Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya mibale 5–11: “Nsomi ya Kopona Bonsomi mpe Bomoi ya Seko, na nzela ya Moyokanisi Monene.” 2 Nefi 1–2


“Sanza ya mibale 5–11: ‘Nsomi ya Kopona Bonsomi mpe Bomoi ya Seko, na nzela ya Moyokanisi Monene.’ 2 Nefi 1-2,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2024)

“Sanza mibale 5–11. 2 Nefi 1–2,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2024)

Elilingi
Adama mpe Ewa Kotikaka Elanga ya Edene

Adama mpe Ewa, na Douglas Fryer

Sanza ya mibale 5–11: “Nsomi ya Kopona Bonsomi mpe Bomoi ya Seko, na nzela ya Moyokanisi Monene”

2 Nefi 1–2

Soki oyebaki bomoi na yo ezalaki kokende na nsuka, bansango nini ya nsuka elingaki yo kokabola na bato olingaka mingi mpenza? Ntango profeta Lehi amiyokaki azalaki kopusana penepene ya nsuka ya bomoi na ye, asangisaki libota na ye elongo mbala moko ya nsuka. Akabolaki na bango maye Tata ya Lola amonisaki ye. Akabolaki litatoli na ye ya Masiya. Ateyaki bosolo ya nsango malamu oyo alingaki na bato oyo alingaki. Asololaki oyo etali bonsomi, botosi, Bokwei ya Adama mpe Ewa, bosikoli na nzela ya Yesu Klisto, mpe bosepeli. Banso te ya bana na ye baponaki kobika maye ye ateyaki—moko te na biso akoki kosala maponi oyo mpo na balingani na biso. Kasi tokoki koteya mpe kotatola na ntina ya Mosikoli, oyo apesi biso ”nsomi ya kopona bonsomi mpe bomoi ya seko”(tala 2 Nefi 2:26–27).

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

2 Nefi 1:13–29

Nakoki “kolamuka! mpe koteleme uta o mputulu.”

Na 2 Nephi 1:13–29, tanga maloba Lehi asalelaki mpo na kolimbola ezalela ya molimo ya Lamani mpe Lemwele. Nini esalisaka yo kolamuka uta na “pongi makasi ” ya molimo? Nini esalisaka yo kokata “miniololo” ya molimo kati na bomoi na yo? Kanisa oyo etali litatoli ya Lehi kati na molongo 15 mpe libengisi na ye kati na molongo 23. Nsango nini Tata ya Lola azali na yango mpo na yo na milongo oyo?

Salela biloko emonanaka na miso. Kosalela biloko emonanaka na miso ekosalisa bayekoli basosola bosolo ya nsango malamu mpe bamikundola yango ntango molai. Ntango ozali komilengela mpo na koteya uta na liteya oyo, kanisa biloko nini emonanaka na miso okoki kosalela. Ndakisa, ntango mosusu moniololo ya lokasa ekoki kosalisa bayekoli basosola maloba ya Lehi kati na 2 Nefi 1:13 or 2 Nefi 2:27.

Elilingi
elembo ya seminele

2 Nefi 2

Na nzela ya Yesu Klisto, nakomi “nsomi ya koponabonsomi mpe bomoi ya seko.”

Libota ya Lehi ezalaki sikawa na mabele moko ya sika, etonda na makoki to mabaku. Maponi basalaki kati na esika ya sika ezalaki mpo na elonga mpe esengo na bango. Ntango mosusu oyo ezali Perhaps this is why Lehi taught his son Jacob about agency, or the ability to make choices, in 2 Nefi 2. Ntango ozali kotanga Matai 11-30, koma biyano oyo ekoki na mituna oyo:

  • Mpo na nini bonsomi ezali motuya mpenza epayi ya Tata ya Lola, kotu atako bato mosusu balelaka yango kati na ndenge ya mpasi?

  • Lolenge nini monguna amekaka kolembia to kobebisa bonsomi ya kopona na yo?

  • Lolenge nini Mobikisi asalisaka yo “opona bonsomi mpe bomoi ya seko”? (molongo 27)?

Tala lolenge mosusu ya koyekola etali bonsomiya kopona kati na 2 Nefi 2, Luka makambo oyo ezali motuya mpo na biso tozala na bosomi ya kopona mpe tokoma na likoki na biso ya bonzambe. Ndakisa:

Nini ekokaki kosalema na bonsomi ya kopona na biso soki moko to mingi koleka ya bizalela oyo ezangaki?

Moko na moko ya biteni motoba ya Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kosala Maponi ezali na “mabengisi” mpe “Mapamboli Malakama.” Tala moko to mingi ya biteni oyo, mpe pona libampoli elakama moko ozali na elikya kati na bomoi na yo. Libengisi nini osengeli na yango mpo na kosalela mpo na kozwa lipamboli yango? Kanisa kokabola na moto moko mapamboli oyo ozwi uta na kolandaka mabengisi oyo.

Tala lisusu Gospel Topics, “Agency and Accountability,” Gospel Library; “Know This, That Every Soul Is Free,” Hymns,, no. 240.

2 Nefi 2:1–4, 6–25

Nzambe akoki kobalusa mimekano na ngai na mapamboli.

Lehi ayebaki ete elenge mwana na ye ya mobali Yakobo amonaki “mitungisi,” mpe “mawa mingi” na bomwana na ye (2 Nefi 2:1). Mpo na nini okanisi ete litatoli ya Lehi kati na 2 Nefi 2:1–3, 6–25 ekoki kozala motuya mpo na Yakobo? Mpo na nini ezali ya motuya epai na yo? Luka maloba mpe liboke ya maloba oyo omoni mingimingi ya nguya. Lolenge nini Nzambe akobulisa mitungisi na yo mpo na litomba na yo? (Tala 2 Nefi 2:2.)

Tala lisusu Baloma 8:28; Dale G. Renlund, “Infuriating Unfairness,” Liahona, Sanza ya mitano 2021, 41–45.

2 Nefi 2:15–29

Bokweyi mpe Bomikabi ya Yesu Klisto ezali biteni ya motuya na moango ya Tata na Lola.

Bato mingi bakanisa ete Bokwei ezalaki bobele likama mpeeva mpe Adama basalaki libunga ya kolongola te ntango baponaki kolia mbumat. Kati na 2 Nefi 2:15–28, Lehi ateyi bosolu mosusu etali Bokwei—mpe etali bosikoli na nzela ya Klisto. Ntango ozali koluka na milongo oyo, sala molongo ya bosolo etali maye masalamaki na Elanga ya Edene. Mituna lokola miye ekokaki kosalisa:

  • Mpo na nini bokwei ezalaki ntina?

  • Mosala nini Yesu Klisto asalaki na kolongaka mpasi ya Bokwei?

  • Lolenge nini tokoki kosala ete Buku ya Mormon ezala libanga likonzi ya bondimi na biso na Yesu Klisto?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “The Great Plan of Happiness,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 72–75.

Mpo na makanisi mingi, botala babobimisi ya sanza oyo ya Liahona mpe magazini ya Mpo na Bokasi ya Bilenge zulunale.

Elilingi
Yesu Klisto

Tika ete motema na yo etungisama te, na Howard Lyon.

Makanisi mpo na Koteya Bana

2 Nefi 1:13, 15, 23

Yesu Klisto asalisaka ngai nalonga mabe ya lisumu.

  • Mpo na kosalisa bana na bino basosola libengisi ya Lehi ya “kokata miniololo” ya lisumu, ntango mosusu okoki kosala elongo mpo na kosala moniololo uta na biteni ya papie. Likolo ya biteni, bana na yo bakoi kosalisa okoma makambo Satana amekaka biso tosala. Nsima bokoki kotanga elongo 2 Nef 1:13, 15, 23 ntango bazali komekola maloba mosusu kati na milongo oyo—kobakisaka kokataka moniololo ya papie yango. Lolenge nini lisusu ezali loka moniololo? Lolenge nini Yesu asalisaka biso “kokata miniololo” ya lisumu?

2 Nefi 1:20

Napambolami ntango natosaka mitindo ya Nzambe.

  • Ekosalisa bana na yo bakokanisa mitindo ya Nzambe na basapatu, bikoti, baga, to biloko mosusu oyo ebatelaka biso? Ntango mosusu okoki kotika bango bameka biloko mosusu ntango ozali kosolola etali lolenge nini mitindo ebatelaka biso. Nsima bokoki kotanga 2 Nefi 1:20, kobetaka nsete ete biso “tokofuluka” (topambolami to tobatelami) ntango tozali kobatela mitindo. Kabola likambo moko okutanaki na yango ntango topambolamaki to tobatelamaki na kolandaka mitindo.

  • Mpo na kolakisa bokeseni katikati ya kofuluka mpe kokatama mosika uta na Nzambe (tala 2 Nefi 1:20), yo mpe bana na yo bokoki kotala nzete kitoko mpe lokasa moko to etape oyo ekatami mosika uta na nzete. Nsima bana na yo bakoki kozongela maponi oyo Nefi mpe bandeko na ye ya mibali basalaki (tala 1 Nefii 2:11–16; 3:5–7; 18:9–11). Nini eyaki na nsuka ya maponi oyo? Maponami nini esalisaka biso totikala ya kokangama na nzambe?

2 Nefi 2:11, 16, 27.

Nzambe apesaki ngai bonsomi ya kopona.

  • Mpo na kosalisali bana na yo basosla maye Lehi ateyaki etali bokeseni mpe kosala maponi, bokoki kosakana lisano moko kati na yango olobi liloba (lokola pole) mpe bana na yo balobi bokeseni na yango (molili). Salisa bango bayekola mpo na nini bokeseni ezali eteni ya mwango ya nzambe ntango bozali kotanga elongo 2 Nefi 2:11, 16. Nsima okoki kokabola masolo matali mwana moko oyo amekami mpo nakosala boponi ya mabe. Bana na yo bakoki kokabola nini bokeseni ya boponi mabe yango ezali mpe kosala yango.

  • Mpo na koyekola na ntina ya bokeseni katikati ya “lipanda” mpe “bokangemi” (2 Nefi 2:27), bana na yo bakoki koyema bililingi ya nyama moko kati na kesi mpe nyama moko na esika ya bomoi na ye. Nyama nini azali Nsomi? Bengisa bana balakisa elilingi ya malamu ntango bazali kotanga liloba “nsomi” kati na 2 Nefi 2:27. Natatoli ete Yesu Klisto asalaka biso tozala nsomi.

  • boyemba elongo loyembo lokola “Choose the Right” (Hymns, no. 239). Toyekoli nini uta na loyembo yango mpo na oyo etali kosala maponi?

Mpo na makanisi mingi, botala bobimisi ya sanza oyo ya magazini Moninga .

Elilingi
Libota ya Lehi efukami na libongo.

Lehi mpe Bato na Ye Bakomi na Mokili ya Sika, na Clark Kelley Price

Bimisa na lokasa