2014
Nasalisaki Lisusu
sánzá ya libwa 2014


Bilenge

Nasalisaki Lisusu

Mokomi afandaka na Rio Grande do Norte, Brezil.

Mokolo moko, nsima ya kosilisa mosala moko ya projet, nazalaki kotambola kolekaka ndako ya mayangani na biso mpe namonaki bandeko basi mibale oyo bazalaki kosokola etonga yango. Maloba na ngai ebimaki na pete nyonso: “Bandeko basi, bozali na mposa ya lisalisi?” Moko na bango asekaki ngai mpe alobaki ete nayaki mpenza na ngonga esengeli mpamba te bazalaki bobele bango moko na mosala ya kosokola mpe bazalaki ya kolemba mpenza. Alobaki ete asambelaka ete Nkolo akoka kotinda moto moko mpo na kosalisa. Nazalaki na esengo mpenza ya kozala eyano na losambo na ye. Nawutaki kosilisa kopesa lisalisi na moto moko mosusu mpe nazalaki lisusu ya kolemba, kasi nalandaki motema na ngai mpe nandimaki kosalisa lisusu.

Kosala na esengo ezali motindo (tala D&A 24:7). Ntango tozali na mposa ya kosalisa ntango nyonso, tokoki kosala ete makamwisi esalema na bomoi ya bato mosusu. Bomoi na biso ekomaka ntina mingi koleka ntango tozali kosalisa. Nkolo alingaka biso mpenza, Asalisaka moko na moko ya bana na Ye, mpe Akopesa biso makasi ya kosalisa.

Bimisa na lokasa