Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya yambo 15–21: “Boya mpe Bolia Mbuma.” 1 Nefi 6–10


Sanza ya yambo 15–21: ‘Boya mpe Bolia Mbuma.’ 1 Nefi 6–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza ya yambo 15–21. 1 Nefi 6–10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Limoni ya Lehi ya nzete ya bomoi

Ndoto ya Lehi, na Steven Lloyd Neal

Sanza ya yambo 15–21: “Boya mpe Bolia Mbuma”

1 Nefi 6–10

Ndoto ya Lehi—elongo na lingenda ya ebende, londende ya molili, ndako ya etando, mpe nzete na mbuma “ya sukali mingi”—ezali libengisi efulaka mpo na kozwa mapamboli ya bolingo mpe libonza ya bomikabi ya Mobikisi. Nzokande, mpo na Lehi limoni oyo etalaki lisusu libota na ye: “Mpo na likambo oyo namonaki, nazali na ntina ya kosepela na Nkolo mpo na Nefi mpe lisusu mpo na Sami. … Kasi tala, Lamani mpe Lemuele, nazali kobanga mpenza na ntina na bino” (1 Nefi 8:3–4). Ntango Lehi asilisaki kolimbola limoni na ye, alendisaki Lamani mpe Lemuele “ete bayoka maloba na ye, ete mbele Nkolo alingaki kolakisa boboto epayi na bango” (1 Nefi 8:37). Atako soki boyekolaki limoni ya Lehi mbala mingi, mbala oyo bokanisa na ntina na yango lolenge Lehi asalaki—bokanisa na ntina ya moto moko bolingaka. Ntango bozali kosala, bozangi likama ya lingenda ya ebende, makama ya ndako ya etando, mpe sukali ya mbuma ekozwa ndimbola ya sika. Mpe bokososola na mozindo mingi “motema nyonso ya moboti [wana] ya bolingo” oyo azwaki limoni kitoko oyo.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

1 Nefi 7:6–21

Nakoki kolimbisi basusu.

Nini ekamwisi bino mpo na oyoetali ndakisa ya Nefi kati na 1 Nefi 7:6-21? Lolenge nini topambolami ntango biso “tolimbisi na motema moko” moko na mosusu? Video “The Lord Delivers Nephi from His Rebellious Brothers” (Gospel Library) ekoki kosalisa boyekoli na bino.

1 Nefi 8

Kosimbaka makasi liloba ya Nzambe ekambaka ngai epayi ya Mobikisi mpe esalisaka ngai nayoka bolingo na Ye.

Limoni ya Lehi epesaka libengisi mpo na kokanisa esika wapi bozali kai na mobembo na mobembo na bino moko ya kokoma lokola Klisto. Mokambi Boyd K. Packer alobaki: “Bozali kati na yango; banso na biso tozali kati na yango (tala 1 Nefi 19:23). Ndoto to limoni ya Lehi na ntina ya lingenda ya ebende ezali na kati na yango makambo nyonso … Mosantu ya mikolo ya Nsuka moko asengeli na yango mpo na kososola momekano ya bomoi” (“Lehi’s Dream and You,” New Era, Sanza ya yambo. 2015, 2).

Ntango bozali koyekola, bokanisa kotondisa etando lokola oyo.

Elembo uta na limoni ya Lehi

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Elembo uta na limoni ya Lehi

Nzete mpe mbuma na yango (1 Nefi 8:10–12)

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Nazali kosala nini mpo na kobengisa basusu balia bolingo ya Nzambe?

Elembo uta na limoni ya Lehi

Ebale ya mai (1 Nefi 8:13)

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Elembo uta na limoni ya Lehi

Lingenda ya ebende (1 Nefi 8:19–20, 30)

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Elembo uta na limoni ya Lehi

Londende ya molili (1 Nefi 8:23)

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Elembo uta na limoni ya Lehi

Ndako monene mpe ya etando (1 Nefi 8:26–27, 33)

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

Elembo uta na limoni ya Lehi

Bandimbola

Mituna mpo na komaniola

bokoki lisusu koluka na milongo oyo elandi mpo na koyekola etali maboke minei ya bato ya Lehi amonaki: 1 Nefi 8:21–23, 24–28, 30, and 31–33. Bokeseni nini bomoni katikati ya maboke oyo? Ntina nini bato mosusu batikaka nsima ya kokoma tii na nzete mpe komeka mbuma (tala milongo 24-28).? Boyekoli nini uta na boyebi oyo?

Tala lisusu Kevin W. Pearson, “Stay by the Tree,” Liahona, Sanza ya mitano 2015, 114-16.

Botika bayekoli bakabola mamoni na bango moko. Bokanisa kobengisa bayekoli baluka makomi na bangomei mpo na bosolo bamoni. Ndakisa, bokoki kobengisa bango baluka makomi kati na etando likolo na bangomei to na maboke mikemike. Bakomikundola mpe kolinga bosolo bazali komona?

Elilingi
bato bazali kosimba libende oyo ezali kokamba na nzete ya bomoi

Common Thread, by Kelsy and Jesse Barrett

1 Nefi 10:2–16

Baprofeta ya kala bayebaki oyo etali etinda ya Yesu Klisto mpe batatolaki na ntina na Ye.

Mpo na nini bokanisi ete Nkolo akokaki kolinga libota ya Lehi—mpe biso banso—toyeba bosolo ezali kati na 1 Nefi 10:2–16? Bokanisa lolenge nini bokoki kosalisa balingami na bino mpo na kobengisa Mobikisi kati na bomoi na bango.

Elilingi
elembo ya seminele

1 Nefi 10:17–19

Nzambe akomonisa bosolo epayi na ngai na nguya ya Molimo Mosantu. 

Lolenge nini boyanolaka ntango bosenga bino kosalela libongi to mobeko moko ya nsango malamu oyo bozali kososola te? Na makomi oyo elandi, bokoma bokeseni oyo ezali katikati ya eyano ya Nefi na limoni ya Lehi (tala 1 Nefi 10:17–1911:1) mpe eyano ya Lamani mpe Lemuele (tala 1 Nefi 15:1–10). Bosolo nini Nefi asosolaki oyo etindaki ye ayanola lolenge asalaki?

Na ndakisa nini ya Nefi na makanisi, bosala molongo ya mabongi to mibeko ya nsango malamu bokolinga kososola malamu? Bokoki kosala nini mpo na komona biyano mpo na bino moko? (Tala lisusu “Bosolo Ekokomisa Bino Nsomi” kati na Mpo na Bokasi ya Bilenge: Mokambi mpo na Kosala Maponi, 30–33.)

Kaka lokola Nefi amonaki na ye moko ete malob ya tata na ye ezalaki solo, tokoki kosala lolenge moko ntango toyokaka maloba ya baprofeta mpe bapostolo ya mikolo oyo. Nini baprofeta mpe bapostolo bateyaki biso na likita linene ya kala mpenza te? Lolenge nini bozwaki litatoli ya moto se moko ya maye bateyaki?

Botala lisusu 1 Nefi 2:11–19; Malongi mpe Mayokani 8:1–3; “Search, Ponder, and Pray,” Children’s Songbook, 109; Gospel Topics, “Revelation,” Gospel Library.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Makanisi mpo na Koteya Bana

1 Nefi 8

Kosimbaka makasi liloba ya Nzambe ekambaka ngai epayi na Ye mpe esalisaka ngai nayoka bolingo na Ye.

  • Bana na bino bakoki kosepela koyema elili ya limoni ya Lehi ntango bozali kotanga 1 Nefi 8 elongo. Botika bango bakabola bilili na bango, mpe bosalisa bango bamona nini bilembo kati na ndoto ezali kolakisa (tala 1 Nefi 11:21–22; 12:16–18; 15:23–33, 36 mpe lokasa ya molulu ya poso oyo). Bosenga bango bakabola biyano mingi lokola ekokibango mpo na motuna oyo: Boyekoli nini uta na limoni ya Lehi?

  • Bozali na likambo moko oyo ekoki kolakisa libende ya lingenda na limoni ya Leyi, ndakisa kekele to eteni ya nzete? Botika bana na bino basimba yango ntango bozali kokamba bango nzinganzinga ya kisuku epayi ya elili ya Mobikisi. Mpo na nini lingenda ya ebende ezali motuya kati na ndoto ya Leyi? (Tala 1 Nefi 8:20, 24, 30). Lolenge nini lingenda ya ebende ezali lokola liloba ya Nzambe?

  • Bobengisa bana na bino mosusu batanga 1 Nefi 8:10–12 mpe bolimbola maye Lehi amonaki. Bosenga basusu batanga 1 Nefi 11:20–23 mpe balimbola maye Nefi amonaki. Mpo na nini anzelu alingaki kolakisa Nefi mwana Yesu mpo na koteya ye etali bolingo ya Nzambe? Bosolola na bana na bino etali lolenge nini bayokaki bolingo ya Nzambe kati na bomoi na bango. Loyembo lokola: “I Feel My Savior’s Love” (Children’s Songbook, 74–75) ekoki kosalisa bango bakanisa bandakisa .

1 Nefi 10:17-19; 11:1

Nzambe akomonisa bosolo epayi na ngai na nguya ya Molimo Mosantu.

  • Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino basosola maye Nefi ateyaki na 1 Nefi 10:19? Ntango mosusu bokoki kongumba elili moko ya Mobikisi to eloko moko mosusu ekeseni kati na bulangeti mpe kobengisa bana na bino bafungola yango. Ntango bozali kotanga 1 Nefi 10:19, bakoki kotombola maboko na bango ntango bayoki maloba “efungwami” mpe “Molimo Mosantu.” Nsima bokoki kokabola boyebi moko ntango Molimo Mosantu asalisaki bino bomona bosolo.

  • Bosenga bana na bino basolola etali maye basalaka mpo na komona biyano na motuna. Nini Nefi akokaki koloba soki moto moko atunaki ye lolenge nini komona biyano na motuna etali nsango malamu? Bopesa makasi na bana bamona na kotangaka 1 Nefi 10:17–19; 11:1.

  • Bana na bino bayoka naino ete Molimo Mosantu asalisaki bango bayeba ete likambo moko ezalaki solo? Botika bango bakabola boyebi na bango. Tokoloba nini na moninga oyo akanisaka ete akoki kozwa biyano na nzela ya Molimo mosantu te? Bomoni nini na 1 Nefi 10:17-19 mpe 11:1 oyo ekoki kosalisa moninga wana?

Mpo na kozwa makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga zulunale.

Elilingi
Limoni ya Lehi

Nzete ya Bomoi,, na Avon Oakeson

Bimisa na lokasa