2015
Silisa Ntango Mwinda na Yo Ezali Kaka Kopela
sánzá ya zómi 2015


Etinda ya Bokambi yaYambo, Sanza ya Zomi 2015

Silisa Ntango Mwinda na Yo Ezali Naino Kopela

Na ekolo ya Gresi ya kala, basani bapoti mbangu bazalaki kokima mbangu ya bokitani na oyo ebiangemi lampadedromia.1 Na mbangu yango, basani bazalaki kosimba mwa nkoni ya moto na loboko na bango mpe kopesa yango na mosani alandi kino moto ya suka ya ekipi akoleka ndelo ya kokatisa.

Mbano epesamaki na ekipi oyo ekimaki mbangu noki koleka te—kasi epesamaki na ekipi ya liboso ya kokatisa ndelo ntango mwinda na yango ezali kaka kopela.

Ezali na liteya moko ya mozindo awa, oyo eteyamaki na baprofeta ya kala mpe ya sika ete: ezali likambo ya monene ete tobanda mbangu, kasi ezali motuya mingi koleka ete tosilisa yango ntango mwinda na biso ezali naino kopela.

Salomo Abandaki Malamu Penza

Mokonzi monene Salomo azali ndakisa ya moto oyo abandaki malamu penza. Ntango azalaki elenge, “alingaki Nkolo, kotambolaka na malakisi ya Dawidi tata na ye” (1 Mikonzi 3:3). Nzambe asepelaki na ye mpe alobelaki ye ete, “Senga eloko nionso olingi nakopesa yo yango” (1 Mikonzi 3:5).

Na esika ya kosenga misolo to bomoi ya molai, Salomo asengaki “motema ya mayele mpo na kosambisa bato na yo, ete nakoka kososola bolamu na mabe” (1 Mikonzi 3:9).

Eyano oyo esepelisaki Nkolo mingi mpenza ete Apambolaki Salomo na bwania kaka te kasi mpe lisusu na bomengo koleka ndelo mpe bomoi molai.

Atako Salomo azalaki bongo moto ya bwania mpenza mpe asalaki makambo manene, asilisaki malamu te. Likambo ya mawa, na suka ya bomoi na ye, “Salomo asalaki likambo ya mabe na miso ya Nkolo, mpe alandaki Nkolo na manso te” (1 Mikonzi 11:6).

Kosilisa Lisano ya Mbangu na Biso Moko.

Mbala boni tobanda kosala eloko moko mpe tosilisa yango te? Kolia oyo monganga akomeli yo? Manaka ya ngalasisi? Mikano ya kotanga makomi mokolo na mokolo? Mikano ya kozala bayekoli malamu koleka ya Yesu Klisto?

Mbala boni tozwa mikano na sanza ya yambo mpe tolanda yango na molende ya makasi mpo na mikolo moke, poso moko to nkutu mwa basanza na komona ete pene na sanza ya zomi, moto ya bomipesi na biso ezali kokufa lokola makala ya malili?

Mokolo moko nayaki komona foto moko ya mbwa etandami pembeni ya lokasa ya papie oyo akatakataki. Etangamaki ete, “Certificat ya Mbwa na Boyekoli Botosi.”

Ntango mosusu tozalaka ndenge wana.

Tozali na makanisi malamu; tobandaka makasi; tolingi kozala bato ya malamu koleka mpo na biso moko. Kasi suka suka totiki mikano na biso ekatamakatama, etiama pembeni, mpe ebwakama.

Ezali lolenge ya moto ete abeta libaku, abunga, mpe ntango mosusu alinga kotika komeka lisano ya mbangu. Kasi lokola bayekoli ya Yesu Klisto, tosili kozwa mokano ya bobele kobanda lisano ya mbangu te kasi mpe ya kosilisa yango—mpe kosilisa yango ntango nkoni na biso ezali kopela kaka makasi. Mobikisi alakaki bayekoli na Ye ete, “Ye oyo akotia molende kino nsuka, ye wana nde akobikisama” (Matai 24:13).

Tika natanga maloba oyo Mobikisi alakaki na mikolo na biso: Soki tobateli mitindo na Ye mpe tosilisi lisano mwinda na biso kopelaka kaka, tokozwa bomoi ya seko, oyo ezali likabu ya monene koleka makabu manso ya Nzambe (tala D&A 14:7; tala lisusu 2 Nefi 31:20).

Pole Oyo Ezimamaka Te

Ntango mosusu nsima ya kobeta libaku, kozwa te, to nkutu kotika, tolembaka nzoto mpe tondimaka ete pole na biso esili kokufa mpe ete tozwi te na lisano ya mbangu. Kasi natatoli ete Pole ya Klisto ekoki kozimama te. Ekongenga na molili koleka nionso ya butu mpe ekozonga kopelisa milimo na biso bobele soki tofungoli mitema na biso epai na Ye (tala 1 Mikonzi 8:58).

Likambo ezali te mbala boni to mosika wapi tokweyi, Pole ya Klisto epelaka kaka makasi ntango nionso. Mpe ata nkutu na butu ya molili koleka, soki kaka tobelemi epai na Ye, pole na Ye ekozikisa molili nionso mpe ekopelisa lisusu milimo na biso.

Lisano ya mbangu oyo ya bayekoli ezali ya moto moko te; ezali ya bato mingi. Mpe bokeseni ezali se ya moke na kotalaka lolenge tozali kokima mbangu. Solo mpenza, moko nzela tokoki kolonga lisano na biso ya mbangu te ezali na kotiaka maboko likolo to kotikaka.

Kino tokokoba kotelema mpe kokende epai ya Mobikisi, tokolonga lisano ya mbangu na nkoni na biso kopelaka makasi.

Mpo mwinda wana ezali mpo na biso te to mpe mpo na oyo tozali kosala te.

Ezali mpo na Mobikisi ya mokili.

Mpe yango wana nde Pole oyo ekoki kokita soki moke te. Ezali Pole oyo emelaka molili, ebikisaka pampota na biso mpe ezali makasi mpenza ata na katikati ya mawa ya mozindo koleka mpe na molili ya makasi koleka.

Ezali Pole oyo elekelaka bososoli.

Tika ete moko na moko kati na biso akoma na suka ya nzela oyo tobandi. Mpe na lisalisi ya Mobikisi mpe Mosikoli na biso, Yesu Klisto, tokosilisa na esengo na minda na biso kopelaka kaka.

Matangi

  1. Harpers Dictionary of Classical Antiquities (1898), “Lampadedromia,” www.perseus.tufts.edu/hopper. Pausanias alimboli mwinda ya moto ekeseni mpo na lisano ya mbangu waoi bamemi mwinda, ekoki kozala moko uta na ekolo moko, bapesaki ya bango mwinda na moto mosusu liboso te. Kasi mpo na oyo elekaka na lampadedromia, molongi azalaki oyo akomaki na nsuka ya mbangu na nkoni na ye ya moto kopelaka.

Koteya uta na Etinda Oyo

Tala lolenge nini okoki kolendisa baoyo boteyaka bakanisa epai wapi bakomi na “mimekano na bango ya mbangu” ya bomoi. Minda na bango ezali kaka kopela makasi? Bokoki kotanga maloba oyo elobi ete Pole ya Klisto ezali “Pole oyo emelaka molili, ebikisaka pampota na biso mpe ezali makasi mpenza ata na katikati ya mawa ya mozindo koleka mpe na molili ya makasi koleka.” Nsima solola na baoyo boteyaka boni boni Pole ya Klisto esili kosalisa bomoi na bango na mikolo mileki mpe boniboni ezali kosalisa bomoi na bango sikoyo.

Bimisa na lokasa