2016
Kobatela Mitindo mpe Kolinga Basusu.
sánzá ya libwa 2016


Bilenge

Kobatela Mitindo mpe Kolinga Basusu

Ntango tokanisi bolingo, mbala mingi likambo ya yambo oyo ekoya na makanisi ezali bafilme ya bolingo, chokola, mpe bafololo. Kasi bolingo—bolingo ya solo—ezali ya mozindo mingi koleka mpe ya kozanga moyimi mingi koleka yango. Yesu Klisto azalaki na bomoi mpo na biso mpe akufaki mpo na biso na ntina ya bolingo na Ye mpo na biso. Solo, mitindo mibale ya monene ezali kolinga Nzambe mpe kolinga bato mosusu (tala Matai 22:36–40). Kasi boniboni tokoki kolakisa basusu ete tolingi bango?

Mokambi Uchtdorf akaboli lisese ya Klisto ya bana mibali mibale, moko oyo asali mpo na tata na ye mpe moko oyo asali te. Mobikisi alimboli ete bobele mwana mobali oyo atosaki tata na ye nde solo alingaki ye. Lolenge moko, ntango totosi mibeko ya Nzambe, tolakisi ete tolingi Ye mpe tolingi tozonga epai na Ye.

Kasi boniboni tokolakisa tolingi bato basusu nyonso? Mokambi Uchtdorf alimboli yango lokola: “Soki tolingi ya solo baninga na biso bato, tokomipesa mpo na kosalisa ‘babola mpe bakeleli, bato ya bokono mpe bato batungisama.’ Mpo baye bakosala bikela oyo ezanga moyimi ya mawa mpe lisalisi, bango kaka bazali bayekoli ya Klisto.”

Boye mbala ya nsima bokomona ya bino moboti moko, ndeko moko, to moninga moko, bokosalisa bango mpo na kolakisa bolingo na bino mpo na bango. Ekosala kaka te bango mpe bino esengo, kasi ekosala Tata na Bino na Lola esengo lokola.

Bimisa na lokasa