2014
Kanga Longo Makasi
sánzá ya mínei 2014


Etinda ya Bakambi ya Yambo, sanza ya Minei 2014

Longo Moko ya Makasi

Mokambi Dieter F. Uchtdorf

Eleki kala mingi te nazuaki libaku ya konana na masuwa monene kolandaka ngambo ya mabele kitoko ya Alaska, na Amerika. Ntango Kapitene abongisaki ete masuwa elala na esika mai evandi nie na zelo ya mosika mingi, ayekolaki malamu mpe na bokebi nyonso esika yango mpe makambo mazali kuna, ndakisa lolenge ya mbonge, mozindo ya mayi, mpe mosika uta na makama ya mabe. Ntango asepelaki, abwakaki longo mpo ete masuwa wana ekoka kotikala na kimia mpe ekangama makasi na longo, kopesaka nzela na bato na masuwa libaku ya kosepela na kitoko ya kokamwa ya bikelamo ya Nzambe.

Lokola nazalaki kotala na ngambo ya mai, nabandaki komona ete masuwa ezalaki kokende lokola ya kotengama na lolenge ekoki komonana te na mopepe mpe na makasi ya mai kolekaka na nse. Nzokande, masuwa etelemaki makasi mpe ngwi na kati ya zolongano ekatamaki na molayi ya nsinga ya longo mpe na bokasi ya longo.

Kapitene abatelaki longo ya kokitisa likolo ya masuwa pene ya kobwakama kaka soki mopepe makasi epusani penepene te. Te, akangaki masuwa na longo lokola meko ya bobateli mpe abatelaki masuwa uta na kokende na mayi ya likama to kotepatepa mabe ntango bato mpe bakambi bazalaki komiyoka na kimia.

Lokola nazalaki kosepela na kotalaka elilingi oyo, namitunaki ete soki ezalaki te libaku mpo na lisese moko, boye natikala kokumba mpepo ata mokolo moko te.

Mpo na nini Tozali na Mposa ya Balongo

Ntina ya longo ezali kobatela masuwa na kimia mpe kobomba yango na esika oyo esepelami to kokonza mpe kokamba masuwa soki ntango ezali mabe. Nzokande, mpo na kokokisa bantina oyo ya motuya ekoki bobele kozala na longo te. Longo esengeli ezala makasi, ya kotiela motema, mpe esalelama malamu na ngonga mpe esika esengeli.

Na lolenge moko, bato mpe mabota bazali na ntina ya longo ya malamu.

Mikakatano ekoki koya lokola mopepe monene mpo na kopanza mpe kobundisa biso mpo na kobuaka biso na mabanga. Kasi ntango mosusu tozali ya solo mpe na likama ntango makambo nyonso emonani ya kimia—mipepe ekomi kimia mpe mayi elali nie. Na bosolo, tokoki kozala na likama monene ntango tozali kopengwa mpe koningana moke ete tokomona yango mpenza te.

Nsango Malamu Ezali Longo na Biso

Balongo ebongi ezala makasi, mpe esimbami makasi mpo na kobwakama ntango esengeli. Lisusu, basengeli kokangama na moboko moko oyo ekoki kotelemela kilo ya makasi na ngambo mosusu.

Ya solo, nsango malamu ya Yesu Klisto ezali lokola longo. Yango ebongisamaki na Mokeli ya molongo mpo na ntina moko ya bonzambe mpe esalemaki mpo na kopesa kimia mpe mpo na kokamba bana na Ye.

Nsango malamu ezali nini, nsima na nyonso, longola se moango ya Nzambe mpo na kosikola bana na Ye mpe kozongisa bango na miso na Ye?

Koyebaka ete ezali lolenge ya biloko nyonso ya kobunga nzela, tosengeli kotia longo na biso makasi likolo ya libanga ya nsango malamu ya solo. Biloko yango bikoki te na pete kokitisama likolo ya zelo ya lofundu to kosimba kaka mwa moke etando ya esika wapi bondimi na biso efandi.

Sanza oyo tozali na libaku ya koyoka basali ya Nzambe na likita linene ya Eklezia. Maloba na bango, ya kosangana na makomi mpe bofuli ya Molimo, epesaka moboko ya kotiela motema mpe ya makasi na makambo mpe mibeko ya motuya ya libela mpe ya ntina monene wapi tokoki kokanga balongo na biso ete totikala ya kokangama mpe na bokengi na katikati ya bitumba mpe mimekano ya bomoi.

Profeta ya kala Helaman ateyaki ete, “ezali likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana ya Nzambe, ete bosengeli kotonga moboko na bino; ete ntango zabulu akotinda mipepe makasi mya ye, iyo, makula ma ye na mopepe mwa kaina, iyo, ntango ekobete mvula ya mabanga mpe mokalikali ya makasi nyonso ya ye likolo ya bino, ekozala na nguya te likolo ya bino mpo na kobenda bino o nse na libulu ya mpasi mpe lisuma lizanga nsuka, na ntina ya libanga likolo ya liye wapi botongami, liye ezali moboko moko ya solo, moboko moye wapi soki bato batongeli likolo bakoki kokweya te.” (Elamani 5:12)

Motuya ya Balongo ya Makasi

Bomoyi ezali nzela ya komeka balongo na biso mpe ya kosenginiaka biso kobunga nzela. Kasi, soki balongo etiami malamu na libanga ya Mosikoli na biso, yango ekosimba—atako makasi ya mopepe, nguya ya monano ya mayi, to bolayi ya mbonge.

Ya solo, masuwa esalami te mpo na kotikala ya kotelema na libongo kasi kutu kotombola longo mpe konana na bibale ya bomoi. Kasi oyo ezali lisese mpo na ngonga mosusu.

Mpo na sikoyo, nazali na bokasi ya koyebaka ete longo ya nsango malamu mpe libanga ya Mosikoli na biso ekobatela biso na kimia mpe na bokengi.

Longo ya boye ekobatela biso uta na kopengwa mpe kokweya na likama mpe mabe. Ekopesa biso libaku ya nkembo ya kosepela na bililingi ya kokokisa te mpe ya kitoko ya bomoi oyo ebongwanaka ntango nyonso.

Bomoi ezali kitoko mpe ebongi malamu kozala na yango. Mipepe, ekumbaki, mpe mbonge makasi ekoki kosenginia biso na kopengwa na makama emonani to emonani te, kasi maloba ya nsango malamu mpe nguya na yango ya bonzambe ekobatela biso na bokengi na nzela na biso ya bozongi na libongo ya kimia oyo ya Tata na biso na Lola.

Yango wana, tika, kaka te toyoka maloba ya likita linene ya sanza ya minei kasi tika lisusu Tosalela bansango na yango lokola longo ekangami makasi na bomoyi na biso ya mokolo na mokolo.

Tika ete Nzambe apambola mpe atambwisa biso na bokasi oyo ya ntina mpe ya motuya.

Koteya uta na Etinda Oyo

Tala lolenge ya kosolola motuya ya balongo na kati ya libota ya Lehi konanaka na mboka ya elaka (tala 1 Nefi 18). Okoki kolakisa 1 Nefi 18:11–15, ntango moko wapi balingaki Nefi na singa, Liahona etikaki kosala, mpe masuwa ekambamaki na mipepe makasi mpenza. Mbano nini ekotelema liboso na biso ntango tokangami malamu te na longo ya nsango malamu? Okoki komona lisusu 1 Nefi 18:21–22 mpe kosolola lolenge nini tokoki kozua bokengi na kobalukaka epai ya Mobikisi.