2015
Litatoli mpe Mbongwana
sánzá ya míbalé 2015


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mibale 2015

Litatoli mpe Mbongwana

Elilingi
Mokambi Henry B. Eyring

Bokeseni ezali kati ya kozwa litatoli ya bosolo mpe kozala ya kobongwana ya solo. Ndakisa, Apostolo monene Petelo apesaki litatoli na ye na mobikisi ete ayebi ete Yesu azalaki Mwana ya Nzambe.

“[Yesu] atunaki bango, Bongo bino, bolobaka ete ngai nazali nani?

“Mpe Simoni Petelo azongisaki mpe alobaki, Ozali Klisto, Mwana ya Nzambe na bomoi.

“Mpe Yesu azongisaki maloba mpe alobaki na ye, Opambolami yo, Simoni Bal-jona: mpo mosuni mpe makila nde elakisi yo yango te, kasi Tata wa ngai oyo azali na Likolo.

Mpe sima, kati ya motindo Apesaki na Petelo, Nkolo apesaki ye mpe biso malakisi mpo na kokoma solo mobongwani mpe kokolisa mbongwana yango mpo na bomoi mobimba. Yesu alobaki yango lolenge oyo: “Ntango obongwani, lendisa bandeko na yo ya mibali” (Luka 22:32).

Yesu ateyaki Petelo ete mbongwana mosusu monene esengelaki koleka na kozwaka litatoli ya kozala na bokasi ya kokanisa, koyoka mpe kosala lokola bayekoli babongwani ya solo ya Yesu Klisto. Wana ezali mbongwana ya makasi oyo banso tolukaka. Ntango tozwi yango, tozali na mposa ete mbongwana yango ekoba kino na suka ya bomoi na biso (tala Alma 5:13–14).

Toyebi uta na boyebi na bisomei mpe uta na kotalaka basusu ete kozalaka na mwa ntango moke ya nguya ya molimo ekokoka te. Petelo awanganaki ete ayebaki Mobikisi atako nsima ya kozwa litatoli moko na Molimo ete Yesu azalaki Klisto. Banzeneneke Misato ya Buku ya Mormon bazwaki litatoli epesamaki na bango ete Buku ya Mormon ezalaki liloba ya Nzambe, mpe nsima balembaki na bokasi na bango mpo na kosunga Joseph Smith lokola Profeta ya Eklezia ya Nkolo.

Tosengeli kozala na mbongwana kati ya mitema na biso, lokola elimbolami na buku ya Alma: “Mpe balobaki bango nyonso maloba ya lolenge moko na bato— ete mitema na bango ebongwanaki; ete bazalaki na mposa ya kosala mabe te” (Alma 19:33; Mosiah 5:2.

Nkolo ateyaki biso ete ntango tobongwani ya solo na nsango malamu na Ye, mitema na biso ekoboya komikanisa se na bisomei mpe ekomipesa na mosala ya kotombola basusu na bomoi ya seko. Mpo na kozwa mbongwana yango, tokoki kosambela mpe kosala na bondimi mpo na kokoma ekelamu ya sika oyo ekoki kosalema bobele na Bomikabi ya Yesu Klisto.

Tokoki kobanda kosambela mpo na bondimi ya koyambola uta na bomilingi mpe mpo na likabo ya kosungaka basusu koleka bisomei. Tokoki kosambela mpo na nguya ya kotika lolendo mpe boluli.

Losambo ekozala fungola mpo na kozwa likabo ya bolingo mpo na liloba ya Nzambe mpe bolingo ya Klisto (tala Moroni 7:47–48). Nyonso mibale ekomi elongo. Lokola totangi, tomanioli, mpe tosambeli likolo ya liloba ya Nzambe, tokokoma kolinga yango. Nkolo atie yango kati ya mitema na biso. Lokola toyoki bolingo yango, tokobanda kolinga Nkolo mingi koleka mpe koleka. Elongo na yango tokokoma na bolingo mpo na basusu oyo tosengeli na yango na ntina ya kolendisa baye Nzambe atie na nzela na biso.

Ndakisa, tokoki kosambela mpo na koyeba baye Nkolo akolinga bateyama na bamisionele na Ye. Bamisionele ya ntango mobimba bakoki kosambela na bondimi mpo na koyeba na nzela ya Molimo oyo basengeli koteya mpe kotatola. Bakoki kosambela na bondimi ete Nkolo akoyokisa bango bolingo na Ye mpo na bato nyonso bakokutana na bango. Bamisionele bakomema te bato nyonso oyo bakokutana na bango na mai ya libatisi mpe na likabo ya Molimo Mosantu. Kasi bakoki kozwa Molimo Mosantu lokola moninga na bango. Na nzela ya mosala na bango mpe na lisungi ya Molimo Mosantu, bamisionele nde bakozala, na ntango ekoki, ya kobongwana kati ya mitema na bango.

Mbongwana yango ekozongisama sika mbala na mbala lokola bango mpe biso tozali na komilinga te kokobaka na bomoi na biso kosala na bondimi ya kolendisa basusu na nsango malamu ya Yesu Klisto. Mbongwana ekozala likambo ya ntango moke te to lokola eloko oyo ekowumela kaka mpo na mwa ngonga moke ya bomoi te kasi ekokoba mpo na ntango ya bomoi mobimba. Bomoi ekoki kongenga kino na mokolo ya bobongi nie, ntango tokomona Mobikisi mpe kotala ete tokomi lokola Ye. Nkolo alimboli mobembo na lolenge oyo: “Oyo ezali ya Nzambe ezali pole; mpe oyo azwi pole mpe akobi kati na Nzambe, azwi pole ya koleka; mpe pole yango ekokoba kongenga kino na mokolo ya bobongi nie” (D&C 50:24).

Nalaki bino ete ezali solo mpo na moko na moko na biso.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mpaka David A. Bednar ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale asalelaki “lisese ya cocombre” mpo na koteya ete mbongwana ezali likambo ya bokobi koleka likambo ya mbala moko: “Mondelo nsima ya mondelo mpe mobeko likolo ya mobeko, moke moke mpe penepene ya oyo okoki komona te, ntina na biso, makanisi na biso, maloba na biso, mpe misala na biso ekomi elongo na bolingi ya Nzambe” (“Osengeli Kobotama Lisusu,” Lihahona, Sanza ya Mitano 2007, 19). Kanisa kotalaka lisusu lisese ya cocombre na baye ozali koteya. Nini ekoki moko na moko na biso kosala mpo na kolonga kati na bokobi na likambo ya mbongwana oyo Mokambi Eyring mpe Mpaka Bednar balobeli?

Bimisa na lokasa