2018
Makambo misato mpo na Komikundola
February 2018


Bilenge

Makambo misato mpo na Komikundola

Liloba komikundola amonisami mbala ebele na kati ya Buku ya Mormon. Nefi alendisaki bandeko na ye bamikundola lolenge nini Nzambe abikisaki bankoko na bango. Mokonzi Benjamin asengaki bato na ye bamikundola bonene ya Nzambe. Mpe Moroni ateyaki bayekoli na ye bamikundola lolenge nini Nkolo azali mawa.

Komikundolaka Mobikisi ezali ntina—kutu tosalaki liyokani ya komikundola Ye mbala na mbala tozali kolia elambo. Mokambi Eyring abengisi biso tomikundola makambo misato oyo na ntango ya elambo:

  1. Komikundola Yesu Klisto: Kotanga makomi na ntina ya lolenge nini Mobikisi asungaki mpe alakisaki bolingo epai ya basusu. Lolenge nini boyoki bolingo na Ye?” Lolenge nini bosungi mpe bolakisi bolingo epai ya basusu lokola Mobikisi asalaki?

  2. Komikundola nini bosengeli kosala malamu koleka: Botala mposo na bino eleki na motema ya boyamboli. Bopona eloko moko bokoki kobongola, mpe bokoma lolenge nini bokosala mbongwana yango. Botia ntina na bino na esika oyo bokomona yango ntango nyonso.

  3. Bomikundola bokobi oyo bozali kosala: Bosenga Nzambe asunga bino bomona bokobi malamu oyo bozali kosala. Bokoma lolenge nini bozali koyoka.

Tozali babongi nie te, kasi Mobikisi ayebi yango. Nayango Asengi biso tomikundola Ye. Komikundolaka Ye epesaka biso elikia mpe esungaka biso na mposa ya kobongwama. Atako bantango mosusu tozangi komikundola Ye, Mokambi Eyring alobi, “Amikundolaka biso ntango nyonso.”

Bimisa na lokasa