2015
Bankombo ya Yesu Klisto: Ezanga Masumu
sánzá ya míbalé 2015


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Mibale 2015

Bankombo ya Yesu Klisto: Ezanga Masumu

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino kati na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali mpe Bateyi? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Mobikisi na biso, Yesu Klisto, azalaki se moko ya nguya ya kosalaka bomikabi mpo na bato. “Yesu Klisto, Mpate ezanga mbeba, amikabaki mbeka Yemei likolo ya etumbelo ya libonza mpe afuti motuya mpo na masumu na biso,”elobaki Mokambi Dieter F. Uchtdorf, Mopesi Toli ya Mibale na Bokambi ya Yambo.1 Kososolaka ete Yesu Klisto azalaki na masumu te ekoki kosunga biso komatisa bondimi na biso kati na Ye mpe kosala makasi ya kotosa mitindo na Ye, koyambola, mpe kokoma petwa.

“Yesu azalaki … moto ya mosuni mpe molimo, kasi Asumukaki te (tala Mosiah 15:5),” elobaki Mpaka D. Todd Christofferson ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale. “Tokoki kotalela na Ye … mpo ete Ye Asosolaka. Asosolaka etumba, mpe Asosolaka lisusu boniboni kolonga etumba. …

“… Nguya ya Bomikabi na Ye ekoki kolongola mabe ya masumu kati na biso. Ntango toyamboli, ngolu ya Bomikabi na Ye elongisi mpe epetoli biso (tala 3 Nefi 27:16–20). Ezali lokola soki tokwaka te, lokola soki tomitikaka na momekano te.

“Wana ezali biso koluka kosala mokolo na mokolo mpe mposo na mposo mpo na kolanda nzela ya Klisto, molimo na biso ekodima monene na yango, etumba ekozala mosika, mpe mimekano ekotika kotungisa”.2

Makomi ya Kobakisa

Matai 5:48; Yoane 8:7; Baebele 4:15; 2 Nefi 2:5–6

Uta na Makomi

Mobikisi afutaki motuya ya masumu na biso na nzela ya Bomwana na Ye ya Nzambe, bomoi na Ye ezanga masumu, mpasi na Ye mpe bosopi ya makila na Ye na Elanga ya Getesemani, Liwa na Ye na ekulusu mpe Lisekwa na Ye uta na lilita. Na nzela ya Bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kokoma petwa lisusu ntango toyamboli masumu na biso.

Mokonzi Benjamin ateyaki bato na ye na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto mpe atunaki lisusu soki bandimelaki maloba na ye. “Bango nyonso bagangaki na mongongo moko, kolobaka. … molimo … esalaki mbongwana monene kati na biso, to kati ya mitema na biso, na yango tozali na ntango ya kosala mabe ata moke te, kasi kokobaka kosala malamu. …

“Mpe tosengeli kosala na bolingo mpo na kokota na liyokani na Nzambe na biso mpo na kosala elingi ye, mpe kozala na botosi na mitindo na ye kati ya makambo nyonso” ( Mosiah 5:1–2, 5).

Biso mpe tokoki kozala na “ mbongwana makasi” lokola bato ya Mokonzi Benjamin, oyo “bazalaki ntango ya kosala masumu te, kasi kokoba kosala bolamu ntango nyonso” (Mosiah 5:2).

Matangi

  1. Dieter F. Uchtdorf, “Okoki Kosala Yango Sikoyo!” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2013, 56.

  2. D. Todd Christofferson, “That They May Be One in Us,” Liahona, sanza ya zomi na moko 2002, 71.

Bolanda oyo.

Boniboni kozala petwa ekeseni na kozala malamu mpenza?

Bimisa na lokasa