2016
Kimia na Bomoi Oyo
sánzá ya zómi na míbalé 2016


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Zomi na Mibale 2016

kimia na Bomoi Oyo

Na banso na biso oyo toyei na bokufi, Mobikisi alobaki, “Kati na mokili bozali na bolozi” (Yoane 16:33). Nzokande Apesaki elaka kitoko oyo na bayekoli na Ye na ntango ya mosala na Ye na bokufi: “Natikeli bino kimia, kimia na ngai napesi epai na bino.” (Yoane 14:27). Ezali libondi koyeba ete elaka oyo ya kimia ya moto na moto ekobi mpo na bayekoli na Ye lelo.

Basusu na biso bafandi na banzinganzinga kitoko mpe ya kimia, nzokande tozali kokutana na mobulungano ya kati. Basusu bayokaka kimia mpe bobangi te kati na libebi monene ya bangomei, likama, mpe mimekano ya ntango nyonso.

Bokokaki komona likamwisi ya kimia na elongi ya moyekoli ya Yesu Klisto koyoka yango kati na maloba na ye. Namoni yango bangonga ebele. Ntango mosusu ezali na kisuku ya lopitalo esika wapi libota moko esangani na nzinganzinga ya mosali ya Nzambe oyo azali penepene ya liwa.

Namikundoli ntango nakendeki kotala mwasi moko na lopitalo mwa mikolo liboso ya kokufa na ntina ya cancer. Namemaka bana na ngai ya basi mibale mpo na kokende na ngai elongo mpamba te ndeko mwasi malamu oyo azalaka kala moteyi na bango ya Eteyelo ya bana.

Baye libota na ye basanganaki nzinganzinga ya mbeto na ye, kolikiaka kozala elongo na ye na bangonga na ye ya nsuka na mabele. Nakamwaki ntango afandaki likolo ya mbeto na ye. Asembolaki loboko epai ya bana na ngai ya basi mpe alakisaki bango mibale, moko na moko, epai ya moko na moko ya baye libota na ye. Azalaki koloba lokola soki bana na ngai ya basi bazalaki bakonzi oyo bazalaki kolakisama na lopango ya mokonzi ya mwasi. Amonaki nzela ya koloba likambo moko na ntina ya lolenge moto moko na moko na kisuku azalaki moyekoli ya Mobikisi. Namikundoli lisusu bokasi, boboto, mpe bolingo kati na mongongo na ye. Mpe nakanisi kokamwisamaka na koseka moke ya esengo kutu ntango ayebaki ete ngonga na ye kati na bomoi ezalaki mokuse.

Azwaka mapamboli ya libondi ya bonganganzambe, nzokande apesaki biso litatoli ete elaka ya kimia ya Nkolo ezali solo: “Nasili kosolola na bino makambo oyo, ete bozala na kimia. Na mokili bokozwa mimekano: kasi bozala na esengo; Nalongi mokili” (Yoane 16:33).

Ayambaka libiangi na Ye, lokola biso banso tokoki, atako mimekano mpe mitungisi ezali nini:

“Boya liboso na ngai, bino nyoso bozali kolemba na mosala mpe kokumba bozito mpe na kopemisa bino.”

“Bokamata ekanganeli na ngai likolo na bino mpe boyekola na ngai; mpo ngai nazali na bopolo mpe na motema mosokemi; bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.” (Matai 11:28–29).

Ezali bobele na nzela ya kolanda Mobikisi nde ata nani kati na biso akoki komona kimia mpe motema nie na mimekano oyo ekoyela biso banso.

Nsambo ya elambo esalisaka biso toyeba lolenge nini kozwa kimia wana na katikati ya mitungisi ya bomoi. Ntango toliaka elambo, tokoki kokana ya kozala botongono na mayokani na biso ya kolanda Ye.

Tolakaka moko na moko komikundola Mobikisi. Bokoki kopona komikundola Ye na lolenge oyo ebendaka motema na bino epai na Ye malamu mingi. Ntango mosusu mpo na ngai, esengeli komona Ye na makanisi na ngai kofukamaka na elanga ya Getesemane to komana Ye kobiangaka Lazaro kobima uta na lilita. Ntango nasalaka bongo, nayokaka kobelema moko epai na Ye mpe botondi oyo ememaka kimia na motema na ngai.

Bolakaka lisusu kobatela mitindo na Ye. Bolakaka kozwa nkombo na Ye likolo na bino mpe kozala nzeneneke na Ye. Alakaka ete ntango bozali kobatela mayokani na bino na Ye, Molimo Mosantu akozala elongo na bino. (Tala D&A 20:77, 79.)

Oyo ememaka kimia na pene ndenge mibale. Molimo Mosantu apetolaka biso uta na lisumu mpo na Bomikabi ya Yesu Klisto. Mpe Molimo Mosantu akoki kopesa biso kimia oyo eyaka uta na kozala na bondimami ya Nzambe mpe elikia ya bomoi ya seko.

Apostolo Paulo alobaki na ntina ya lipamboli kafukafu oyo: “Mbuma ya Molimo ezali bolingo, esengo, kimia, motema molai, boboto, bondimi.” (Bagalatia 5:22

Ntango batindami ya lola basakolaki mbotama ya Mobikisi, balobaki, “Nkembo na Nzambe na bisika-bileki-Likolo, mpe na mabele kimia” (Luka 2:14; nsete ebakisami). Napesi litatoli na ngai lokola nzeneneke ya Yesu Klisto ete Tata mpe Mwana na Ye Molingami bakoki kotinda Molimo mpo na kopesa biso nzela kozwa kimia na bomoi oyo, atako mimekano nini ekoki koyela biso mpe na baoyo tolingaka.

Koteya uta na Etinda Oyo

Mokambi Eyring ateyi ete nsambo ya elambo ekoki kosalisa biso toyeba lolenge nini kozwa kimia na ntango ya mimekano na biso. Ezali kokundolisa biso ete ntango tozali kobatela mayokani na biso, tozali na elaka ya Nzambe ete Molimo Mosantu akozala elongo na biso. Bomeka kosolola na baye bozali koteya lolenge nini kozalaka na Molimo Mosantu elongo na biso ekoki kosalisa biso tozwa kimia. Bokoki lisusu kokabola makanisi na bino oyo boyebi ya lolenge Molimo Mosantu esalisaki bino koyoka kimia kati na momekano moko. Bokoki kolendisa baye bozali koteya bamaniola etinda oyo na ntango ya elambo poso oyo.

Bimisa na lokasa