2014
Ezali Biso ya Komilengela?
sánzá ya libwa 2014


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Libwa 2014

Ezali Biso ya Komilengela?

Nzinganzinga ya bisika wapi nazalaki kala kofanda mpe kosalela Nzambe, Eklezia esalaki projet ya kobokola nsoso oyo ekambamaki mingi na basali ya bolingi uta na bapalwasi ya esika wana. Mbala mingi ezalaki projet moko oyo esalamaki malamu, kopesaka na ebombelo ya baepisikopo bankoto ya maki ya mobesu mpe minkama ya kilo ya basoso mpo na kolamba. Nzokande, na mabaku moke, kozalaka mobokoli ya bibwele ya sika mpe mosali ya bolingi elingaki koloba kaka botutu na maboko te kasi lisusu mpasi ya motema mpe ya molimo.

Ndakisa, nakotikala se kokanisa ntango nyonso ngonga oyo tosangisaki bilenge mibali ya Bonganganzambe ya Alona mpo na kotia bopeto ya eleko ya elanga moke na projet yango. Bato na biso ya motema nsai-sai mpe ya bokasi basanganaki na projet mpe na lolenge ya lombangu bapikolaki, basangisaki, mpe batumbaki matiti mabe mpe biloko ya kobebabeba mpenza. Na pole ya moto makasi, toliaki biloko ya moto moto mpe tomikumisaki mpo na mosala kitoko tosalaki.

Nzokande, likama moko ya monene ezalaki kaka wana. Makelele mpe moto ebangisaki liboke ezanga makasi ya basoso 5.000 ya kobwaka maki ete mingi na yango ebungisaki na mbalakaka mansala mpe etikaki kobwaka maki. Nsima wana tondimaki kotika mwa matiti mabe mpo ete tokoka kobimisa maki mingi koleka.

Mondimi moko te ya Eklezia oyo asalisaki mpo na kosunga baoyo bazangi abosanaka to azalaka na mawa mpo na likambo wana. Kosala biloko, nkita, bomikoki, mpe kokabola na basusu ezali likambo ya sika te epai na biso.

Tosengeli komikundola ete libongisi ya malamu koleka ya ebombelo ekozala mpo na libota nyonso kati na Eklezia ya kozala na biloko ya kobomba lokola bilei, bilamba, mpe, soki ekoki kosalema, biloko mosusu ya ntina ya bomoi. Ebombelo ya Nkolo etangi ntango, batalanta, makoki, mawa, biloko ebulisama, mpe makoki ya mosolo ya bandimi ya Eklezia ya botongono. Biloko oyo ezali komonana epai ya episikopo mpo na kosunga baoyo bazali kokelela.

Tobondeli Basantu ya Mikolo ya Nsuka banso basala keba na mwango na bango, kozala babombi na bomoi na bango, bakima baniongo mingi koleka to oyo ezanga ntina. Bato mingi mpenza bakokaki kokatisa malamu bambonge makasi na nkita ya bomoi na bango soki bazalaki na biloko ya kobomba lokola bilei mpe bilamba mpe soki bazalaki na niongo te. Lelo tozali komona ete mingi balandi toli oyo na lolenge ya kokesana: babombi baniongo kasi bazali na bilei te.

Nazongelaki maye Bakambi ya Yambo basakolaki mwa mibu mileki:

“Basantu ya Mikolo ya Nsuka bapesami toli mpo na mibu ebele ete bamilengela mpo na ntango ya motungisi na kotiaka mwa mosolo pembeni. Kosalaka bongo ekobakisa mingi koleka mpenza na kimia mpe na kozala malamu. Libota nyonso ezali na mokumba ya kokokisa bamposa na bango moko na lolenge ekoki.

“Tolendisi bino bipai nyonso bozwami na mokili mpo na komilengela na ntina ya motungisi na kotalelaka ezalela ya mosolo na bino. Tosengi bino boyeba komikonza na kosalelaka mosolo na bino; boyeba komipekisa ntango bozali kosomba na kokimaka niongo. Bofuta niongo na lombangu nyonso lokola bokoki, bomikangola uta na bowumbo oyo. Bobomba mwa mosolo ntango nyonso mpo ete botonga moke moke ebombelo ya mosolo.”1

Ezali biso ya komingela mpo na kokima makama kati na bomoi na biso? Makoki na biso ezali ya kobonga nie? Tozali kotambwisa bomoi na biso na kokebaka mpo na lobi? Tozali na biloko bibombama na loboko na biso? Tozali na botosi na mitindo ya Nzambe? Tozali koyoka mateya ya baprofeta mpe kosalela yango? Tomilengeli mpo na kopesa ndambu ya biloko na biso na babola, na bakeleli? Ezali biso ya kokokana na Nkolo?

Tozali na bantango ya mobulu. Mbala mingi oyo eyaka lobi eyebani te; yango wana, ezali mokumba na biso ya komilengela mpo na ntango ya mobulu. Ntango eyaka ngonga ya kokamata mokano, ngonga mpo na komilengela esila koleka.

Matangi

  1. Bakambi ya Yambo, All Is Safely Gathered In: Family Finances (mwa buku, 2007).

Koteya uta na Etinda Oyo

Kotalaka bamposa ya baoyo bozali kokende kotala, bokanisa banzela oyo bokoki kosalisa bango bakoma ya komikoka na mosala, misolo, bobombi bilei, to bomilengeli na makama. Bokanisa na ntina ya makoki bokoki kokabola elongo na bango, ndakisa kosala mwa elanga ya moke to mayele ya kobatela mosolo, oyo ekopesa bango makasi ya kolanda toli ya Mokambi Monson.

Bimisa na lokasa