2015
Tondisa Mwinda na Yo: Mokolo ya 30 ya Komeka
sánzá ya zómi 2015


Bilenge

Tondisa Mwinda na Yo: Mokolo ya 30 ya Komeka

Mpo na bilenge kati na Eklezia oyo bazali okipe na bomoi na bango, ekoki kozala likambo ya pete ya kokweya na mimesano, mingi mingi na makambo ya molimo. Totangi makomi na biso, tosambeli, mpe tosambelaka mbele lolenge moko mokolo na mokolo mpe tomituni mpo na nini tozali kokende liboso te na molimo.

Moko ya banzela ya malamu koleka ya kobatela mwinda na biso ya molimo kopela makasi ezali koyeba ete ozali kozwa mayele ya molimo ya ntina. Kasi ezali pete na koloba koleka kosala, boye topesi likanisi awa mpo na kosalisa yo kokoba kokende liboso na molimo: Kanisa activite moko ya nsango malamu oyo osala naino te (to oyo okoki kosala te) mpe zwa mokano ya kosala yango mokolo na mokolo sanza mobimba. Okoki kobanda na eloko ya moke mpamba te okomona ete ezali pete mingi koleka mpo na kobongola mbongwana ya mike na oyo ewumelaka. Kosala makambo oyo ebimisaka biso libanda ya biskia wapi molimo ezali makasi esengeli bondimi mingi mpe bokasi na ngambo na biso, kasi soki tosali yango, tozali kobianga Molimo Mosantu kozala elongo na biso, mpe tozali kolakisa bolingo monene na Tata na Lola mpe mposa ya kobelema penepene na Ye. Topesi mwa makanisi moke awa mpo ete obanda:

  • Tia ntina moko ya kosala lnsambo na yo na ntongo mpe na mpokwa. Meka kosambela na mongongo likolo.

  • Lamuka miniti 15 liboso mpe tanga makomi yambo ya kokende kelasi.

  • Tanga masikulu ya likita linene eleki.

  • Tia makomi uta na Buku ya Mormon.na media social moko.

  • Yoka banzembo ya kantiki na esika ya banzembo omesena koyoka.

Bimisa na lokasa