2016
Esengo mpo na Baye Tolingaka
sánzá ya yambo 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Yambo 2016

Esengo mpo na Baye Tolingaka

Biso banso tolukaka esengo mpo na baye tolingaka, mpe tolingaka ete mpasi ezala moke mpo na bango. Wana ezali biso kotanga masolo ya esengo—mpe ya mpasi—na Buku ya Mormon, mitema na biso eninganaka ntango tokanisaka baye ya biso tolingaka. Tala lisolo moko ya solo ya ntango ya esengo:

“Mpe esalemaki ete boswani ezalaki na mboka te, na ntina ya bolingo ya Nzambe oyo efandaki na mitema ya bato.

“Mpe ezalaki na boluli te, to songisongi te, to mobulu te, to pite te, to lokuta te, to bobomi te, to lolenge loko te ya bosoni ; mpe ekokaki te kozala bato boko ba esengo mingi koleka bato banso baye bakelamaka na loboko la Nzambe.”

Nsima totangi ete:

“Mpe lolenge nini bapambolamaki mpenza! Mpo Nkolo apambolaki bango na misala na bango nionso; iyo, kutu bapambolamaki mpe bazwaki bomengo kino mibu nkama moko na zomi milekaki; mpe nkola ya yambo uta na Klisto elekaka, mpe boswani ezalaki te na mboka mobimba. (4 Nefi 1:15–16, 18)

Bayekoli ya bolingo ya Klisto basambelaka mpe basalaka mpo na mapamboli ya boye mpo na basusu mpe mpo na bangomei. Uta na masolo kati na Buku ya Mormon mpe, mpo na mingi kati na biso, uta na boyebi na bisomei, toyebaka ete likabo ya esengo ekoki kozwama na pete te. Toyebaka ete nzela ya esengo etiami na bilembo ya malamu. Toyebi lisusu ete kotikalaka na esengo ezali pete te longola se soki, lokola na Banefi nsima ya Mobikisi kokende kotala bango, “bolingo ya Nzambe” evandi na mitema na biso.

Bolingo wana ezalaki kati na mitema ya Banefi mpo ete babatelaki mobeko oyo esalaki ete yango ekoka kosalema. Bokuse ya mobeko wana ezwami kati na nsambo ya elambo, oyo ebandi na libondeli ya motema epai ya Tata ya Lola. Tosambelaka na motema etonda bondimi na, mpe na bolingo ya mozindo mpo na Mobikisi na bisomei. Tolakaka na likanisi ya solo mpo na kozwa likolo na biso nkombo na Ye, tomikundola Ye na nsuka, tosalelaka bondimi ete Molimo Mosantu, moto ya misato ya Bonzambe, akoka ntango nionso kozala elongo na biso, kotatolaka na mitema na biso Tata mpe Mwana na Ye ya Bolingo. (Tala D&A 20:77, 79.)

Elongo na kimoninga ya Molimo Mosantu, mitema ma biso ekoki kobongwana solo ete tolingi mpe toyambi bolingo ya Tata na biso ya Lola mpe Nkolo Yesu Klisto. Nzela ya kozwa bolingo ya Nzambe kati na mitema na biso ezali pete, lolenge moko mpe nzela ya kobungisa bolingo wana kati na mitema na biso>. Ndakisa, moto moko akoki kopona kosambela mbala mimgi te Tata ya Lola to kofuta moko na zomi mobimba te, to kotika kosala lipati likolo na ntina ya liloba ya Nzambe, to kobosana babola mpe bakeleli.

Boponi kani ya kobatela mitindo ya Nkolo te ekoki kosala ete Molimo ebima na mitema na biso. Na libungi wana, esengo ekitaka.

Esengo oyo tolukelaka baye tolingaka efandisami na maponi na biso. Ata ndenge nini tokolinga mwana, moluki, baninga na biso, tokoki kotinda bango na makasi te mpo ete kobatela mitindo solo ete balongobana mpo ya Molimo Mosantu kosimba mpe kobongola mitema na bango.

Yango wana lisalisi ya malamu mingi koleka oyo tokoki kopesa ezali nionso kani ekambaka baye tolingaka bakengela maponi na bangomei. Alma asalaki yango na libengisi moko oyo okoki kopesa:

“Bomikitisa liboso ya Nkolo, mpe bobondela nkombo na ye esantu, mpe bokenge mpe bosambela mbala na mbala, ete bokoka kosenginiama te likolo ya oyo bokoki kokumba, mpe boye bokambema na Molimo Mosantu, kokomaka basawa, basokemi, bayangelami, bampikiliki, botonda na bolingo, mpe motema molai nionso;

“Kozalaka na bondimi na Nkolo; kozalaka na elikia moko oyo ete bokozwa bomoi ya ya seko; kozalaka na bolingo ya Nzambe ntango nionso na mitema na bino, ete bokoka kotombolama na mokolo ya nsuka mpe bokota na na kati ya bopemi na ye” (Alma 13:28–29).

Nabondeli ete baye bolingi bakoki kondima libengisi efulama mpo na kopona nzela esengo ya kowumela.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Eyring ateyi ete esengo toyokaka na bomoi evandisami na mikano tosalaka. Ntango boza kosolola mpo na etinda oyo botala matala malamu, botala kotia nsete likolo ya makambo Mokambi Eyring alobi tokoki kopona kosala ( ndakisa kosambela, kosala mosala, kosalela bondimi, mpe komipesa bisomei na likanisi ya solo) mpo na kokamba biso na nzela wana ya esengo. Bokoki kobengisa baye boteyaka bakoma makambo mibale to misato bakolinga kosala oyo ekoki kokamba bango malamu na “nzela ya esengo ewumelaka.”

Bimisa na lokasa