Mpo na nini ndenge oyo ekumbaka na bomatisi nguya mpe mpifo kati ya libota? Mpamba te ezali ndenge oyo ebengisaka Molimo Mosantu. Ezali ndenge oyo eyokisi mitema na biso miziki ya nsango malamu. Ntango emonisami, matambe ya kobina ekosalema na pete mpe esengo na babini nionso na libota, na kozangaka mposa ya bokaneli to bobangisi to elulu.

Ntango bana na biso bazali mike, tokoki koyembela bango loyemba ya kolalisa ya bolingo mpenza, mpe ntango badinti mpe baboyi kokende kolala na butu, tosengeli koyemba loyemba ya kolalisa ya motema molai. Ntango bazali bilenge, tokoki kolongwa mobulu ya boswani mpe bokaneli mpe, esika na yango, koyemba miziki kitoko ya bondimisi—mpe ntango mosusu koyemba molonbo ya mibale ya loyemba ya kolalisa motema molai. Baboti bakoki kosala na boyokani ebonga mpenza baninga mibale oyo ya bosembo mpe boboto. Tokoki kobengisa bana na biso koyemba elongo na biso na lisanga ntango tozali kosalela boboto epai ya mozalani oyo azali na bosenga.

Ekoyaka mbala moko te. Lokola bayembi nionso basala kala nionso bayebi, esengeli mosala ya molende mpo na kosala miziki ya kitoko. Soki makoki ya kala ya kosala miziki ezali lokola mbilingambilinga mpe mobulu, mikundola ete mbilingambilinga ekoki te kobongisama na litio. mbilingambilinga na libota ezali lokola molili kati ya ndako. Ekosala malamu moke kopamela molili. Tosengeli  kolongolamolili na kotiaka pole.

Boye soki mongongo monene na bayembi ya libota na bino ezali makasi mingi mpe ekonzi mingi na babeti miziki ya libota na bino, to soki ngambo ya basinga ezali koganga mwa mingi to eboyi bakamba yango, to mwa makasi, to soki kelelo na yango ya loma ezali libanda ya boyokani to eboyi bakamba yango, bokitisa mitema. Soki bozali koyoka miziki ya nsango malamu na libota na bino te, nasengi bomikundola maloba mibale oyo: bokoba kosala. Elongo na lisungi ya Nzambe, mokolo ekoya ntango miziki ya nsango malamu ekotondisa ndako na bino na esengo moko ya koloba te.

Atako soki ebetami malamu, miziki ekopesa eyano na makambo ya biso nionso te. Ezali ekozala na bobuti mpe bokiti na bomoi na bino, bokatni mpe bokangani. ezali lolenge ya bomoi na mokili ya mabele.

Kasi ntango tobakisi miziki na matambe ya mabina, lokito oyo ntango mosusu ezali kilikli na libala mpe bomoi ya libota ekomema katikati ya boyokani. Kutu mikakatano na biso ekobakisa lokito ya komilela mpe ekolongola bikilakila ya mayoka. Malongi ya bonganganzambe ekobanda kokita na milimo na bino lokola mwa mvula ya lola. Molimo Mosantu akozala moninga ya ntango nionso, mpe lingenda na biso—ekozala na mpifo makasi mpe nguya—ekozala lingenda ezanga mbongwana ya bosembo mpe bosolo. Mpe bokonzi na biso ekozala bokonzi ya libela. Mpe na kozanga botindiki na makasi ekokitela biso mpo na libela na libela (tala D&A 121:45–46).

Yango ekoka kozala boye ntango nionso kati ya babomoi na biso mpe na mabota na biso ezali losambo na ngai na nkombo ya Yesu Klisto, amene.