2014
Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Molobeli
sánzá ya libwa 2014


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Libwa 2014

Etinda ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Molendisi

Boyekola na losambo mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kokabola. Boniboni bososoli ya bomoi mpe etinda ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa bansango mingi, kende nareliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Yesu Klisto alakaki, “Nakotika bino bitike te: nakoya epai na bino” (Yoane 14:18). Akopesa biso “motole na esika ya mputulu, mafuta ya kosepela na esika ya kolela” (Yisaya 61:3). Mpamba te Klisto aniokwamaki na Bomikabi mpo na moko na moko na biso, Akobosana biso te. “Mobikisi na biso azwi likolo na Yemei … bampasi na biso mpe bolozi na biso mpe mawa mpo ete Akoka koyeba maye toyokaka mpe lolenge ya kolendisa biso,” elobaki Linda S. Reeves, mopesi toli ya mibale na bokambi monene ya Lingomba ya Bamama Basungi.1

Koyeba ete Klisto akolendisa biso ekoki komemela biso kimia mpe kofula biso tolanda ndakisa na Ye na kosalisaka basusu. Mokambi Thomas S. Monson alobaki ete: “Boyebi na biso ya nsango malamu mpe bolingo na biso ya Tata na biso na Lola mpe ya Mobikisi na biso ekolendisa biso mpe ekosunga biso mpe ekomema bosepeli na mitema na biso wana ezali biso kotambola alima mpe kobatela mitindo. Ekozala na eloko moko te kati na mokili oyo ekoki kokweyisa biso.”2

Uta na Makomi

Yoane 14:18, 23; Alma 7:11–13; Doctrine et Alliances 101:14–16

Uta na Mambi ma Kala ma Biso

Elaine L. Jack, mokambi monene ya Lingomba ya Bamama ya molongo ya 12, alobaki ete: “Na kokendaka kotala mpe koteya bandeko na libota, tozali komipesa mpo na kosalisa bango. Mbala mingi maboko elobaka na lolenge oyo mingongo ekokaka koloba te. Koyambana ya boboto elobaka mingi. Koseka elongo esangisaka biso. Ngonga moko ya bokaboli ekomisaka milimo na biso mpio. Tokokoka ntango nyonso kotombola mokumba ya moko oyo atungisami te, kasi tokoki kosunga ye mpo ete akoka komema yango malamu.”3

Bapionie na biso Bandeko basi ya Lingomba ya Bamama Basungi “bazwaki makasi ya molimo kati na bolingo mpe mawa ya moko na mosusu. … Lokola bayokaki mpasi ya mimekano ya bokono mpe liwa, bazalaki kosambela na bondimi mpo na moko mpe mosusu mpe balendisanaki. ‘Bolingo ya Nzambe etiolaki uta na motema na motema,’ ekomaki Helen Mar Whitney, ‘kino moto ya nkanda amonanaki kozanga nguya na bokasi na ye ya kokota katikati na biso na Nkolo, mpe makula na ye ya motema mabe, na ndakisa mosusu, elongolamaki bantonga na yango.’”4

Matangi

  1. Linda S. Reeves, “The Lord Has Not Forgotten You,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2012, 120.

  2. Thomas S. Monson, “Be of Good Cheer,” Ensign to Liahona, sanza ya mitano 2009, 92.

  3. Elaine L. Jack, kati ya Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 119.

  4. Daughters in My Kingdom, 34.

Bomaniola Oyo

Boniboni kososolaka ete Nkolo akanisaka yo ememelaka yo bolendisi?

Bimisa na lokasa