2016
Bosepeli ya Libota Ezwami kati na Bosembo
sánzá ya zómi na míbalé 2016


Etinda ya Bamama Batali mpe Bateyi, Sanza ya Zomi na Mibale 2016

Bosepeli ya Libota Ezwami kati na Bosembo

Na losambo boyekola mateya oyo mpe boluka bofulami mpo na koyeba maye bosengeli koteya. Boniboni kososola “Libota: Esakola na Mokili” ekomatisa bondimi na bino na Nzambe mpe epambola baye bobatelaka na nzela ya mateya ya botali? Mpo na kozwa nsango mingi, kende na www.reliefsociety.lds.org.

Bondimi, Libota, Lisungi

Nzambe atiaki mabota mpo na komema esengo na bana ba Ye, kopesa bango nzela ya koyekola mibeko ya sembo na esika moko ya bolingo, mpe kolengela bango mpo na bomoi ya seko.1 Na ntina ya “mwango monene ya esengo” ya Nzambe (Alma 42:8), Mokambi Russell M. Nelson, Mokambi ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale, balobaki: “Mwango na Ye esakoli ete mibali mpe basi ‘basengeli kozala na bosepeli’ [2 Nefi 2:25]. Bosepeli wana eyaka ntango toponi kozala na boyokani na mwango ya seko ya Nzambe.”2

Ndako etia Klisto na katikati epesaka mabaku minene mingi mpo na elonga. Mpaka Richard G. Scott (1928–2015) ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale alimboli yango lokola esika “wapi nsango malamu eteyami, mayokani ebatelami, mpe bolingo etondi,” wapi mabota ekoki kozala na “bomoi moko ya botosi” mpe kokoma “kobota misisa makasi kati na nsango malamu ya Yesu Klisto.”3

Mokambi Henry B. Eyring, Mopesi Toli ya Yambo na Bokambi ya Yambo, alobaki: “Tokoki kokana ete tokosala manso tokoki mpo na kokitisa banguya ya lola kati na libota [na biso].” Mpe tosengeli mingi kopesa esika na bolingo, lisalisi, botosi, mpe esengo na bandako na biso na nzela ya “koyoka liloba ya Nzambe ya [bana na biso] mpe nsima komekaka yango kati na bondimi. Soki basali yango, bizalela na bango ekobongwanisama na lolenge moko oyo ebotaka esengo oyo balukaka.”4

Bandako Etie Klisto na Katikati

Tozali na bandakisa ya bandako oyo etie Klisto na katikati kati na makomi. Nsima ya tata na ye, Lehi, akufaki, Nefi azwaki llibota na ye mpe basusu oyo bandimelaki makebisi mpe bobimisi ya Nzambe mpe baye bayokelaki maloba ya Nefi mosika uta na mboka ya Balamani. Mpe na esika ya sika oyo, Banefi bakokaki kobatela masambisi, mpe meko, mpe mitindo mya Nkolo o makambo manso, engebene na mobeko mwa Mose (tala 2 Nefi 5:6–10). Nzokande kutu kati na Banefi, basusu na nsuka bazangaki botosi.

Mpe ntango baye libota na biso bakoki kopengwa uta na bosembo lokola esalaki Banefi, Mpaka Scott alobaki ete ndako oyo etie Klisto na katikati lisusu “kopesa elikia ya kimia mpe ekimelo kati na bandako na biso.” Andimi ete “ekozala na mikakatano ebele to mpasi na motema, kasi ata na kati ya mobulungano, tokoki kosepela na kimia ya kati mpe esengo ya mozindo.”5

Makomi ya Kobakisa

3 Yoane 1:4; 1 Nefi 8:12; 2 Nefi 5:27

Matangi

  1. Handbook 2: Administering the Church (2010), 1,1.4.

  2. Russell M. Nelson, “Celestial Marriage,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko 2008, 92.

  3. Richard G. Scott, “For Peace at Home,” Liahona, Sanza ya Mitano 2013, 31.

  4. Henry B. Eyring, “The Teachings of ‘Libota: Esakola na Molongo,’” New Era, Sanza ya libwa. 2015, 5.

  5. Richard G. Scott, “For Peace at Home,” 31.

Bolanda Oyo

Nini tokoki kosala mpo na kofanda na bosembo mingi koleka kati na mabota na biso?

Bimisa na lokasa