2015
Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Atonda na Bolingani mpe Bolingo
sánzá ya zómi 2015


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali Sanza ya Zomi 2015

Bizalela ya Bonzambe ya Yesu Klisto: Atonda na Bolingani mpe Bolingo

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba nini bosengeli kokabola. Boniboni bososoli na bino ya bomoi mpe misala ya Mobikisi ekobakisa bondimi na bino epai na Ye mpe ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali? Mpo na kozwa bansango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Buku Mokambi na Makomi elimboli bolingani lokola “lolenge moko ya bolingo ya likolo, ya lokumu, mpe ya makasi koleka nionso” (“Bolingani”). Ezali bolingo ya peto ya Yesu Klisto. Ntango tozali koyekola maye etali Yesu Klisto mpe kosala makasi mpo na kokoma lokola Ye, tokobanda koyoka bolingo na Ye ya peto mpe kosalela basusu lokola Alingaki kosala. “Bolingani ezali kozala na bompikiliki na moto oyo asala biso mabe,” elobaki Mokambi Thomas S. Monson. “Ezali kotelemela mposa ya komimonisa nokinoki lokola moto basali mabe. Ezali kondima bolembu mpe bozangi makoki na biso. Ezali kondima bato lokola bazali solo mpenza. Ezali kotala mosika bizalela oyo bikosila te nsima ya ntango koleka oyo ezali komonana na miso. Ezali kotelemela mposa ya kotia basusu na milongo mikeseni.”1

Kati na Buku ya Mormon, toyekoli bosolo monene oyo ete “Yango wana, bandeko balingami na ngai, bosambela Tata na makasi manso ya motema na bino, ete bokoka kotondisama na bolingo boye, boye apesi epai ya baoyo banso bazali balandi ya solo ya Mwana na ye, Yesu Klisto; ete bokoka kokoma bana babali ya Nzambe, ete ntango akomonana tozala lokola ye, mpo tokomona ye lokola azali; ete tokoka kozala na elikya oyo; ete tokoka kozala bato bapetolami, kutu lokola azali peto” (Moroni 7:48).

Makomi ya Kobakisa

Yoane 13:34–35; 1 Bakolinti 13:1–13; 1 Nefi 11:21–23; Ether 12:33–34

Uta na Mambi ma Kala na Biso

Ndeko mwasi moko oyo kala mingi te akufelaki mobali atondisamaki na botondi mpo na bamama batali oyo balelaki na ye mpe balendisaki ye. Akomaki ete: ‘Nazalaki na mposa makasi ya moto oyo nakokaki kozwela lisalisi; moto oyo akokaki koyokela ngai. … Mpe bayokelaki ye. Balendisaki ngai. Balelaki elongo na ngai. Mpe bayambaki ngai … [mpe] basalisaki ngai uta na bozangi elikya ya mozindo mpe mpasi ya motema ya basanza wana ya liboso ya kozala kaka ngai moko.’

“Mwasi mosusu akomaki na bokuse nini ayokaki kati na ye ntango azwaki bolingani ya solo uta na mama moteyi moko ete: ‘Nayebaki ete bomoto na ngai ezalaki na ntina koleka motango na buku ya bandimi mpo ayaki kotala ngai. Nayebaki ete amitungisaki mpo na ngai.’”2

Lokola bandeko basi oyo, Basantu ya Mikolo ya Nsuka mingi nzinga nzinga na mokili bakoki kondima maloba oyo esakolami na Mokambi Boyd K. Packer (1924–2015), Mokambi ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Babale ete: “Boniboni ezali likambo ya kobondisa na koyebaka ete atako [wapi libota ekoki] kokende, libota ya Eklezia ezali kozela bango. Uta mokolo bakokoma, ye [mobali] akozala na lisanga likoki ya banganganzambe mpe ye [mwasi] akozala na Lingomba ya Bamama Basungi.”3

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Charity Never Faileth,” Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2010, 124.

  2. Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2011), 119–120.

  3. Daughters in My Kingdom, 87.

Tala Motuna Oyo

Lolenge Klisto azali ndakisa ekoka ya bolingo mpe bolingani?

Bimisa na lokasa