2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mwinda ya Mokili
sánzá ya mísáto 2014


Etinda ya Bamama BATALI MPE BATEYI, sanza ya misato 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Pole ya Mokili

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Lolenge boni bososoli na bino ya bomoi mpe ya etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino na Ye mpe ekopambola baye bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na site interneti reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Lokola toyebi sikoyo ete Yesu Klisto azali Pole ya Mokili, tokokolisa bondimi na biso na ntina na Ye mpe tokokoma pole mpo na basusu. Klisto atatolaki na ntina ya mosala na Ye lokola “pole ya solo oyo engengisaka mobali [mpe mwasi] nyonso oyo ayei na mokili” (D&A 93:2) mpe asengi ete “totombola pole [na Ye] likolo na ntina ete ekoka kongenga na mokili” (3 Nefi 18:24).

Baprofeta na biso batatoli mpe lisusu na ntina ya Pole ya Klisto. Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Ntango nyonso oyo okopona kotambwisa bomoi na yo mingi lokola Mobikisi, litatoli na yo ekolendisama. Okokoma na ngonga moko oyo okomona yo moko ete Azali Pole ya Mokili. … Okongengisa basusu na Pole ya Klisto na bomoi na yo.”1

Mpaka Quentin L. Cook ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na babale ateyaki na ntina na biso kozala pole epai na mokili ete: “Tosengeli kobatela mabota na biso mpe kozala na esika ya liboso elongo na bato nyonso ya boboto na kosalaka makambo nyonso tokoki mpo na kobatela pole, elikia, mpe bizaleli malamu na masanga na biso.”2

Uta na Makomi

Yoane 8:12; Doctrine et Alliances 50:24; 115:5

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Basi Basantu ya Mikolo mya Nsuka azali kokoba kongengisa pole na bango lelo.

Na etage to mokili ya likolo ya 80 ya ndako ya molai na Hong Kong, China, ndeko mwasi moko ya monzemba na bolema na nzoto —azali se ye moko Mosantu ya Mikolo mia Nsuka na libota na ye—libota na ye ezalaki efandelo wapi ye mpe bapaya bakokaki koyoka nguya ya Molimo. Abombaki makomi na ye, mikanda na ye ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpe buku na ye ya nzembo mpembeni. Akendeki mobembo na tempelo mpo na kosala makuli ya bankoko na ye.3

Na Brezil mama moko ya bosembo abokolaki bana na ye na pole ya nsango malamu. Nzembo ya bana ezalaki koyembama na ndako na ye ya biliki ya motane, mpe bilili ya Liahona ya batempelo, Baprofeta ya Nzambe, mpe Mobikisi ezipaki baefelo. Ye na mobali na ye bamibonzaki mpo na kokangisama na tempelo mpo ete bana na bango babotama kati na liyokani. Losambo na ye ya ntango nyonso ezalaki ete Nkolo asalisa ye abokola bana na ye na pole, na bosolo, mpe na bokasi ya nsango malamu.4

Matangi

  1. Henry B. Eyring, “A Living Testimony,” Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2011, 128.

  2. Quentin L. Cook, “Let There Be Light!” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2010, 30.

  3. Tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 163–64.

  4. Tala Daughters in My Kingdom, 164.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Solola nini elingi koloba kozala pole na mokili lelo.

  2. Maniola mpo na oyo etali lolenge nini kolanda pole ya Klisto esalisaka yo oyika mpikona mimekano.

Bimisa na lokasa