2018
Ntango nyonso Kokundola Ye.
February 2018


Etinda ya Bakambi ya Yambo, Sanza ya Mibale 2018

Ntango nyonso Kokundola Ye

Bokoki kotala elongo na ngai elili ya profeta Moroni kokomaka maloba ya nsuka ya Buku ya Mormon likolo ya bapalaki ya wolo? Azalaki ye moko. Amonaki ekolo na ye, bato na ye, mpe bokwei ya libota na ye. Mabele ezalaki “kokoba ntango nyonso ” na etumba (Mormon 8:8). Kasi azalaki na elikia, mpo amonaki mokolo na biso! Mpe na makambo nyonso oyo akomaki, abengisaki biso tomikundola (tala Moroni 10:3).

Mokambi Spencer W. Kimball (1895–1985) alingaki mingi koteya ete liloba ya ntina koleka na dictionere ekoki kozala komikundola. Mpo ete tosalaki mayokani na Nzambe, alobaki, “mposa na biso monene ezali ya komikundola” bango.1

Bokoki kozwa liloba komikundola na kati ya makomi. Ntango Nefi akanisaki bandeko na ye ya mibali, mbala mingi abengisaki bango bamikundola maloba ya Nkolo mpe bamikundola lolenge nini Nzambe abikisaki bankoko na bango (tala 1 Nefi 15:11, 25; 17:40).

Na maloba na ye minene ya nsuka, Mokonzi Benjamin asalelaki liloba komindola mbala nsambo. Alikiaki ete bato na ye bakomikundola “bonene ya Nzambe … mpe bolamu na ye mpe mpasi ya ntango molai” epai na bango (Moziya 4:11; tala lisusu 2:41; 4:28, 30; 5:11–12).

Ntango Mobikisi atiaki elambo, Abengisaki bayekoli na ye balia bilembo “mpo na komikundola” libonza na Ye (Luka 22:19). Na losambo nyonso ya elambo bino na ngai toyokaka, liloba ntango nyonso oyo elandaka liloba komikundola (tala D&A 20:77, 79).

Nsango na ngai ezali libiangi, kutu bosenga, ya komikundola. Oyo ezali mabongisi misato na ntina ya lolenge nini bokoki komikundola mposa nyonso ntango bozali kolia bilembo ya bule ya elambo. Naliki ezali ntina mpo na bino, lokola ezalaka mpo na ngai.

Komikundola Yesu Klisto

Yambo, komikundola Mobikisi. Komikundolaka ye ntango Azalaki na mabele, lolenge nini Alobaki na basusu, mpe lolenge nini Alakisaki bosembo na misala na Ye. Komikundolaka oyo Alekisaki ntango elongo na ye mpe oyo Ateyaki. Mobikisi “asalaki bolamu” (Misala 10:38). Abikisaki babeli. Amipesaki mpo na kosala bolingi ya Tata na Ye.

Mingi kati na biso na biso, tokoki komikundola monene ya motuya Afutaki, ya bolingo na Ye mpo na biso, mpo na kolongola mbindo ya masumu na biso. Ntango na mikundoli Ye, mposa na biso ya kolanda Ye ekokola. Tokozala na mposa ya kozala mwa bosembo, mwa mposa ya kolimbisa, mpe mwa bolingi ya koluka bolingi ya Nzambe mpe kosala yango.

Mikundola Nini Osengeli Kosala Malamu Koleka

Ezali mpasi kokanisa mpo na Mobikisi—bopeto na Ye mpe bobongi nie—na bozangi lisusu kokanisaka lolenge tozali na mbeba mpe bazangi bobongi nie na bokokanisi. Tosalaki mabongisi ya kotosa mitindo na Ye, kasi mbala mingi tokweyaka mwa moke na mobeko oyo ya likolo. Kasi Mobikisi ayebaki ete yango esengelaki kosalema, na yango apesaki biso likuli ya elambo.

Elambo ezali na misisa na yango na esaleli ya Boyokani ya Kala na oyo etali mabonza ya mbeka, ezalaki ya kotubela masumu (tala Lewitiko 5:5). Topesaka mabonza ya banyama ata moke te, kasi tokoki kino sikawa kotika masumu na biso. Makomi ebengi yango libonza ya “motema ebukana mpe molimo ya mawa” (3 Nefi 9:20). Bolia elambo na motema ya boyamboli (tala D&A 59:12; Moroni 6:2). Tango bosali bongo, bokozwa bolimbisi ya masumu mpe bokobunga na nzela ya bozongi epai ya Nzambe te.

Bomikundola Bokoli oyo Bozali Kosala

Ntango botali bomoi na bino na ntango ya likuli ya elambo, nabanzi makanisi na bino ekotala kaka makambo ya mabe bosali te kasi lisusu ekotala makambo ya malamu bosalaki—na ntango oyokaki ete Tata na Lola mpe Mobikisi basepelaki na yo. Bokoki kutu kozwa mwa ntango na ntango ya elambo mpo na kotuna Nzambe asalisa bino botala makambo yango. Soki bosali yango, nalaki bino bokoyoka eloko moko. Bokoyoka elikia.

Ntango nasalaki yango, Molimo epesaki ngai elikia ete atako nazali mosika ya bobongi nie, nazali malamu mingi lelo koleka lolenge nazalaki lobi. Mpe yango epesaki ngai elikia ete, mpo na ntina ya Mobikisi, nakoki kutu kozala malamu koleka lobi.

Ntango nionso ezali ntango molai, mpe esengaka bokasi ebele. Boyebi uta boyebi lolenge nini ezali mpasi mpo na kokanisa na bokebi na ntina ya eloko moko ntango nyonso. Kasi bomitungisa te na lolenge nini ya malamu bobatelaka elikia na bino na komikundolaka Ye ntango nyonso, Amikundolaka bino ntango nyonso.

Mobikisi ayebi mitungisi na bino. Ayebi nini ezali lokola kobatela bomoi na bino. Ayebi lolenge ya mposa na bino ya lombango ya lipamboli oyo ekowuta ntango nyonso na komikundolaka Ye mpe kotosa Ye—“oyo [bino] bokoki ntango nyonso kozala na Molimo na Ye elongo na [bino]” (D&A 20:77; nsete ebetamaki).

Nayango, Ayambaka bino na bozongeli na mesa ya elambo mposo nyonso, lisusu abonzeli bino ngenge ya kotatola liboso na Ye ete bokomikundola Ye ntango nyonso.

Matangi

  1. Spencer W. Kimball, “Circles of Exaltation” (address to Church Educational System religious educators, Sanza ya Motoba 28, 1968), 5.

Bimisa na lokasa