2016
Kimoboti Ezali Mosala moko ya Bule.
sánzá ya libwa 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Libwa 2016

Kimoboti ezali Mosala moko ya Bule

Na nzela ya losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofuli mpo na koyeba nini bosengeli kokabola. Boniboni kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekomatisa bondimi na bino na Nzambe mpe ekopambola baye bobatelaka na nzela ya koteya na botali? Mpo na kozwa nsango mingi, bokende na www.reliefsociety.lds.org.

Elilingi
Elembo ya Lingomba ya Bamama Basungi

Bondimi, Libota, Lisungi

Tata na biso ya Lola asalaki mabota mpo na kosunga biso na koteya mabongi ya bosembo na ezalela moko ya bolingo. Mokambi Thomas S. Monson alobaki: “Pesa mwana wa yo longonia mpe yambi; loba, ‘Nalingaka yo’ mingi; ntango nyonso kozongisaka matondi ma yo. Kotika soki moke te kpokoso ya kosembola ekoma ya motuya mingi koleka kolinga moto.”1

Susan W. Tanner, mokambi monene ya kala ya Bilenge Basi, ateyaki: “Tata na biso ya Lola alakisi mpenza ndakisa tosengli kolanda. Ye alingaka biso, ateyaka biso, mpe andimi kopesa biso boponi. Ntango mosusu bosemboli, oyo elingi koloba ‘koteya,’ emonanaka lokola kotonga. Bana—mpe bato ya nkola nyonso lokola—babongisaka bizalela mpo na bolingo mpe bolendisi mingi koleka mpo na komonaka mbeba.”2

“Soki tosaleli na botongono losambo ya libota, koyekola makomi, lisanga ya libota ya mpokwa, mapamboli ya bonganganzambe, mpe kobatela mokolo ya Saba,“ elobaki Mpaka Quentin L. Cook ya Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, “bana na biso … bakolengelama mpo na ndako ya seko na lola, ata nini ekokomela bango na mokili moko ya kpokoso.”3

Makomi ya Kobakisa

1 Nephi 8:37; 3 Nephi 22:13; Doctrine et Alliances 93:40; 121:41

Masolo ya Bomoi

“Nazalaki kotanga zulunale ntango moko ya bankoko na ngai akangamaki na ngai na nzoto,” elobaki Mpaka Robert D. Hales ya Lisanga likoki ya Babostolo Zomi na Mibale . “Ntango nazalaki kotangaka, nasepelaki koyoka mongongo na ye ya kitoko kolobaka na nsima. Kanisa bosutuki na ngai ntango, mwa ngonga nsima, amipusaki katikati na ngai mpe lokasa. Kokamataka elongi na ngai mpe kofinaka zolo na ye na ya ngai, ye atunaki, ‘Papa nkoko! Ozali awa?’

Kozala awa elingi koloba kososola mitema ya bilenge na biso mpe kokanganaka na bango. Mpe kokanganaka na bango elingi koloba kaka te kosololaka na bango kasi kosalaka makambo elongo na bango lokola. …

“Tosengeli kobongisa mpe kosalela litomba ya ngonga ya koteya. …

“… kowumelaka na bomoi, nayebi mingi ete ngonga ya koteya na bolenge na ngai, mingimingi oyo epesamaki na baboti na ngai, ebongisi bomoi na ngai mpe esali ngai nani nazali.”4

Matangi

  1. Thomas S. Monson, “Love at Home—Counsel from Our Prophet,” Liahona, Sanza ya mwambe 2011, 4.

  2. Susan W. Tanner, “Did I Tell You … ?” Liahona, Sanza ya mitano 2003, 74.

  3. Quentin L. Cook, “The Lord Is My Light,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 64.

  4. Robert D. Hales, “Our Duty to God: The Mission of Parents and Leaders to the Rising Generation,” Liahona, Sanza ya mitano 2010, 96, 95.

Bokanisa Oyo

Ntina nini nsango malamu eteyami malamu mingi koleka na maloba mpe ndakisa ya bolingo?

Bimisa na lokasa