2018
Luka Koyeba Ye mpe libota na Ye.
February 2018


Mibeko ya Liteya ya Botali, Sanza ya Mibale 2018

Luka Koyeba Ye mpe libota na Ye

Kotala mpe Koteya ezali koyeba na sembo mpe kolinga ndeko mwasi moko na moko mpo ete tokoka kosunga na bolendisi bondimi na ye mpe kopesa lisalisi.

Bondimi, Libota, Lisungi

Rita Jeppeson mpe motei na ye ya botali bakomaki baninga malamu ntango bakei kotala mpe bakaboli mibeko ya nsango malamu. Kasi babotali na bango ezalaki na lisano ya jeux de mots elongo. Ezali eloko ya ntina Rita alingaka ya botali na ye ya motei mpo ete ayebi bazali baninga mpe botali ezali kaka bobele “kotala” na mokanda te. Ezali na makambo ebele bandeko basi bakoki kosala na ntango ya botali, lokola kotambola elongo to kokataka matiti mabe na elanga ntango bana bazali kosakana.

Mpaka Jeffrey R. Holland ya Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale alobaki, “Bomimona bino moko lokola batindami ya Nkolo epai ya bana na Ye. … Tokolikia ete bokotonga eleko moko ya makanisi ya solo, ntina ya nsango malamu mpo na bandimi, kokengelanaka mpe kobatelanaka, kosalelaka bamposa ya molimo mpe ya nzoto na lolenge oyo esalisaka.”1

Nkolo na nzela ya Mose atindaki bana ya Isalaele ete “mompaya oyo afandi elongo na bino akozala na bino lokola mobotami kati na bino, mpe okolinga [ye] lokola yo moko” (Lewitiki 19:34). Bandeko basi totalaka mpe toteyaka bakoki kozala “bampaya” ntango tobandi mosala na biso, kasi ntango toyebi ye mpe libota na ye, mposa na biso ekomata mpo na “komema mikumba ya moko na moko, mpo ete ekoka kozala pepele” mpe mitema na biso “esangana na bomoko mpe na bolingo ya moko na moko” (Moziya 18:8, 21).

Reyna I. Aburto, Mopesi toli ya Mibale na Bokambi ya Lingomba Monene ya Bamama Basungi, amikundoli ntango akabwanaki sika na mondimi moko ya Eklezia. “Batei na ngai ya batali bayaki na ndako na ngai,” alobaki, “mpe bamemaki liyoki ya malamu ya kozala mpe bolingo na motema na ngai.”2

Botala oyo

Na kati ya mabota ya bandeko basi oyo botalaka mpe boteyaka, milulu nini bosengeli komilengela mpe komikundola lobi ekoya?

Matangi

  1. Jeffrey R. Holland, “To Young Women,” Liahona, Sanza ya Zomi na Moko 2016, 62.

  2. Reyna I. Aburto, “What Has Relief Society Been for Me?” Brigham Young University Women’s Conference, May 5, 2017, LDS.org.

Bimisa na lokasa