2014
Eyano na Losambo na Ye
sánzá ya mísáto 2014


Bilenge

Eyano na Losambo na Ye

Mokomi oyo avandaka na Gauteng, Afrika ya Sudi.

Butu moko moninga ya eyamba mosusu ayaki kotala ngai. Mbala mingi nayekolaka makomi ngai moko, mpe nabimisaki yango mpo na koyekola na butu wana. Natindamaki kobengisa ye aya kotanga na ngai makomi elongo, kasi nazalaki kobanga mpe nabandaki esika wana koyekola ngai moko. Nayebaki ete naboyaki kolanda etinda ya Molimo. Nsima ya mwa miniti natunaki na bokebi, “Okolinga koyekola makomi elongo na ngai?” Na kozangaka kotatabana moninga na ngai ayanolaki ete, “Iyo.”

Bongo totangaki na Buku ya Mormon. Atunaki ngai mwa mituna, mpe nakokaki koyoka Molimo kokamba ngai wana ezalaki ngai koyanola. Napesaki litatoli na ngai ya bosolo ya Buku ya Mormon. Nsima ya kosalaka yango, alobaki na ngai, “Mokolo mobimba nazalaki kolela mpe kobanga. Nawutaki kosambela Nzambe mpo na kozwa lisalisi ntango osengaki ngai natanga makomi elongo na yo. Nazali sikawa komiyoka malamu koleka mpenza. Natondi yo.”

Nkolo asalelaki ngai lokola esalelo mpo na koyanola losambo mpe kosalisa moko ya bana na Ye oyo azalaki kati na mposa. Nayebi ete bitinda tozwaka na molimo ezali malakisi ya bonzambe uta na Tata ya bwania, ya nkembo. Ntango totie mpembeni bobangi na biso, topesi Ye nzela amonisa nguya na Ye na nzela ya botosi na biso.

Bimisa na lokasa