2016
Lolenge nini Bokokanisa Mobikisi Poso Oyo?
sánzá ya zómi na míbalé 2016


Bilenge

Lolenge nini Bokokanisa Mobikisi Poso Oyo?

Mokambi Eyring alendisi biso “topona kokanisa [Mobikisi] na lolenge oyo ezali kobenda motema na biso epai na Ye malamu mingi.”

Boniboni ezali bino “ntango nyonso kokanisa Ye” na ntaka ya poso yango (tala D&A 20:77, 79)?

Bozali na makomi bolingaka mingi oyo etali Mobikisi? Bokoki kotia elembo na likomi ekeseni mokolo moko na moko poso oyo mpe kokabola yango na moto moko.

Boyembaka nzembo moko to loyembo mosusu ya kotombola molimo na makanisi na bino ntango bozali komiyoka mabe? Ntango mosusu bopona moko oyo etali mingimingi Mobikisi poso oyo.

Maniolaka bomoi ya Mobikisi mpe libonza ya bomikabi ntango ya elambo poso nyonso? Bokoki komilengela mpo na elambo na komikundolaka maponi na bino na poso mobimba ya kokanisaka ntango nyonso Mobikisi mpe koyambolaka na bangonga ntango bobundaki mpo na yango.

Bosambelaka mpo na matomba ya kokabola nsango malamu mokolo moko na moko? Bomeka kozala na masolo ya nsango malamu poso oyo oyo elobeli mingi Mobikisi. Bokoki kopesa litatoli na bino ya Mobikisi na ntango ya likita ya mpokwa na libota to kosolola na moninga na eteyelo na ntina ya liyebi moko ozwaki na eklezia.

Sala ntina moko mpo na kokanisa Mobikisi na lolenge moko kitoko poso oyo. Boyebisa moboti moko, ndeko moko ya penepene, mokambi moko, to moninga na oyo etali ntina na bino. Na nsuka ya poso, yebisa bango oyo esalamaki. Bokoyoka kimia mpe esengo bino mibale oyo Mokambi Eyring alobelaki.

Bimisa na lokasa