2015
Mbongwana na Ngai ya Motema
sánzá ya míbalé 2015


Bilenge

Mbongwana na Ngai ya Motema

Mokomi afandi na Fortaleza, Brazil.

Ntango Nayokaki mbala ya yambo na ntina ya bozongisi nsango malamu ya Yesu Klisto, nayokaki Molimo kotatola na ntina ya bosolo na yango. Na nzela ya losambo, litatoli na ngai ekomaki kutu solo koleka, mpe nazwaki mokano ya kozwa libatisi.

Nsima ya libatisi na ngai, bato na palwasi na ngai babandaki kotuna ngai lolenge nini nayokaki na ntina ya kosala misio. Kozala sembo, nayebaki te nini mpenza koloba. Likanisi ya kotika libota na ngai mpe kelasi mpo na kosala misio emonisamaki lokola kozala pasi.

Kasi mokolo moko nabandaki kokanisa na ntina ya mbongwana na ngai. Nakanisaki bamisionele oyo bateyaki ngai, oyo bayanolaki mituna na ngai na pete nyonso mpe basungaki ngai kososola nsango malamu. Nasosolaki ete soki ezalaki mpo na bango te, nakokaki koyeba Eklezia ya solo te. Ntango kaka nazwaki bososoli wana, mposa ya kosalela emataki makasi na motema na ngai. Nayokaki Molimo koyebisa ngai ete nasengelaki kosala misio ya ntango mobimba.

Nayebi ete mosala ya misio ezali mosala ya Tata na biso na Lola mpe ete tokoki komema milimo na boyebi kitoko ya nsango malamu ezongisami.

Bimisa na lokasa