2014
Lisalisi mpe Bomoi ya Seko
sánzá ya mísáto 2014


Etinda ya BAkambi ya Yambo, Sanza ya misato 2014

Lisalisi mpe Bomoi ya Seko

Elilingi
Mokambi Henry B. Eyring

Mobikisi azali ndakisa na biso ya lisalisi na kozangaka kozela litomba. Bomoi na Ye ebonga nie epesamaki mpo na kosalela Tata na Lola mpe bana ya Tata na Ye. Ntina ya bomoko ya Tata mpe Mwana ezali mpo na kopesa biso banso likabo ya bozangi kufa mpe lipamboli ya bomoi ya seko (tala Mose 1:39).

Mpo na kolonga bomoi ya seko, tosengeli kobongwama na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto —kobotama lisusu mpe kopetolama na lisumu. Nzoka nde Bana mike na nse ya mibu mwambe, bazali na lisumu te mpe basikolami na nzela ya Bomikabi (tala Moziya 3:16, 21; Moroni 8:10–12).

Mpo na biso banso oyo tokokisi mibu ya boyanoli, ezali na mwango kitoko mpenza oyo ezali kopesa biso nzela ya kopetolama mpo na bomoi ya seko. Bolengeli yango ebandaka na libatisi na likoki ya bonganganzambe mpe na kozwaka Molimo Mosantu. Nsima tosengeli ntango nyonso kokanisa Mobikisi mpe kobatela mitindo Ye apesi biso.

Mokonzi Benyamina alobelaki bato na ye na Buku ya Mormon na tina ya esengo oyo eyaka uta na koyokaka bolimbisi ya masumu na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto. Nsima ateyaki bango ete mpo na kobomba bolimbisi ya masumu na bango, basengeli koteya bana na bango basalisana mpe basengeli kozala bato oyo bakabaka lokola ekoki bango mpo na kokokisa bamposa ya mosuni mpe ya molimo ya baye bazali nzinganzinga na bango. (Tala Moziya 4:11–16.)

Ateyaki lisusu ete, “Mpe tala, Nayebisi bino makambo maye ete bokoka koyekola bwania; ete bokoka koyekola ete ntango bozali na mosala ya baninga bazalani na bino bozali mpenza na mosala ya Nzambe na bino” (Moziya 2:17).

Yesu azalaki kotambola koteyaka nsango malamu na Ye mpe kosalaka bolamu (tala Misala 10:38). Abikisaki babeli. Asekwisaki bawa. Na nguya na Ye aleisaki bankoto ntango bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei (tala Matai 14:14–21; Yoane 6:2–13). Nsima ya bosekwi na Ye Apesaki bilei na mingi ya Bapostolo na Ye ntango bayaki na libongo na Mbu ya Galilai (tala Yoane 21:12–13). Na Baamerika, Abikisaki babeli mpe apambolaki bana moko na moko (tala 3 Nefi 17:7–9, 21).

Apostolo Yakobo ateyaki biso lolenge nini mposa ya kosalisa basusu ewutaka na botondi na biso mpo na maye Nkolo asali mpo na biso:

“Nde oyo azali kotala na mobeko mobongi nie ya bonsomi, mpe akobi kuna na kati, ye azali te mobosani ya makambo ayokaki, kasi oyo akosala misala, moto oyo nde akopambolama kati na misala na ye. …

“Eyamba ya peto mpe ezanga bosoto na miso ya Nzambe mpe Tata ezali boye: kotalaka bitike mpe basi bakufela mibali kati na mpasi na bango, mpe komibatela peto na makambo ya mokili” (Yakobo 1:25, 27).

Moko ya bilembo oyo ezali kolakisa ete opetolami ezali kobakisama ya mposa ya kosalisa basusu mpo na Mobikisi. Mateya ya batata na libota mpe ya bamama batali mpe bateyi ekomaka likambo ya esengo mingi koleka na esika ezala mosala ya mpasi. Okomimona mbala mingi kondimaka kosala yo moko mosala ya ofele na eteyelo ya mboka na bino to kopesaka lisalisi mpo na bokolongono ya bato na lisanga na bino. Atako ozali na mbongo moke mpo na kopesa baoyo bazali na yango moke, okolinga kozala na yango mingi koleka mpo ete okoka kopesa mingi (tala Moziya 4:24). okomimona na mposa ya kosalisa bana na yo mpe ya kolakisa bango lolenge nini basengeli kosalisa basusu.

Lokola bomoto na yo ezali kobongwana, okoyoka mposa ya kosala mosala oyo ezanga lifuta mingi koleka. Nayebi bayekoli ya Mobikisi oyo bapesaki makabo minene na mosolo mpe na misala na mokano ete moto moko te longola se Nzambe mpe bana na bango bakoyeba yango. Nzambe ayebi mosala na bango na kopambolaka bango na bomoi na bango, mpe Ye akopambola bango na bomoi ya seko oyo ekoya (tala Matai 6:1–4; 3 Nefi 13:1–4).

Lokola obateli motindo ya kosalisa basusu (tala Matai 22:39), osili mpe koyoka mbongwana na mayoki na yo ya lokumu. Mobikisi asembolaki Bapostolo na Ye ntango bawelelaki na oyo etali nani asengelaki kozala monene mpenza kati na bango. Alobaki:

“Bobiangama mpe bateyi te, mpo moko kaka azali Moteyi na bino, ye Klisto.

“Kasi oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino” (Matai 23:10–11).

Mobikisi ateyi biso lolenge nini tokoki koyekola kosalisa basusu. Ye asalisaki na lolenge ya kokoka mpenza, mpe tosengeli koyekola kosalisa lokola Ayekolaki—monkoloto na monkoloto (tala D&A 93:12–13). Na nzela ya lisalisi tozali kopesa, tokoki kokoma mingi lokola Ye. Tokosambela na bokasi nyonso ya mitema na biso mpo na kolinga banguna na biso lokola Ye alingi bango (tala Matai 5:43–44; Moroni 7:48). Nde sima tokokoma bato oyo babongi mpo na bomoi ya seko elongo na Ye mpe Tata na biso na Lola.

Nalaki ete tokoki kosalisa malamu mingi koleka lokola tozali kolanda mateya mpe ndakisa ya Mobikisi.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mpaka M. Russell Ballard ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale alendisi biso kosambela mpo na kozwa mabaku ya kosalisa: “Na losambo na yo ya ntongo mikolo nionso, senga Tata na Lola akamba yo oyeba libaku ya kosalisa moko ya bana na Ye ya motuya. Nsima nde kenda mokolo mobimba … kolukaka moto moko ya kosalisa” (“Be Anxiously Engaged,” Ensign to Liahona, sanza ya zomi na moko 2012, 31). Tala obengisa baye oteyaka mpo na kotia ntina na losambo ya ntongo nionso mpo na mabaku ya kosalisa mpe nsima koluka bango mokolo mobimba.

Bimisa na lokasa