2016
Makambo Oyo Ememaka Esengo
sánzá ya yambo 2016


Bilenge

Makambo Oyo Ememaka Esengo

Mokambi Eyring ateyi ete “esengo tolukaka mpo na baye tolingaka evandi na maponi na bango.”

Bokoki kotanga oyo etali mbano ya maponi wana ekoki koza na yango uta na bandakisa ya Nefi, Lamane, mpe Lemuele. Lamane mpe Lemuele bayimayimaki mpe balingaki te kobatela mitindo (Tala 1 Nefi 2:12). Lokola mbano, bango mpe bakitani na bango balakelamaki mabe mpe babwakisamaki mosika na miso ya Nkolo (Tala 2 Nefi 5:20–24). Nefi aponaki kotosa mitindo (tala 1 Nefi 3:7), mpe na ntina na yango, ye mpe bato na ye “bavandaki na esengo” (2 Nefi 5:27).

Bokoki kopona kozala sembo mpe na esengo. Kasi bato nzinganzinga na bino bakokoba kosala maponi ya mabe oyo ememaka na mpasi to kozanga libondi. Ntango bazali kosala mikano wana na bangomei, ndakisa na yo ekoki kotinda maponi na bango mpo na bolamu. Boniboni maponi na bino ekoki kopesa esengo na basusu? Bosolola na libota na bino banzela ekeseni oyo bokoki kotindika na malamu baye bazali nzinganzinga na bino mpe kosalisa bango bayoka esengo.

Bimisa na lokasa