2010–2019
Tango nionso Bokanisaka Ye
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


12:6

Komikundola Ye Ntango Nionso

Natatoli nakomikitisa, mpe nasambeli, ete tomikundola ntango nionso Ye—na bangonga nionso, makambo nionso, mpe bisika wapi tokoki kozala.

Bandeko mibali mpe basi, Ntango nazalaki kosala na Azia, bato ntango mosusu bazalaki kotuna, “Mpaka Gong, bato boni bazali na etuka ya Azia ya Eklezia?”

Nazalaki koloba, “katikati ya bato ya mokili— bato nkoto 3,6 ya bifuku.”

Moto moko atunaki, “Ezali mpasi komikundola bankombo na bango nionso?”

Komikundola—mpe kobosana—ezali eteni ya bomoi ya mikolo nionso. Ndakisa, kala, nsima ya kolukaka bisika binso telefoni ya maboko na ye, mwasi na ngai na nsuka azwaki mokano ya kobanga yango uta na telefoni mosusu. Ntango ayokaki telefoni na ye kolela, mwasi na ngai akanisaki, “Nani akokaki kozala kobenga ngai? Napesaki nimelo wana na moto moko te!”

Komikundola—mpe kobosana—ezali eteni ya mobembo na biso ya seko. Ngonga, likoki ya kopona, mpe likoki ya bokundoli esalisaka biso toyekola, tokola, mpe tobakisa bondimi.

Na maloba ya nzembo moko ya kitoko  eyebana:

Tokoyemba banzembo ya masanzoli na nkombo ya Yesu,

Mpe kopesa masanzoli mpe lokumu epai na Ye  …

Bino Basantu, bokabola mpe botatola

Bozali komikundola ye mpenza.1

Poso na poso, na kokalaka elambo, toyokanaka ntango nionso komikundola Ye. Kosalelaka makomi pene ya 400 kolobelaka liloba komikundola, botala ndenge motoba oyo tokoki ntango nionso komikundolela Ye.

Ya yambo, Tokoki ntango nionso komikundola Ye na kozalaka na kondima na mayokani , bilaka, mpe baelikia na Ye.

Nkolo amikundoli mayokani na Ye ezanga nsuka—uta na ntango ya Adama kino na mokolo bakitani ya Adama “akoyamba bosolo, mpe akotala likolo, nsima Siona ekotala na nse, mpe balola ekoningana na esengo, mpe mabele ekolenga na esengo.”2

Nkolo amikundoli bilaka na Ye, kokotisaka bilaka ya kosangisa Yisalaele epalangana na nzela ya Buku ya Mormon: Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto mpe bilaka epesami na mondimi nionso mpe misionele oyo amikundoli motuya ya milimo. 3

Nkolo amikundola mpe alakaka bikolo mpe bato. Na mikolo oyo ezali koningana mpe ya mobulungano,4 “basusu bazali kolikia na balikalo, mpe basusu na bampuda: kasi tokomikundola nkombo ya Nkolo Nzambe na biso,”5 oyo akambaka “lobi lokola azali na oyo eleki.”6 Na “ntango ya likama,”7 biso “tomikundolaka ete ezali mosala ya Nzambe te oyo etugisami, kasi mosala ya bato.”8

Ya mibale, tokoki ntango nionso komikundola Ye na kondimaka na matondi loboko na Ye na bomoi na biso mobimba.

Loboko ya nkolo kati na bomoi na biso ezali mbala mingi polele mpenza na koyeba. Lokola moto na filozofi ya Moklisto Søren Kierkegaard alobaki yango: “Bomoi esengeli kososoloma nsima. Kasi  … esengeli kobikelama liboso .”9

Mama na ngai ya bolingo kala te akembelaki mibu ya mbotama na ye ya mbala ya 90. Atatolaki na matondi lipamboli ya Nzambe na likambo ya ntina moko na moko kati na bomoi na ye. Masolo ya libota, bonkoko ya libota, mpe mikangano ya libota esalisaka biso tomikundola mpenza makambo ya kala kopesaka bandakisa ya lobi mpe elikia. Mokoloto ya likoki ya bonganganzambe mpe mapamboli ya bankoko etatolaka loboko ya Nzambe na ntaka ya bankola.

Omikanisa naino lokola buku ya bomikundoli na yomei ya bomoi—kotalisaka nini mpe lolenge nini oponaka komikundola?

Ndakisa, ntango nazalaki elenge, nalingaki mpenza kobeta ndembo ya kitunga na kelasi. Nayekolaki mbala na mbala. Mokolo moko coach aponaki mobeti malamu ya kobotama ya1,95 m mpe mobeti malamu ayebana ya 1,88 m mpe alobaki na ngai, “Nakoki kotia yo te na ekipi, kasi okobeta mpenza mokolo moko te.” Namikundoli lolenge nini na boboto alendisaka ngai nsima, “mpo na nini omeka ndembo ya makolo te? Okozala malamu.” Libota na ngai esepelaki ntango natiaki mongete na ngai ya yambo.

Tokoki komikundola baoyo bapesaka biso libaku, mpe libaku ya mibale, na bosembo, boboto, bompikiliki, mpe bolendisi. Mpe tokoki kokoma moko oyo basusu bakomikundola ntango bazali na mposa ya lisalisi. Komikundolaka na matondi lisungi ya basusu mpe nguya ya kokamba ya Molimo ezali nzela tomikundolaka Ye. Ezali nzela totangelaka mapamboli na biso mingi. Mpe tomonelaka maye Nzambe asali.10

Ya misato, tokoki ntango nionso komikundola Ye kotiaka elikia ntango Nkolo alaki biso ete “ye oyo ayamboli masumu na ye, ye kaka alimbisami, mpe Ngai, Nkolo, nakomikundola yango lisusu te.”11

Ntango toyamboli mobimba, ndakisa na tubelaka mpe kotikaka masusu na biso, totuni elongo na Enosa, ntango elindo na biso ekombolami, “Nkolo, esalamaka ndenge nini?” mpe yoka eyano “Na ntina ya bondimi na yo na Klisto”12 mpe libiangi na Ye ya “kanisela ngai.”13

Ntango toyamboli mpe bakambi ya bonganganzambe basakoli biso ya kolongobana, tosengeli te kokoba kotubela mpe kotubela masumu oyo ya kala. Mpo na kolongobana elingi koloba te kozala kobonga nie. Mwango ya Tata ya Lola ya esengo abiangi biso tozala na komikitisa na kimia na mobembo na biso ya bomoi mpo na kokoma mokolo mosusu kobongama nie na Klisto,14 ya kotungisama , kobanga, to kozanga esengo te ntango nionso na mabe na biso ya lelo. Kanisa, Ayebi makambo nionso oyo tolingi te moto mosusu ayeba etali biso—mpe alingi biso ntango nionso.

Ntango mosusu bomoi emekaka elikia na biso na mawa, boyengebeni, mpe bosambisi mpe libiangi na Ye ya bonsomi mpo na kopesa nzela na Bomikabi ebikisa biso wana ezali biso kolimbisa basusu mpe bisomei.

Elenge mwasi na ekolo mosusu alukaki mosala lokola mopanzi nsango, kasi mokonzi oyo azalaki kopesa misala ya bozangi mawa. Alobaki na ye ete, “Na siné na ngai, nalaki okokoma mopanzi nsango te kasi okotimola batelase.” Azalaki mwasi se moko kotimolaka batalase na etuluku ya mibali.

Mibu mingi nsima mwasi oyo akomaki mokonzi. Mokolo moto moko ayaki kolukaka siné na ye mpo na mosala.

Atunaki , “Ozali komikundola ngai?” Azalaki te.

Alobaki ete, “Ozali komikundola ngai te, kasi nazali komikundola yo. Na siné na yo, olakaki ngai ete nakomaki mokolo moko te mopanzi nsango. Na sine na yo, otindaki ngai natimola batalase, mwasi se moko na etuluku ya mibali.”

Alobaki na ngai, “Nazali koyoka ete nasengeli kosalisa mobali wana malamu koleka asalisaki ngai—kasi nazali na makasi wana te.” Ntango mosusu makasi wana ezali kati na biso te, kasi ekoki kozwama na komikundolaka Bomikabi ya Mobikisi na biso, Yesu Klisto.

Ntango elikia etekami, bandoto ebulungani, mitema ebukani, mpe ebukani lisusu, ntango tolingi boyengebene mpe tozali na mposa ya mawa, ntango makofi na biso ekangami mpe mpizoli ezo tanga, ntango tozali na mposa ya koyeba nini kokangama na yango mpe nini kotika, tokoki ntango nionso komikundola Ye. Bomoi ezali te lokola mabe lokola ekokaki komonana ntango mosusu. Mawa na Ye ezanga nsuka esalisalisaka biso komona nzela, bosolo, mpe bomoi na biso.15

Ntango tomikundola maloba mpe ndakisa na Ye, tokotuka to kotukama te.

Tata ya moninga na ngai azalaki kosala lokola mobongisi mituka. Mosala na ye ya bosembo ezalaki komonana kutu na maboko na ye ya kosukwama na bokebi. Mokolo moko, moto moko na tempelo alobaki na tata ya moninga na ngai asengelaki kosukola maboko na ye liboso ya kosala kuna. Esika ete atukama, moto malamu oyo abandaki kosukola basani ya ndako na maboko na mayi ya fulu liboso ya kokende na tempelo. Apesi ndakisa ya baoyo “bakobuta na ngomba ya Yawe” mpe “batelema na esika na ye ya bule” na maboko ya kosukwama mpenza mpe mitema ya mpeto mpenza.16

Soki tozali na mayoki ezangi boboto, nkanda, to nkele, to soki tozali na likambo ya kosengela bolimbisi ya basusu, sikoyo ezali ngonga ya kosala bongo.

Ya minei, Abiangi biso tomikundola ete Azalaki kotombela biso ntango nionso boyei bolamu na ndako na Ye.

Toyekolaka na kotuna mpe koluka. Kasi nasengi botika koluka te kino bokomi—na maloba ya T. S. Eliot—“bisika wapi [yo] obandaki mpe yeba esika mpo na mbala ya yambo”17 Ntango obelemi, nasengi ofungola motema na yo na Buku ya Mormon, lisusu, mpo na mbala ya yambo. Nasengi osambela na mokano ya solo, lisusu, mpo na mbala ya yambo.

Tia elika na likoki ya komikundola ya yambo to ya polele te. Tika yango ekotandola bondimi na yo. Na Nzambe ezali na esika moko te oyo okoki kozongela te.

Baprofeta ya ntango ya kala mpe ya sika babondeli biso totika te babotau, mabe, to babolembu ya nzoto—ya basusu to ya bisomei—esalaka biso tozanga babosolo, mayokani, mpe nguya ya bosikoli kati na nsango malamu na Ye ezongisama.18 Oyo ezali mpenza ntina kati ya eklezia wapi moko na moko na biso tokoli na nzela ya bosali elongo ezanga bobongi nie. Profeta Joseph alobaki, “Nalobaki na bino mokolo moko te ete nazalaki ya kobonga nie; kasi ezali na libungi moke moko te na babobimisi oyo nateyi.”19

Ya mitano, tokoki ntango nionso komikundola Ye na Saba na elambo. Na nsuka ya mosala na Ye na kufa mpe na ebandeli ya mosala na Ye na bosekwi—na mbala moko— Mobikisi na biso azwaki limpa mpe vinio   mpe asengaki ete tomikundolaka nzoto mpe makila na Ye, 20 “mpo mbala nionso bokosala yango bomikundola ngonga oyo ete nazalaki elongo na bino.”21

Na makuli ya elambo, totatolaka epai ya Nzambe Tata ete tozali na bolingi ya kozwa likolo na biso nkombo ya Mwana na Ye mpe ntango nionso komikundola Ye mpe kobatela mitindo na Ye, oyo Apesi biso, oyo tokoki ntango nionso kozwa Molimo na Ye azala elongo na biso.22

Lokola eteyi Amuleki, Tomikundoli Ye ntango tozali kosambela likolo ya bilanga na biso, bibwele na biso, mpe mabota na biso mpe ntango tozali komikundola bakeleli, babolumbu, bakoni mpe batungisami.23

Na nsuka, ya motoba, Mobikisi abiangi biso ntango nionso tomikundola Ye lokola Ye ntango nionso amikundolaka biso.

Na Mokili ya Sika, Mobikisi na biso mosekwi abiangaki baye bazalaki kuna baya, moko na moko, kotia maboko na bango kati na mopanzi na Ye mpe bayoka bilembo ya bansete na maboko na Ye mpe na makolo na Ye.24

Makomi elimboli bosekwi lokola “enama na enama mpe ekangiseli na ekangiseli ekozongisama na … lolenge na yango ya malamu mpe ebongi nie,” mpe “kutu nsuki moko ya moto ekobunga te.”25 Wana kozalaka bongo, nasengi botala boniboni ezala ete Mobikisi na biso azali ya kobonga nie, nzoto ya kosekwa ezala lisusu na bampota na mopanzi na Ye mpe bilembo ya nsete na maboko mpe makolo na Ye.26

Na ntango ya kala, bato na kufa bazalaki kobomama na ekulusu. Kasi bobele Mobikisi na biso, Yesu Klisto, ayambaka biso komemaka lisusu bilembo ya bolingo na Ye ya peto. Bobele Ye akokisi esakola ya kotombwama likolo ya ekulusu ete Akoka kobenda moko na moko na biso, na nkombo, epai na Ye.27

Mobikisi na biso alobi:

“Iyo, bokoki kobosana, kasi nakobosana yo te.

“Tala, nakomi nkombo na bino na matandu ya maboko na ngai.”28

Atatoli: “Nazali ye oyo atombolamaki. Nazali Yesu oyo abakisamaki. Nazali Mwana ya Nzambe.”29

Natatoli mpe nasambeli ete tokomikundola Ye ntango nionso—na ngonga nionso, bisika binso oyo wapi tokoki kozala.30 Na nkombo ya bule mpe santu ya Yesu Klisto, amene.