2014
Misio ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mobikisi mpe mosikoli
sánzá ya mínei 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, sanza ya Minei 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Mobikisi mpe Mosikoli

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kosakola. Boniboni bososoli na biso ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na mateya ya bamama batali? Mpo na nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Na kati ya bankombo ya Yesu Klisto, nkombo eleki motuya ezali Mosikoli,” elobaki Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale. “Kosikola elakisi kofuta eloko esengeli to niongo. Kosikola ekoki lisusu kolakisa kobikisa to kopesa bonsomi na kofutaka lisiko. … Moko moko ya bandimbola wana elakisi lolenge ekeseni ya Bosikoli monene ekokisami na Yesu Klisto na nzela ya Bomikabi na Ye, oyo ezali lisusu, na maloba ya dikisionele, ‘kokangola uta na lisumu mpe etumbu, lokola libonza epesami mpo na mosumuki.”’1

Linda K. Burton, mokambi monene ya Lisanga ya Bamama Basungi, alobaki: “Tata na Lola .. atindaki Mwana Mobotami se Moko mpe Mwana Abonga Nie na Ye koyoka mpasi mpo na masumu na biso, mpasi ya motema na biso, mpe nyonso oyo emonani lokola bosembo te na bomoi ya moko na moko na biso.

“ … Mwasi moko oyo alekisaka mibu kati na mimekano mpe mawa alobaki na mayi na miso ete, ‘nayei kososola ete nazali lokola lokasa moko ya kala ya 20 dollar—efinana, ekatana, mbindo, ebeba mabe mpe epasuka-pasuka. Kasi … Nazali kaka na motuya mobimba ya lokasa ya dollar 20. Mwasi oyo ayebi ete ye … azalaki na motuya mingi na [Nzambe] mpo na kotinda Mwana na Ye komikaba mpo na ye, ye moko kaka. Ndeko mwasi moko moko na Eklezia asengeli koyeba likambo oyo mwasi oyo ayebaki.”2

Uta na Makomi

2 Nefi 2: 6; Elamani 5: 11–12; Mose 1:39

Uta na Mambi ma Biso ya Kala

Boyokani ya Sika ezali lisusu na masolo ya mwasi oyo asalelaki bondimi na Yesu Klisto, ayekolaki mpe asalelaki mateya na Ye, mpe atatolaki mosala, bikamwa, mpe bonene na Ye.

Yesu alobaki na mwasi na liziba ya mayi:

“Oyo akomela mayi oyo nakopesa ye akoyoka lisusu mposa ya mayi te; kasi mayi oyo nakopesa ye ekotikala na kati na ye liziba ya mayi kotiolaka tii na bomoi ya seko.

“Mwasi alobi na ye, Mokonzi, pesa ngai mayi yango, ete nayoka mposa ya mayi lisusu te. …

“Nayebi ete [Masiya] akoya, … : ntango akoya, akoyebisa biso makambo nyonso.

“Yesu alobi na ye, nalobi na yo ete nazali ye”

Ye “nsima atikaki mbiliki na ye ya mayi” mpe amemaki litatoli na Ye na kati ya mboka. Tala Yoane 4:6–30.

Matangi

  1. D. Todd Christofferson, “Bosikoli,” Ensign or Liahona, Nsanza ya mitano 2013

  2. Linda K. Burton, “Is Faith in the Atonement of Jesus Christ Written in Our Hearts?” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 114.

Nini Ekoki Ngai Kosala?

  1. Ndenge nini tokoki kolakisa botondi na Mobikisi mpe Mosikoli, Yesu Klisto?

  2. Ndenge nini tokoki kokabola mapamboli ya libonza ya komikaba ya Mobikisi na bomoi na biso?

Bimisa na lokasa