2010–2019
Mabota ya Seko
Likita Linene ya Sanza ya Minei 2016


15:34

Mabota ya Seko

Lotomo na biso ezali kotia mabota na biso mpe mabota ya basusu nzinganzanga na biso katikati ya makanisi na biso.s

Natondi kozala elongo na bino na mpokwa oyo na liyangani linene ya bonganganzambe ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba Mikolo mya Nsuka. Oyo ezali ngango moko monene na mambi ya Eklezia. Mibu nkama moko ntuku mwambe eleki, na 1834, na Kirtland, na Ohio, banganganzambe nionso babengamaki mpo na kokutana elongo na kelasi ya mabaya ya 4.2-na-4.2-metele. Na liyangani wana eyebisami Profeta Joseph Smith alobaki: “Boyebi mingi te etali atandele ya Eklezia oyo mpe bokonzi koleka bebe na mabolongo ya mama na ye. Bozali kososola yango te. … ezali kaka mwa liboke ya Bonganganzambe bomoni awa na mpokwa oyo, kasi Eklezia oyo ekotondisa Amerika ya Nordi mpe ya Sudi—ekotondisa mokili.”1

Basimbi bonganganzambe bamilio, na koleka bikolo 110, basangani na liyangani oyo. Ntango mosusu Profeta Joseph Smith amonaki mosika ntango oyo mpe mikolo mikoya ya nkembo naino liboso na biso.

Nsango na ngai na mpokwa ya lelo ezali komeka kolimbola lobi ekoya mpe nini tosengeli kosala mpo nakozala eteni ya mwango ya esengo oyo Tata na biso ya Lola alengeli mpo na biso. Yango tokoka kobotama, tozalaki na libota elongo na Tata na biso na Lola. Abongisaki mwango moko oyo ekokisi biso mpo na kokende liboso mpe kokola mpo na kokoma lokola Ye. Asalaki yango na bolingo mpo na biso. Ntina ya mwango ezalaki mpo na kopesa biso ndingisa ya libaku ya kozala libela lokola Tata na biso ya Lola azali. Mwango oyo ya nsango malamu epesaki biso bomoi ya bokufi na yango tolingaki komekama. Elaka moko epesamelaki biso ete na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, soki totosi mibeko mpe makuli ya bonganganzambe ya nsango malamu, tokozala na bomoi ya seko, eleki monene ya makabo nionso.

Bomoi ya seko ezali lolenge ya bomoi oyo Nzambe Tata na biso ya Lola azali. Nzambe alobi ete ntina na Ye ezali “komema mpembeni bozangi bokufi mpe bomoi ya seko ya moto” (Moses 1:39). Ntina monene ya mosimbi banganganzambe bazali, bongo, kosalisa na mosala ya kosunga bato basekwa na bomoi ya seko.

Bokasi nionso ya bonganganzambe mpe likuli nionso ya bonganganzambe azali mpo na kosalisa bana ya Tata na biso na Lola babongwana na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto kokoma baye matonga ya libota ebonga nie. Elanda ete “mosala monene ya moto nionso ezali kondima nsango malamu, kobatela mitindo, mpe kokela mpe kobongisa litonga moko ya libota ya seko,”2 mpe kosalisa basusu kosala bongo.

Nzambi yango ezali ya solo, nionso tosalaka esengeli kozala na libala ya selisitiale lokola lotomo mpe ntina. Yango elingi koloba tosengeli kobunda mpo na kokangisama na moninga ya seko na tempelo ya Nzambe. Tosengeli lisusu kolendisa basusu mpo na kosala mpe kobatela mayokani oyo ekokangisa mobeli mpe mwasi lisanga, elongo na libota na bango, na bomoi mpe na mokili ekoya.

Mpo na nini yango ezali na motuya mingi mpo na moko na moko na biso? Ezalli mpamba te lotomo na biso ya bonganganzambe ezali kotia mabota na biso mpe mabota ya baye nzinganzinga na biso na katikati ya makanisi na biso. Mokano nionso ya monene esengeli kofanda likolo ya mbano ekozala na yango na libota moko mpo na komikokisa mpo na bomoi elongo na Tata na biso ya lola mpe Yesu Klisto. Ezali na eloko te na mosala ya bonganganzambe na biso ezali na motuya lokola oyo.

Tika na lobela bino nin yango ekoki kolinga koloba na diakona oyo azali koyoka mpokwa oyo lokola moko ya libota moko mpe moko ya lisanga likoki moko.

Na libota, ekoki kozala na losambo ya mbala na mbala to likita ya mpokwa na libota. Soki tata na ye, ayoki lotomo oyo, akobenga libota elongo mpo na losambo to kotanga makomi, diakona akoki kokima mbangu mpo na kosala elongo na esengo. Akoki kolenisa bandeko mibali mpe bandeko basi kosala elongo mpe kokumisa bango ntango basali. Akoki kosenga tata na ye lipamboli ntango kelaki ebandi to na ntango mosusu esengeli.

Akoki kozala te na tata moko ya botingono. Kasi mposa mpenza ya motema na ye mpo na mayele oyo ekomema nguya ya lola nab aye nzinganzinga na ye na ntinna ya bondimi na ye. Bakoluka mpo na bomoi ya libota ete diakona wana alinga na motema na ye mobimba.

Moteyi na Bonganganzambe ya Alona akoki komona na mosala na ye ya moteyi na bandako libaku ya kosalisa Nkolo abongola bomoi ya libota moko. Nkolo asengi yango na Doctrine et Alliances:

“Mokumba ya moteyi ezali kokengela likolo ya eklezia ntango niono, mpe kozala elongo mpe kolendisa bango;

“Mpe kotala ete ezali na masumu te na eklezia, motema mabe te bango na bango, lokuta te, nsonginsongi te, to maloba mate te” (D&C 20:53–54).

Bongo lisusu, nganganzambe na Bonganganzambe ya Alona apesameli mokumba oyo:

“Mokumba ya nganganzambe ezali koteya, koyekolisa, kolimbola, kolendisa mpe kobatisa, mpe kosala elambo,

“Mpe kotala ndako ya mondimi moko na moko, mpe kolendisa bango mpo na kosambela na mongongo makasi mpe na sekele mpe kokokisa mikumba nionso ya libota” (D&A 20:46–47).

Bokoki komituna, lokola nasalaki ntango nazalaki elenge moteyi mpe nganganzambe, boniboni mokili nakoki kotelamaka mimekano wana. Nakokaki mokolo moko te koyeba na ntembe te boniboni nakokaki kolendisa na lolenge moko oyo ekokaki komema libota moko na bomoi ya seko na kozanga kotuka to lokola kotonga. Nayekoli ete bolendisi moko kaka oyo ekobongola mitema ewuti na Molimo Mosantu. Yango ekomaka mbala mingi ntango topesi litatoli ya Mobikisi, oyo azalaki mpe azali moko na libota ebonga nie. Ntango tokangami na bolingo na biso mpo na Ye, boyokani mpe kimia ekokola na bandako kotalaka. Molimo Mosantu akozala na biso na mosala na biso mpo na mabota.

Mosimbi bonganganzambe akoki, na lolenge asambelaki, na lolenge ye alobaka, na lolenge ya alendisaka baye libota, komema nguya mpe ndakisa ya Mobikisi na mayele mpe mitema na bango.

Mokambi moko ya bonganganzambe alakisaki ngai asosolaki yango. Asengaki elenge mwana mobali na ngai akamba na kotala libota moko. Alobaki ete libota ekokaki kotelemela bolendisi na ye, kasi akanisi liteya mpe litatoli ya pete ya mwana mobali moko ekokaki mingimingi kokota na mitema na bango ya makasi.

Nini elenge mpaka akoki kosala mpo na kosalisa na kokela mabota ya seko? Akoki kozala penepene ya kokende na esika ya misio. Akoki kosambela na motema na ye nionso ete akoki kokutana na bango, koteya bango, mpe kobatisa bango. Namikundoli lisusu elenge mobali moko ya kitoko elongo na molongani na ye ya bolingo mpe bana na bango mibale ya mike ya basi kofandaka elongo na ngai mpe moninga na ngai ya misio mokolo moko. Molimo Mosantu ayaki mpe atatolaki na bango ete nsango malamu ya Yesu Klisto ezongisami. Bandimaki ya kokoka ete batunaki soki tokokaki kopesa bana na bango mibale ya mike ya basi mapamboli lokola bamonaki esalamaki na moko ya mayangani ya elembo na biso. Basilaki kozala na mposa mpo bana na bango bapambolama, kasi basosolaki naino te mapamboli ya ya likolo wana elingaka kosalema kaka na tempelo ya Nzambe nsima ya kosala mayokani.

Nazali naino koyoka mpasi kokanisa balingami wana mpe bana basi wana ya mike, mingimingi bakoli sikawa, kozangaka elaka ya libota ya seko. Baboti na bango bazalaki na ata mwa likanisi ya mapamboli oyo bakokaki kozwa. Elika na ngai ezali ete na lolenge moko, esika moko bakoka kozala na libaku ya komikokisa mpo na kozala libota ya seko.

Bamisionele misusu na kokendeke na misio bakozala na esengo mingi koleka oyo mwana na ngai Matthew azwaka. Ye mpe moninga na ye bakutanaki na mwasi akufela mobali moko na bana 11 oyo bazalaki kofanda na mbaku ya bomikitisi. Alingaki mpo na bango oyo bolingi—kozala na libota ya seko. Na mwana na ngai ya mobali, emonanaki ekokaki kosalema te to mingimingi te na ngonga wana.

Natalaki mwa engumba mibu nsima ya libatisi ya mwasi mokufeli mobali wana na mwana na ngai ya mobali, mpe abengisaki ngai kokutana na libota na ye na Eklezia. Nasengelaki kozela mpamba te bana bana na ye mingi, elongo na bankoko na ye, bawutaki na bandakonzambe kilikili na etuka wana. Mwana mobali moko azalaki kosala lokola episikopo, bana na ye bango bapambolamaki na mayokani ya tempelo mpe bakangisamaki na libota ya seko. Ntango natikaki ndeko mwasi oyo ya bolingo, atiaki maboko na ye nzinganzinga na loketo na ngai (azalaki mokuse mpenza, na yango akokaki kosimba loketo na ngai) mpe alobaki, “Palado, yebisa Mateo azonga na Chili yambo na kufa.” Apesamelaki, na ntina ya bampaka wana ye botongono, bokokisi yambo eselema ya eleki monene ya makabo nionso ya Nzambe.

Ezali na makambo mpaka moko, ntango awuti misio, asengeli kozala mpo na kozala solo na elaka na ye koluka bomoi ya seko mpo na yemei mpo na baye ye alingaki. Ezali te na elaka ya monene mingi na ntango mpe na boseko koleka libala. Boyokaki toli ya mayele ya kosala libala ezali eloko ya yambo na mwango ya nokinoko nsima ya misio. Mosali ya bangonganzambe ya botongono akosala na mayele.

Na kokanisa libala, akomona ete azali kopona babota ya bana na ye mpe lisango bakozwa. Akosala boponi na kolukaka na lokengo koleka mpe boyekoli na losambo. Akosala keba ete moto akobala akabola na bantina na ye mpo na libota, mpe bondimi na ye ya mwango ya Nkolo mpo na libala, mpe ete azala moto moko na ye akolinga kolikia na esenge ya bana ya ye.

Mokonzi N. Eldon Tanner apesaki biso toli ya mayele: “Baboti oyo bakokumisa mingi koleka basusu ezali baboti ya bana oyo bakozala.”3 Bana wana bazali na likoki ya kozala baboti baleki malamu oyo ekoki kosalema mpo na yo kopesa bango. Osengeli na bango lipamboli wana.

Sikawa, ezali na mibali mpe batata oyo bazali koyoka mpokwa oyo. Nini bokoki kozala? Elikia na ngai ezali ete mposa na bino ekoli mpo na kosala mbongwana esengeli mpo na bino mpe libota na bino mpo na kozala mokolo moko na bokonzi ya seko. A Lokola tata moko ya bonganganzambe, elongona mwasi na yo mpembeni na yo, okoki kotuta mitema yo,a moko na moko na libota mpo na kolendisa bango kotala liboso na mokolo wana. Okokende na mayangani ya elambo elongo na libota na yo, okosala likita ya mpokwa na libota na yango Molimo Mosantu akozala, okosambela elongo na mwasi mpe libota na yo, mpe okomilengela mpo na komema libota na yo na tempelo. Okokende elongo na bango na nzela ya ndako ya libota ya seko.

Okosalela mwasi mpe bana na yo lolenge Tata ya Lola asaleli yo. Okolanda ndakisa mpe bokambi ya Mobikisi mpo na kokamba libota na yo na nzela wana.

“Nguya to makasi te ekoki to esengeli kotiama na bokasi ya bonganganzambe, bobele na bondimisi, na motema molai, na boboto mpe bosekomi, na bolingo ya lokuta te;

“Na boboto, boyebi ya peto, oyo ekokomisa monene molimo na bokibisi te, na mayele mabe te—

“Kopamelaka ntango mosusu na makasi, ntango otindami na Molimmo Mosantu; mpe nde nsima kolakisa bobabisi ya bolingo epai na ye oyo opamelaki, noki te akanisa ozali monguna na ye” (D&C 121:41–43).

Nkolo alobi batata ya bonganganzambe lolenge kani ya mibali basengeli kozala. Alobaki, “Okolinga mwasi na yo na motema na yo mobimba, mpe okokangama na ye mpe na mosusu te” (D&C 42:22). Ntango Nkolo alobi na mobali mpe mwasi, atindaki, “Okosala … ekobo te, … to eloko moko te lokola yango” (D&A 59:6).

Mpo na bilenge, Nkolo apesi ndakisa. “Bana, botosa baboti na bino na makambo nionso: mpo ezali kosepelisa Nkolo malamu” (Bakolose 3:20) mpe “kumisa tata na yo mpe mama na yo ” (Exode 20:12).

Ntango Nkolo alobi na banso na libota, toli na Ye ezali mpo na kolingana mpe kosungana.

Asengi biso “tobunda mpo na kobongisa mpenza bomoi ya moto [moko na moko” ya libota,]; [to] “tolendisa balembi; tobikisa balingami [oyo] bopengwi, mpe kosepela na bokasi ya molimo ya sika.”4

Nkolo asengi lisusu ete tosala nionso oyo tokoki mpo na kosalisa baye libota na biso bawa mpo na bazala elongo na biso na ndako ya seko.

Mokambi ya liboke ya banganganzambe banene oyo basali na etingia mpo na kosalisa bato bazwa bankombo ya bankoko na bango mpe komema yango na tempelo bazali kobikisa baye bakende liboso. Ekozala na matondi na mokili ekoya mpo na banganganzambe minene wana, mpe na baye bapesaka makuli, mpamba te bakobosana te libota na bango kozelaka na mokili ya molimo.

Baprofeta balobaki: “Mosala ya Nkolo eleki motuya oyo bokosala mokolo moko ekozala mosala bokosala na kati ya bifelo ya ndako na bino. Mosala ya koteya na bandako, ya episikopo, mpe mikumba misusu ya Eklezia ezali nionso na motuya, kasi mosala eleki na motuya ezali na kati ya bifelo ya ndako na bino.”5

Na ndako na biso, mpe mosala na biso ya bonganganzambe, ya motuya monene koleka ekozala misala mike oyo ekosalisa biso mpe bye bolingaka kosala mpo na bomoi ya seko. Misala wana ekoki komonana ya moke na bomoi oyo, kasi ekomema mapamboli ya seko na boseko.

Ntango tozali botongono na mosala na biso mpo na kosalisa bana ya Tata na biso na Lola mpo na kozonga ndako epai na Ye, tokommibongisa mpo na losako biso bango tolingi koyoka ntango tosilisi mosala na biso yam abele. Eye ezali maloba yango: “Osali malamu, yo mosali ya malamu mpe botongono: ozalaki botongono na makambo mike, nakokomisa yo moyangeli likolo ya makambo mingi: kota na esengo ya nkolo na yo” (Matai 25:21).

O ntei ya “makambo mingi” wana ezali na elaka ya bana bazanga nsuka. Losambo na ngai ezali ete tokoka ko mibongisa mpe kosalisa basusu komibongisa mpo na lipomboli ya Tata na biso mpe Mwana na Ye ya Mobali ya Bolingo. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith (2007), 137.

  2. Bruce R. McConkie, in Conference Report, Apr. 1970, 26.

  3. N. Eldon Tanner, Church News, Apr. 19, 1969, 2.

  4. Bruce R. McConkie, in Conference Report, Apr. 1970, 27.

  5. Harold B. Lee, Decisions for Successful Living (1973), 248–49.