2014
Likita mpe Ngai
sánzá ya mínei 2014


Bilenge

Likita mpe Ngai

Mokomi avandi na Toronto, Canada

Nazalaki kokanisa ete poso ya likita linene ezalaki molayi mpe kolembisa, kasi lokola ntango eleki, nakomi kolinga mpe kozela yango mpenza. Poso ya likita linene ekoki kolendisa biso na molimo, kasi ezali pete kotika mayoki wana kolemba ntango bomoyi ya momesano ekokoba na mokolo ya yambo ya poso. Mwa makanisi oyo elandi esungaki ngai kokoba kozwa ya mingi lokola ekokaki uta na likita yango.

Namilengeli ngai moko mpo na likita na kokomaka mituna, mpe nsima nakomaki mpe lisusu soki mituna na ngai eyanolami. Nsima, nalingaka kozua mateya mpe miziki kowuta na likita LDS.org mpe kotia yango na MP3 na ngai boye nakoki koyoka liloba to loyembo ntango nakeyi na mosala na ngai ya mokolo na mokolo. Nalingaka lisusu koyekola nimelo ya Liahona ya likita. Natiaka mokoloto mpe nakomaka mpembeni mpembeni na kopi na ngai moko. Na ntango likita ya nsima ekosalema, nasili kotanga malamu kopi na ngai ya magazini yango. Ntango mosusu libota na ngai etangaka bitinda to nsango yango na likita ya mpokwa na libota.

Kobatela molimo toyokaki na ntango ya likita elongo na biso mpe kokoba na kotangaka bitinda yango esengi mosala, kasi kosala boye ezali lipamboli monene mpo na ngai. Nazwi makasi mingi mpe nakambamaki na ngonga ya bosenga na kotangaka bansango uta na likita linene, mpe nayebi ete bansango yango efulami na Molimo.

Bimisa na lokasa