2016
Libota: Esakola na Mokili
sánzá ya yambo 2016


Etinda ya Bamama Bateyi mpe Batali, Sanza ya yambo 2016,

Libota: Esakola na Mokili

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni bososoli na bino ya malongi ya libota ekopambola baoyo bozali kokengela na nzela ya mateya ya bamama batali mpe bateyi? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Uta na likita linene ya Lingomba ya Bamama Basungi na 1995, ntango Mokambi Gordon B. Hinckley (1910–2008) yambo atangaki “Libota: Esakola na Mokili,” Bonnie L. Oscarson, mokambi monene ya Bilenge Basi, alobaki ete: “Totondi mpe tondimi motuya ya polele, pete, mpe bosolo ya mokanda ya bobimisi oyo. … Esakola etali libota ekomaki ndakisa mpo na kososola filozofi ya mokili, natatoli ete mabongisi elobelami … ezali solo lelo lokola ezalaki ntango epesamaki na biso na nzela ya profeta ya Nzambe pene ya mibu 20 eleki.”1

“Uta na libota esakola,” ebakisaki Carole M. Stephens, mopesi toli ya yambo na Bokambi ya Lingomba ya Bamama Basungi, “toyekoli, ‘Na bokonzi yambo ya kufa, bana ya milimo ya mibali mpe ya basi bayebaki kokumbamela Nzambe lokola Tata na bango ya Seko’2 …

“… Moko na moko na biso azali kati na mpe asengeli na libota ya Nzambe.”3

Tozali na ntango oyo baboti basengeli kobatela bandako na bango mpe mabota na bango. “Libota: Esakola na Mokili” ekoki kokamba biso.

Makomi ya Kobakisa

Moziya 8:16–17; Doctrine et Alliances 1:38

Masolo ya Solo

“Lee Mei Chen Ho ya Paloasi ya Misato ya Tao Yuan, Likonzi ya Tao Yuan Taiwan, alobaki ete esakola eteyi ye ete mikangano na libota esalisaka kokolisa bizaleli ya bonzambe ndakisa lokola bondimi,bompikiliki, mpe bolingo. ‘Ntango nazali komeka komikomisa malamu engebene na esakola, nakoki kozwa esengo ya solo,’ elobaki ye.”4

Barbara Thompson, oyo azalaki wana ntango esakola etangamaki mpo na mbala ya yambo mpe sima asalaki lokola mopesi toli na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, alobaki ete: “Nakanisaki mpo na ntango moko ete [esakola mpo na libota] etalaki mingimingi ngai te mpo ete nabalaki naino te mpe nazalaki na bana te. Kasi lokola nakanisaki na mwa lombangu moke, ‘Kasi etali mpenza ngai. Nazali moto ya libota. Nazali mwana mwasi, ndeko ya mwasi, tata mwasi to mama leki, mwana nkasi, nkoko ya mwasi. … Ata soki nazali moto se moko ya libota oyo azali na bomoi, nazali kaka mpe moto ya libota ya Nzambe.’”5

Matangi

  1. Bonnie L. Oscarson, “Molobeli ya Libota Esakola na Mokili,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 14–15.

  2. “Libota: Libota Esakola na Mokili,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2010, 129.

  3. Carole M. Stephens, “Libota Ezali ya Nzambe,” Liahona, Sanza ya Mitano 2015, 11.

  4. Nicole Seymour, “‘Libota: Esakola na Mokili’ ekomaki na ntina mpenza mibu 10, Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2005, 127.

  5. Barbara Thompson, na Mwana mwasi na Bokonzi: Lisolo mpe Mosala ya Lingomba ya Bamama Basungi (2011), 148.

Botala oyo.

Lolenge nini “Libota: Esakola na Mokili” ezali mokanda mpo na mokolo na biso?

Bimisa na lokasa