2016
Nsima ya Bolingo, Nde Nini?
sánzá ya libwa 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Libwa 2016

Nsima ya Bolingo, Nde Nini?

Profeta na biso ya bolingo, Mokambi Thomas S. Monson, ateyaki ete “bolingo ezali mozindo ya nsango malamu”.1

Bolingo ezali ya motuya mpenza ete Yesu abengaki yango “motindo ya yambo mpe ya monene” mpe alobaki ete eteni nyonso mosusu ya mobeko mpe maloba evandi likolo na yango.2

Bolingo ezali ntina ya katikati mpo na oyo nyonso tosalaka na Eklezia. Pologami nyonso, liyangani nyonso, ekela nyonso tozali eteni na yango lokola bayekoli ya Yesu Klisto ewuti na ezaleli oyo—mpo soki tozangi bolingani, “bolingo ya peto ya Klisto,” tozali eloko te.3

Soki tososoli yango na mayele mpe motema na biso, soki tosakoli bolingo na biso mpo na Nzambe mpe baninga na biso bato—nini nsima?

Koyoka mawa mpe bolingo mpo na basusu ekoki? Kosakola bolingo na biso mpo na Nzambe mpe bazalani na biso ekokisi lotomo na biso epai ya Nzambe?

Lisese ya Bana Mibali Mibale

Na tempelo na Yelusaleme, banganganzambe bakonzi mpe bampaka ya Bayuda babelemaki na Yesu mpo na kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye. Nzokande, Mobikisi, asukisaki mayele na bango na kolobaka lisolo moko.

“Moto moko azalaka na bana mibali mibale,” Ebandaki Ye. Tata wana akendeki epai ya oyo ya yambo mpe asengaki ye akende kosala na bilanga ya vino. Kasi aboyaki. Nsima mwana mobali wana “ayambolaki, mpe akendeki.”

Nde tata wana akendeki epai ya mwana mobali na ye ya mibale mpe asengaki ye akende kosala na bilanga ya vino. Mwana mobali yango ayebisaki ye na ntembe te ete akokende, kasi akendaki mokolo moko te.

Nde Mobikisi abalukaki epai ya banganganzambe mpe bampaka mpe atunaki, “Nani ya bana mibali mibale oyo asalaki bolingi ya tata na ye?

Basengelaki kondima ete ezalaki mwana mobali ya yambo—oyo alobaki akokende te kasi nsima ayambolaki mpe akendaki kosala na bilanga ya vino4

Mobikisi asalelaki lisolo oyo mpo na kobeta nsete na libongi moko ya motuya—ezali oyo batosaka mitindo nde balingaka Nzambe.

Ntango mosusu oyo ezali ntina nini Yesu asengaki bato bayokemela mpe balanda maloba ya bafalisi mpe bakomi kasi balanda ndakisa na bango te.5 Bateyi ya biyamba oyo bazalaki kosalela liloba te. Bazalaki kolinga kolobela boyambi, kasi mawa bazangaki mozindo na yango.

Bikela mpe Lobiko na Biso.

Na moko ya mateya ya Mobikisi ya nsuka na bayekoli na Ye, Ye alobelaki bango bosambisi ya nsuka. Bato ya mabe mpe ya bosembo bakokabwana. Bato ya malamu bakosangola bomoi ya seko; bato ya mabe bakobwakama na etumbu ya seko.

Bokesani ezalaki nini na katikati ya maboke mibale.

Baye balakisaki bolingo na bango na nzela ya ekela babikisamaki. Baye basalaki te bakokweyisama.6 Mbongwana ya solo na nsango malamu ya Yesu Klisto mpe mituya mpe mabongi na yango ekotatolama na bikela na biso na bomoi na biso ya mokolo na mokolo.

Na nsuka, esakola ya mpamba ya bolingo ya Nzambe mpe baninga bato ekolongisa biso te mpo na bonetoli. Mpo, lokola Yesu ateyaki, “moko onso oyo alobi epai ya ngai, Nkolo, Nkolo, akokota te o kati ya bokonzi bwa lola; kasi ye oyo asali bolingi bwa Tata wa ngai oyo azali o lola.”7

Nini ekoya nsima ya bolingo?

Eyano na motuna “Nsima ya Bolingo, Nde Nini?” ekoki kozala pete mpe mpasi te. Soki ya solo tolingi Mobikisi, tokoyekimisa mitema na biso na Ye mpe nde tokotambola na nzela ya boyekoli. Ntango tolingi Nzambe, tokobunda na kobatela mitindo na Ye.8

Soki tolingi ya solo moninga na biso, tokomipesa na kosalisa “babola mpe bakeleli, bato ya bokono mpe bato batungisama.”9 Mpo baye bakosala bikela oyo ya ezanga moyimi ya mawa mpe lisalisi,10 bango kaka bazali bayekoli ya Yesu Klisto.

Oyo ezali nini ekoya nsima ya bolingo.

Oyo ezali mozindo ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Dieter F. Uchtdorf alimboli bayekoli ya Yesu Klisto lokola baye bakolakisa bolingo na bango mpo na Ye mpe mpo na basusu na nzela ya bikela na bango. Ateyi biso ete “soki tolingi ya solo Mobikisi, tokoyekamisa mitema na biso na Ye mpe nde tokotambola na nzela ya boyekoli.” Bokanisa kotuna baye bozali koteya na ndenge nini bolingo etindaka bango batambola na nzela ya boyekoli. Bokoki kokabola mayele na bino elongo na bango lokola. Bokoki kokanisa kosenga bango basambela mpo na bolingani mpe bokasi mingi koleka mpo na kokela oyo ekowuta na bolingo.