2010–2019
Yango Wana, Bakitisaki Bobangi na Bango
sánzá ya mínei 2015


Yango Wana, Bakitisaki Bobangi na Bango

Kokesena na bobangi ya mokili oyo esalaka makelele mpe bobangi, bobangi nzambe ezali ebandeli ya kimia, bondimi mpe elikia.

Nakanisi lisusu na boyebi moko ntango na nazalaki mwana moke. Mokolo moko nazalaki kosakana na baninga na ngai, nabukaki na kozanga koyeba fenetele moko ya magazini ezalaki pene ya ndaku na biso. Ntango kitalatala epasukaki mpe ngonga ya sekirite ebetaki, bobangi makasi etondaki na motema mpe makanisi na ngai. Nayebaki mbala moko ete nazalaki moto ya kolekisa bomoi na ngai oyo etikelaki na boloko. Baboti na ngai babimisaki ngai esika na bombamaki na nse ya mbetu na ngai mpe basalisaki ngai kofuta etumbu na mokolo magazini mpo na mbeba na salaki. Libaku malamu, nabengamaki te kosala boloko mpo na mbeba na salaki.

Bobangi oyo nayokaki mokolo wana ezalaki makasi mingi mpe solo. Esi boyoka na tembe te mayoki ebele ya bobangi sima ya kozwa mokakatano na nzoto, moto ya libota kati na mpasi to na likama, to kati na mitungisi ya makambo ya mokili. Na mabaku ya lolenge ya boye, bopaswami motema ya mpasi ya bobangi emati mpo na ntina ya bosaleli likama, bozangi kondima, to mpasi mpe na nzela ya mayebi oyo ezali ya mbalakata, mbala mosusu na mpwasa, mpe neti kobotisa bosuki mabe.

Na bomoi na biso ya mikolo na mikolo, baraport ya violence ya koboma, nzala, bitumba, kaniaka, bobomi, bobebisi ya bomoto, maladi, mpe banguya ya bobebisi mokili ekoki kobota bobangi mpe mawa. Ya solo tozali na eleko oyo elobama epai ya Nkolo: “Mpe na mokolo yango … mokili mobimba ekozala na nungunungu, mpe mitema ya bato ekokoma mabe” (D&A 45:26).

Ntina na ngai ya kolakisa lolenge nini bobangi elongolami na nzela ya mayele malamu mpe bondimi na Nkolo Yesu Klisto. Nasambeli makasi Molimo Mosantu akopambola moko na moko na biso wana ezali biso kotala elongo liteya monene oyo.

Bobangi ya Kufa

Likolo ya koyokaka mongongo ya Nzambe sima ya kolia mbuma epekisama, Adama mpe Ewa babatamaki kati ya Elanga ya Edene. Nzambe abengaki Adama mpe atunaki, “Ozali wapi? Mpe [Adama ayanolaki], nayokaki mongongo na yo … , mpe nabangangaki” (Genese 3:9–10). Esengeli koyeba ete, moko ya makama ya Bokwei ezalaki mpo na Adama mpe Ewa ya kozala na bobangi. Liyoki makasi oyo ezali eloko moko ya ntina ya bozali na biso ya kufa.

Ndakisa moko uta na Buku ya Mormon eyekami na nguya ya mayele ya Nkolo (tala 2 Petelo 1:2–8; Alma 23:5–6) kolongola bobangi mpe kotiya kimia atako tokutani na mitungisi makasi.

Na mabele ya Helam, bato ya Alma babangisamaki na mampinga Balamanite oyo ezalaki kopusana.

“Kasi Alma akendaki liboso mpe atelemaki kati na bango, mpe ateyaki bango ete basengelaki te kobanga, kasi … basengelaki kobanza Nkolo na bango Nzambe mpe akokaki kokangola bango.

“Mpe lisusu bakitisaki babobangi na bango” (Moziya 23:27–28).

Bongo Alma akitisaki bobangi ya bato te. Kasi, Alma ateyaki bandimi babanza Nkolo mpe Akokaki kopesa bobele bokangoli (tala 2 Nefi 2:8). Mpe mayele ya bobateli ya Mobikisi mobateli bokolongolo epesaki makoki na bato bakitisa babobangi na bangomei.

Mayele malamu ya bondimi na Nkolo elendisaka biso mpo ya kokitisa babobangi na biso mpo ete Yesu Klisto azali bobele liziba ya kimia ya boyiki mpiko. Alobaki “Boyekola na ntina na ngai, mpe boyoka maloba na ngai; botambola kati na bosembo ya Molimo na ngai, mpe bokozwa kimia epai na ngai” (D&A 19:23).

Molakisi mpe alimbolaki, “Ye oyo asali misala ya bosembo akozwa lifuti na ye, atako kimia kati ya mokili oyo, mpe bomoi ya seko na mokili oyo ezali koya” (D&A 59:23).

Bondimi mpe elikia na Klisto mpe bolingi ya koyekama na ntina, ngolu, mpe mawa na Ye ekomema na elikia, na nzela ya Bomikabi, na Ye kati ya Bosekwi mpe bomoi ya seko (tala Moroni 7:41). Bondimi mpe elikia ya lolenge oyo etindaka biso tozala na kimia ya kansasa ya malamu na bomoi na biso oyo biso nionso tozali koluka. Nguya ya Bomikabi esalaka ete boyamboli esalema na pete mpe ekitisaka bozangi elikia oyo euti na lisumu; elendisaka biso lisusu mpo na komona, kosala, mpe kokoma moto malamu na ndenge tokoki koyeba te to kokokisa elongo na bokasi na biso ya ndelo ya nkufa. Solo, moko ya mapamboli minene ya moyekoli amipesa ezali “kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nionso” (Bafilipi 4:7).

Kimia ya Klisto epesaka biso ndingisa ya komona bokufi na nzela ya botali malamu boseko mpe epesaka molimo elenda (talaBakolinti 1:23) oyo esungaka biso totikala bobele na kotalela se nzela na biso ya lola. Na yango, tokoki kopambolama mpo na kokitisa babobangi na biso mpo ete malongi na Ye epesaka ntina mpe ememaka na lolenge nionso ya bomoi na biso. Makuli mpe mayokani na Ye ebondisaka mpe elendisaka ntango nionso malamu mbe mabe lokola. Mpe likoki ya bonganganzambe na Ye epesaka elikia ete biloko ya ntina koleka ekoki kowumela na ntango mpe na boseko lokola.

Kasi ekoki biso kokitisa babobangi oyo na pete mpe mbala mingi ezingi biso na mokili na biso ya lelo? Eyano na motuna oyo ezali “iyo” ya pete. Mibeko misato ya ntina ezali na katikati ya kozwaka lipamboli oyo na bomoi na biso: (1) talela Klisto, (2) tonga likolo ya moboko ya Klisto, mpe, (3)  kende liboso na kondima na Klisto.

Talela Klisto

Toli Alma apesaki epai ya mwana na ye Helaman ebongi mpenza na moko na moko na biso lelo: “Iyo tala ete otaleli Nzambe mpe zala” (Alma 37:47). Tosengeli kotalela mpe kotia bokebi na biso mingimingi na Mobikisi na ngonga mpe bisika nionso.

Kanisa boniboni Baposto ya Nkolo bazalaki kati ya masuwa, baningisamaki na katikati ya mbu. Yesu akendaki epai na bango, kotambolaka likolo ya mayi; kasi bayebaki Ye te, bagangaki na bobangi.

“Yesu ayebisaki bango, na kolobaka, Bozala na motema nsai; ezali Ngai; bobanga te.

“Mpe Petelo ayanolaki ye mpe alobaki, Nkolo, soki ezali yo, pesa ndingisa naya epai ozali likolo ya mayi.

“Mpe alobaki, Yaka” (Matai 14:27–29).

Petelo sima atambolaki likolo ya mayi kino epai ya Yesu.

Kasi ntango amonaki mopepe makasi, abangaki, abandaki kotiola, mpe agangaki, “Nkolo, bikisa ngai.

“Mpe na mbala moko Yesu atandelaki ye loboko, mpe asimbaki ye, mpe alobaki na ye, O yo oyo ozali na bondimi moke, mpo na nini ozali na ntembe?” (Matai 14:30–31).

Nazali komona Petelo koyanolaka na bokasi mpe na mbala moko na libengisi ya Mobikisi. Na miso na ye etali bobele na Yesu, abimaki kati ya masuwa mpe atambolaki na lolenge ya kokamwa likolo ya mayi. Kaka ntango miso na ye etalaki mopepe mpe mbonge esalaki ete abanga mpe abanda kozinda.

Tokoki kopambolama mpo na kolonga bobangi na biso mpe kolendisa bondimi na biso ntango tolandi mateya ya Nkolo: “Talela ngai na makanisi nionso; kotia ntembe te, kobanga te” (D&A 6:36).

Tonga likolo ya Moboko ya Klisto

Elamani alobelaki bana na ye ya mibali, Nefi mpe Lehi: “Mpe sikawa bana na ngai bomikundola ete ezali na likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana mobali ya Nzambe, ete bosengeli kotonga moboko na bino; ete ekotinda zabulu mipepe makasi na ye, iyo, makula na ye na mopepe ya kaina, iyo ekobete mvula nionso ya mabanga na ye mpe moketi makasi na ye likolo na bino mpo ya kobenda bino na nse na libulu ya bobola mpe lisumu ezanga nsuka, na ntina ya libanga likolo na yango botongami, oyo ezali nse moko wapi soki bato batongi bakoki te kokweya” (Elamani 5:12).

Makuli mpe mayokani etongami lolenge moko tosalelaka mpo ya kotonga bomoi na biso likolo ya moboko ya Klisto mpe Bomikabi na Ye. Tokangani na kimia epai ya mpe elongo na Mobikisi ntango tozali kosala na bolongobani makuli mpe tozali kokota kati na mayokani, na botongono kobanzaka mpe kotosaka mikumba ya bule wana, mpe kosala bokasi na biso mpo na kozala na bomoi engebene na masengensi oyo tondimaki. Mpe mokangano wana ezali liziba ya bokasi ya molimo mpe ya kotelema ngui kati na makambo manso ya babomoi na biso.

Tokoki kopambolama mpo ya kokitisa bobangi na biso soki tofandisi mpenza bamposa mpe misala na biso likolo ya moboko ya solo ya Klisto na nzela ya makuli mpe mayokani na biso.

Kende Liboso na Bondimi na Klisto

Nefi alobaki: “Yango wana, bosengeli kokende mbangu liboso na sikisiki na Klisto, kozalaka na bongengi bolamu ya elikia, mpe bolingo ya Nzambe mpe ya bato nionso. Yango wana, soki bokokende mbangu liboso, kosalaka limpati likolo ya liloba ya Klisto, mpe botii molende kino na nsuka, tala, boye elobi Tata: Bokozwa bomoi ya seko” (2 Nefi 31:20).

Molende ya botosi oyo elobami kati na molongo oyo ezali eyano bososoli ya molimo mpe limoni, boyiki mpiko, bompikiliki, mpe ngolu ya Nzambe. Kosalelaka bondimi kati mpe likolo na nkombo ya Yesu Klisto, na boboto komipesaka na bolingi mpe ntango na Ye na babomoi na biso, mpe na komikitisa kososolaka loboko na Ye kati ya biloko nionso ememaka biloko ya kimia ya bokonzi ya Nzambe oyo ememaka esengo mpe bomoi ya seko (tala D&A 42:61). Atako ntango tokutani na mikakatano mpe kokutana na maye ekoya lobi oyo toyebi te, tokoki kotikala na esengo mpe kozala na bomoi ya “kimia kati na bonzambe mpe na bosolo” (1 Timote 2:2).

Tokoki kopambolama mpo na kokitisa bobangi na biso ntango tozwi mpiko oyo ewuti na boyekoli mpe kosalela mibeko ya nsango malamu mpe na mokano ya kokendaka liboso kosalaka mpe kobatelaka mayokani na Nkolo.

Bobangi Nkolo

Bokeseni na bobangi ya mokili kasi babobangi oyo elobamaki oyo tokutanaka na yango ezali oyo makomi elimboli lokolo “bobangi nzambe” (Baebele 12:28) to “bobangi Nkolo” (Yobo 28:28; Masese 16:6; Yisaya 11:2–3). Kokesena na bobangi ya mokili oyo esalaka makelele mpe bobangi, bobangi nzambe ezali ebandeli ya kimia, bondimi mpe elikia.

Kasi lolenge nini eloko ekangani na bobangi ekoki kozala malamu to ntina na molimo?

Bobangi ya bosembo oyo nazali komeka kolobela ezali na liyoki ya mozindo ya botikali kimia, ya botosi, mpe ya bobangi mpo na Nkolo Yesu Klisto (tala Nzembo 33:8; 96:4), botosi ya mitindo na Ye (tala Dutelonome 5:29; 8:6; 10:12; 13:4; Nzembo 112:1), mpe komona liboso na bosambisi ya nsuka mpe boyengebene kati ya loboko na Ye. Na bongo, bobangi nzambe ekokola na bososoli malamu ya makambo ya bonzambe mpe etinda ya Nkolo Yesu Klisto, bolingi ya kopesa bolingi na biso epai ya bolingi na Ye, mpe boyebi ete mibali mpe basi nionso bakozala bayanoli mpo na masumu na bangomei na Mokolo ya Bosambisi (tala D&A 101:78; Biteni ya Bondimi 1:2).

Makomi eteyi ete, bobangi nzambe “ezali ebandeli ya mayelee” (Masese 1:7), “malakisi ya bwanya” (Masese 15:33), “elikia ya mpiko” (Masese 14:26), mpe “liziba ya mai ya bomoi” (Masese14:27).

Nasengi na bino boyeba ete bobangi nzambe ekangisami na bososoli ya Bosambisi ya Nsuka mpe boyanoli ya moto na moto na biso mpo na bamposa na biso, makanisi, maloba, mpe misala (tala Moziya 4:30). Bobangi Nkolo ezali te bobangi ya kopusana liboso na Ye mpo na kosambisama. Nandimi te tokobanga Ye mpenza. Kasi, kokutana na makambo lolenge ezali mpenza na ntina ya bisomei mpe ya kozwaka mayele malamu” (2 Nefi 9:14; tala lisusu Alma 11:43) ya mayele na bisomei, lokuta, botukami. Na nsuka, tozanga bolimbisami.

Moto nioso oyo azali na bomoi to oyo akozala na bomoi likolo ya mabele “akobengama mpo na kotelema liboso ya Nzambe, mpo na kosambisama engebene na [ya ye] misala atako soki ezalaki malamu to mabe” (Moziya 16:10). Soki bamposa na biso ezalaki ya malamu mpe misala na biso ya malamu, sima esika ya bosambisi ekozala malamu (see Jacob 6:13; Enos 1:27; Moroni 10:34). Mpe na mokolo ya nsuka “tokozwa mbano ya sembo” (Alma 41:6).

Na ngambo mosusu, soki bamposa na biso ezalaki ya mabe mpe misala na biso ya nkanda, boye esika ya bosambisi ekosala ete toyoka bobangi. “Tokomeka kotala likolo te epai ya Nzambe na biso; mpe tokoluta kozala na bosepeli soki tokoki kotinda mabanga mpe ngomba mpo na kokweya likolo na biso, mpo na kobomba biso uta na miso na ye” (Alma 12:14). Mpe na mokolo ya nsuka “tokozala [biso] nionso na mbano ya mabe” (Alma 41:5).

Lokola elimbolami na Mosakoli:

“Banga Nzambe, mpe tosa mitindo na ye: mpo ezali oyo moto asengeli kosala.

“Mpo ete Nzambe akokomisa misala nionso epai na kosambisama elongo na makambo nionso mabombami, soki ezali malamu, soki ezali mabe” (Mosakoli 12:13–14).

Bandeko na ngai mibali mpe basi, bobangi Nzambe elongolaka bobangi ya mokili. Ekitisaka kutu mawa ya posa ete tokoki mokolo moko te kozala malamu ya kokoka na molimo mpe mokolo moko te kokokisa babosenga ya Nkolo mpe babolamu oyo tozali kozela. Na bosolo, tokoki te kozala malamu ya kokoka to kokokisa babosenga ya mposa na biso na koyekamaka bobele na makoki mpe mosala na bisomei. Misala mpe bamposa na biso yango moko ekoki kobikisa biso te te. “Sima ya nionso oyo tokoki kosala” (2 Nefi 25:23), tosalemi na mobimba kaka na nzela ya ngolu mpe mawa malamu na nzela ya libonza ya bomikabi ya Mobikisi oyo ezangi nsuka mpe ya seko (tala Alma 34:10, 14). Ya solo mpenza, “Tondimi ete na nzela ya Bomikabi bwa Klisto, bato banso bakoki kobikisama, na kotosaka mibeko mpe makuli ma Nsango elamu.” (Biteni ya Bondimi 1:3).

Bobangi Nzambe ezali kolinga mpe kondimela Ye. Ntango tobangi Nzambe na mobimba koleka, tolingi Ye na mobimba ebongi nie. Mpe “bolingo ya bobongi nie ekobengana bobangi nionso” (Moroni 8:16). Nalaki bongengi ya mwinda ya bobangi nzambe ekobengana bilili ya molili ya bobangi ya mokili (tala D&A 50:25) ntago totaleli Mobikisi, totongi likolo na Ye lokola moboko na biso, mpe tokobi kokende liboso na nzela ya liyokani na Ye elongo na mokumba ebulisama.

Litatoli mpe Elaka

Nalingi mpe natosi Nkolo. Nguya mpe kimia na Ye ezali ya solo. Azali Mosikoli na biso, mpe na tatoli ete Azali na bomoi. Mpe mpo na Ye, mitema na biso ezali na mposa ya koyoka mobulu to bobangi te (tala Yoane 14:27), mpe tokopambolama mpo na kokitisa babobangi na biso. Natatoli bongo na nkombo ya bule mpe esantu ya Nkolo Yesu Klisto, amene.